< 1 Samuele 22 >

1 Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye.
David therefore departed there, and escaped to the cave of Adullam. When his brothers and his father's house heard it, they went down there to him.
2 Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.
Everyone who was in distress, and everyone who was in debt, and everyone who was discontented, gathered themselves to him; and he became captain over them: and there were with him about four hundred men.
3 Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi: « Nabondeli yo: Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. »
David went there to Mizpeh of Moab, and he said to the king of Moab, "Please let my father and my mother stay with you, until I know what God will do for me."
4 Boye Davidi amemaki bango epai ya mokonzi ya Moabi, mpe bavandaki elongo na ye tango nyonso oyo Davidi azalaki kati na ndako ya makasi.
He brought them before the king of Moab; and they lived with him all the while that David was in the stronghold.
5 Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi: « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti.
The prophet Gad said to David, "Do not stay in the stronghold. Depart, and go into the land of Judah." Then David departed, and came into the forest of Hereth.
6 Saulo ayokaki ete bamonaki Davidi elongo na bato na ye. Wana Saulo azalaki na mopanga na loboko na ye mpe avandaki na Gibea, na likolo ya ngomba moke mpe na se ya nzete oyo babengi « Tamarisi » elongo na bakonzi nyonso ya mampinga na ye,
Saul heard that David had been discovered, and the men who were with him. Now Saul was in Gibeah, sitting under the tamarisk tree at the high place, with his spear in his hand, and all his servants were standing about him.
7 Saulo ayebisaki bango: « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda?
And he said to them, "Hear now, you Benjamites. Will the son of Jesse give everyone of you fields and vineyards, will he make you all captains of thousands and captains of hundreds,
8 Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo? »
that all of you have conspired against me, and there is none who discloses to me when my son makes a covenant with the son of Jesse, and there is none of you who is sorry for me, or discloses to me that my son has stirred up my servant against me, to lie in wait, as at this day?"
9 Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki: « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi.
Then Doeg the Edomite, who stood by the servants of Saul, answered and said, "I saw the son of Jesse coming to Nob, to Ahimelech the son of Ahitub.
10 Ayimeleki atunaki mpo na ye makambo epai na Yawe, mpe apesaki ye bilei mpe mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia. »
He inquired of God for him, gave him food, and gave him the sword of Goliath the Philistine."
11 Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi.
Then the king sent to call Ahimelech, the son of Ahitub, and all his father's house, the priests who were in Nob: and they came all of them to the king.
12 Saulo alobaki: — Yoka sik’oyo, mwana mobali ya Ayitubi. Ayimeleki azongisaki: — Nazali koyoka yo, nkolo na ngai.
Saul said, "Hear now, you son of Ahitub." He answered, "Here I am, my lord."
13 Saulo alobaki na ye: — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo?
Saul said to him, "Why have you conspired against me, you and the son of Jesse, in that you have given him bread, and a sword, and have inquired of God for him, that he should rise against me, to lie in wait, as at this day?"
14 Ayimeleki azongiselaki mokonzi: — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo?
Then Ahimelech answered the king, and said, "Who among all your servants is so faithful as David, who is the king's son-in-law, and a commander over your bodyguard, and honored in your house?
15 Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.
Have I today begun to inquire of God for him? Be it far from me. Do not let the king impute anything to his servant, nor to all the house of my father; for your servant knows nothing of all this, less or more."
16 Kasi mokonzi alobaki: — Ayimeleki, okokufa solo; yo mpe libota mobimba ya botata na yo.
The king said, "You shall surely die, Ahimelech, you, and all your father's house."
17 Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye: « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe; pamba te bango mpe basungaki Davidi: bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
The king said to the guard who stood about him, "Turn, and kill the priests of Jehovah; because their hand also is with David, and because they knew that he fled, and did not disclose it to me." But the servants of the king wouldn't put forth their hand to fall on the priests of Jehovah.
18 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi: « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. » Boye Doegi, moto ya Edomi, abalukaki mpe abomaki bango. Na mokolo wana, abomaki bato tuku mwambe na mitano oyo balataki efode ya lino.
The king said to Doeg, "Turn and attack the priests." Doeg the Edomite turned, and he attacked the priests, and he killed on that day eighty-five people who wore a linen ephod.
19 Abomaki lisusu na mopanga kati na Nobi, engumba ya Banganga-Nzambe, mibali, basi, bana mpe bana mike, bangombe, ba-ane mpe bameme.
He struck Nob, the city of the priests, with the edge of the sword, both men and women, children and nursing babies, and cattle and donkeys and sheep.
20 Kaka Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki mpe koko ya Ayitubi, nde abikaki mpe akimaki mpo na kokende kosangana na Davidi.
One of the sons of Ahimelech, the son of Ahitub, named Abiathar, escaped, and fled after David.
21 Abiatari ayebisaki Davidi ete Saulo asili koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
Abiathar told David that Saul had slain Jehovah's priests.
22 Boye Davidi alobaki na Abiatari: « Mokolo wana, nayebaki malamu ete lokola Doegi, moto ya Edomi, azalaki wana, akokaki kozanga te koyebisa Saulo. Boye ezali mpo na ngai nde bato nyonso ya libota ya botata na yo bakufi!
Then David said to Abiathar, "I knew on that day that Doeg the Edomite would surely tell Saul. I am responsible for all the lives of your father's house.
23 Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. »
Stay with me, do not be afraid; for he who seeks my life seeks your life. For with me you shall be in safeguard."

< 1 Samuele 22 >