< 2 Masolo ya Kala 13 >

1 Tango Jeroboami akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiya akomaki mokonzi ya Yuda
In the eighteenth year of king Jeroboam began Abijah to reign over Judah.
2 mpe akonzaki mibu misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Mikaya. » Mikaya azalaki mwana ya Urieli, moto ya Gibea. Ezalaki na etumba kati na Abiya mpe Jeroboami.
He reigned three years in Jerusalem: and his mother's name was Maacah the daughter of Uriel of Gibeah. There was war between Abijah and Jeroboam.
3 Bongo kati na mampinga na bango, emonanaki ete Abiya azalaki na bilombe ya bitumba nkoto nkama minei, mpe Jeroboami, nkoto nkama mwambe.
Abijah joined battle with an army of valiant men of war, even four hundred thousand chosen men: and Jeroboam set the battle in array against him with eight hundred thousand chosen men, who were mighty men of valor.
4 Abiya atelemaki na likolo ya ngomba Tsemarayimi oyo ezali kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe alobaki: « Jeroboami mpe Isalaele, boyoka ngai malamu!
Abijah stood up on Mount Zemaraim, which is in the hill country of Ephraim, and said, "Hear me, Jeroboam and all Israel:
5 Boyebi te ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesa mpo na libela bokonzi ya Isalaele epai ya Davidi mpe bana na ye na nzela ya boyokani oyo ekoki kobongwana te?
Ought you not to know that YHWH, the God of Israel, gave the kingdom over Israel to David forever, even to him and to his descendants by a covenant of salt?
6 Kasi Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mosali ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, atelemaki mpo na kotombokela mokonzi na ye.
Yet Jeroboam the son of Nebat, the servant of Solomon the son of David, rose up, and rebelled against his lord.
7 Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango.
There were gathered to him worthless men, base fellows, who strengthened themselves against Rehoboam the son of Solomon, when Rehoboam was young and tenderhearted, and could not withstand them.
8 Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe.
"Now you think to withstand the kingdom of YHWH in the hand of the descendants of David; and you are a great multitude, and there are with you the golden calves which Jeroboam made you for gods.
9 Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te.
Haven't you driven out the priests of YHWH, the sons of Aaron, and the Levites, and made priests for yourselves after the ways of the peoples of other lands? so that whoever comes to consecrate himself with a young bull and seven rams, the same may be a priest of those who are no gods.
10 Nzokande epai na biso, Yawe nde azali Nzambe na biso, mpe tosundola Ye te; bana mibali ya Aron nde bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ye, mpe Balevi basungaka bango.
"But as for us, YHWH is our God, and we have not forsaken him; and we have priests ministering to YHWH, the descendants of Aaron, and the Levites in their work:
11 Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso; kasi bino, bosundolaki Ye.
and they burn to YHWH every morning and every evening burnt offerings and sweet incense. They also set the show bread in order on the pure table; and the lampstand of gold with its lamps, to burn every evening: for we keep the instruction of YHWH our God; but you have forsaken him.
12 Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. »
Look, God is with us at our head, and his priests with the trumpets of alarm to sound an alarm against you. Children of Israel, do not fight against YHWH, the God of your fathers; for you shall not prosper."
13 Na tango wana, Jeroboami atindaki limpinga moko ya basoda mpo ete babombama na sima ya basoda ya Yuda. Boye, basoda ya Yuda bazwamaki lokola na motambo: liboso na bango, ezalaki na mampinga ya Isalaele; mpe sima na bango, basoda oyo babombamaki.
But Jeroboam caused an ambush to come about behind them: so they were before Judah, and the ambush was behind them.
14 Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo.
When Judah looked back, look, the battle was before and behind them; and they cried to YHWH, and the priests sounded with the trumpets.
15 Basoda ya Yuda babetaki lokito ya bitumba; mpe na lokito na bango, Yawe Nzambe akweyisaki Jeroboami mpe Isalaele nyonso liboso ya Abiya mpe ya Yuda.
Then the men of Judah gave a shout: and as the men of Judah shouted, it happened, that God struck Jeroboam and all Israel before Abijah and Judah.
16 Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda.
The children of Israel fled before Judah; and God delivered them into their hand.
17 Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano.
Abijah and his people killed them with a great slaughter: so there fell down slain of Israel five hundred thousand chosen men.
18 Na tango wana, basoda ya Isalaele basambwaki; kasi ba-oyo ya Yuda bazwaki elonga, pamba te batiaki elikya na Yawe, Nzambe ya batata na bango.
Thus the children of Israel were brought under at that time, and the people of Judah prevailed, because they relied on YHWH, the God of their fathers.
19 Abiya alandaki Jeroboami mpe abotolaki ye bingumba ebele: Beteli, Yeshana mpe Efroni elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
Abijah pursued after Jeroboam, and took cities from him, Bethel with its towns, and Jeshanah with its towns, and Ephron with its towns.
20 Na mikolo nyonso oyo Abiya azalaki na bokonzi, Jeroboami azongelaki te nguya na ye ya kala. Yawe abetaki ye mpe akufaki.
Jeroboam did not recover strength again in the days of Abijah. YHWH struck him, and he died.
21 Nzokande, Abiya alendisaki bokonzi na ye. Abalaki basi zomi na minei mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mibale mpe bana basi zomi na motoba.
But Abijah grew mighty, and took to himself fourteen wives, and became the father of twenty-two sons, and sixteen daughters.
22 Makambo mpe misala mosusu ya Abiya, etamboli mpe maloba na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya momoni makambo Ido.
The rest of the acts of Abijah, and his ways, and his sayings, are written in the commentary of the prophet Iddo.

< 2 Masolo ya Kala 13 >