< 1 Samuele 3 >

1 Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.
The child Samuel ministered to Jehovah before Eli. The word of Jehovah was rare in those days; there was no frequent vision.
2 Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te.
It happened at that time, when Eli was lying down in his place (now his eyes had begun to grow dim, so that he could not see),
3 Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki.
and the lamp of God hadn't yet gone out, and Samuel was lying down in Jehovah's temple, where the ark of God was;
4 Yawe abengaki Samuele, mpe ye azongisaki: — Ngai oyo!
that Jehovah called, "Samuel. Samuel." And he said, "Here I am."
5 Akendeki mbangu epai ya Eli mpe alobaki: — Ngai oyo, obengi ngai! Kasi Eli alobaki na ye: — Nabengi yo te! Zonga mpe lala. Samuele akendeki mpe alalaki.
He ran to Eli, and said, "Here I am; for you called me." He said, "I did not call; lie down again." He went and lay down.
6 Yawe abengaki lisusu: — Samuele! Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki: — Ngai oyo, obengi ngai! Eli alobaki na ye: — Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala.
Jehovah called yet again, "Samuel. Samuel." And he arose and went to Eli, and said, "Here I am; for you called me." He answered, "I did not call, my son; lie down again."
7 Nzokande, Samuele ayebaki nanu Yawe te mpe atikalaki nanu te koyoka Yawe koloba na ye ata mbala moko.
Now Samuel did not yet know Jehovah, neither was the word of Jehovah yet revealed to him.
8 Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki: — Ngai oyo, obengi ngai! Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali.
Jehovah called Samuel again the third time. He arose and went to Eli, and said, "Here I am; for you called me." Eli perceived that Jehovah had called the child.
9 Boye Eli alobaki na Samuele: — Kende na yo kolala; mpe soki abengi yo, okoloba: « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka! » Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye.
Therefore Eli said to Samuel, "Go, lie down: and it shall be, if he calls you, that you shall say, 'Speak, Jehovah; for your servant hears.'" So Samuel went and lay down in his place.
10 Yawe ayaki mpe atelemaki wana; abengaki lokola na mbala mosusu: — Samuele! Samuele! Samuele azongisaki: — Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka.
Jehovah came, and stood, and called as at other times, "Samuel. Samuel." Then Samuel said, "Speak; for your servant hears."
11 Yawe alobaki na Samuele: — Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango.
Jehovah said to Samuel, "Look, I will do a thing in Israel, at which both the ears of everyone who hears it shall tingle.
12 Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka.
In that day I will perform against Eli all that I have spoken concerning his house, from the beginning even to the end.
13 Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te.
For I have told him that I will judge his house forever, for the iniquity which he knew, because his sons were cursing God, and he did not restrain them.
14 Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo.
Therefore I have sworn to the house of Eli, that the iniquity of Eli's house shall not be removed with sacrifice nor offering forever."
15 Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki.
And Samuel lay there until the morning, and in the morning he got up and opened the doors of the house of Jehovah. And Samuel was afraid to tell Eli the vision.
16 Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki: — Samuele, mwana na ngai! Samuele azongisaki: — Ngai oyo!
Then Eli called Samuel, and said, "Samuel, my son." He said, "Here I am."
17 Eli atunaki ye: — Makambo nini Yawe ayebisaki yo? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.
He said, "What is the thing that he has spoken to you? Please do not hide it from me. God do so to you, and more also, if you hide anything from me of all the things that he spoke to you in your ears."
18 Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki: — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.
And Samuel told him everything, and did not hide anything from him. And he said, "It is Jehovah. Let him do what seems good to him."
19 Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.
Samuel grew, and Jehovah was with him, and let none of his words fall to the ground.
20 Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe.
All Israel from Dan even to Beersheba knew that Samuel was established to be a prophet of Jehovah.
21 Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye.
Jehovah appeared again in Shiloh; for Jehovah revealed himself to Samuel in Shiloh by the word of Jehovah.

< 1 Samuele 3 >