< 1 Samuele 16 >

1 Yawe alobaki na Samuele: — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
And the LORD said unto Samuel, How long will you mourn for Saul, seeing I have rejected him from reigning over Israel? fill your horn with oil, and go, I will send you to Jesse the Bethlehemite: for I have provided me a king among his sons.
2 Samuele alobaki: — Nakokende ndenge nini? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. Yawe azongiselaki ye: — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba: « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. »
And Samuel said, How can I go? if Saul hear it, he will kill me. And the LORD said, Take an heifer with you, and say, I am come to sacrifice to the LORD.
3 Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai.
And call Jesse to the sacrifice, and I will show you what you shall do: and you shall anoint unto me him whom I name unto you.
4 Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye: — Boni, koya na yo ezali ya kimia?
And Samuel did that which the LORD spoke, and came to Bethlehem. And the elders of the town trembled at his coming, and said, Come you peaceably?
5 Samuele azongisaki: — Solo, koya na ngai ezali ya kimia. Nayei mpo na kobonzela Yawe mbeka. Bomibulisa mpe boya kotumba mbeka elongo na ngai. Bongo abulisaki Izayi elongo na bana na ye ya mibali mpe abengisaki bango na kotumba mbeka elongo na ye.
And he said, Peaceably: I am come to sacrifice unto the LORD: sanctify yourselves, and come with me to the sacrifice. And he sanctified Jesse and his sons, and called them to the sacrifice.
6 Tango bakomaki, Samuele atalaki Eliabi mpe amilobelaki: « Solo, mopakolami na Yawe atelemi awa liboso na Ye. »
And it came to pass, when they were come, that he looked on Eliab, and said, Surely the LORD's anointed is before him.
7 Kasi Yawe alobaki na Samuele: — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.
But the LORD said unto Samuel, Look not on his countenance, or on the height of his stature; because I have refused him: for the LORD sees not as man sees; for man looks on the outward appearance, but the LORD looks on the heart.
8 Bongo Izayi abengisaki Abinadabi mpe alekisaki ye liboso ya Samuele. Kasi Samuele alobaki: « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
Then Jesse called Abinadab, and made him pass before Samuel. And he said, Neither has the LORD chosen this.
9 Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki: « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
Then Jesse made Shammah to pass by. And he said, Neither has the LORD chosen this.
10 Izayi alekisaki liboso ya Samuele bana sambo na ye ya mibali. Kasi Samuele alobaki na ye: « Yawe aponi moko te kati na bango. »
Again, Jesse made seven of his sons to pass before Samuel. And Samuel said unto Jesse, The LORD has not chosen these.
11 Bongo Samuele atunaki Izayi: — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso? Izayi azongisaki: — Te! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. Samuele alobaki: — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.
And Samuel said unto Jesse, Are here all your children? And he said, There remains yet the youngest, and, behold, he keeps the sheep. And Samuel said unto Jesse, Send and fetch him: for we will not sit down till he comes here.
12 Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele: « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »
And he sent, and brought him in. Now he was rosy, and likewise of a beautiful countenance, and goodly to look to. And the LORD said, Arise, anoint him: for this is he.
13 Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.
Then Samuel took the horn of oil, and anointed him in the midst of his brethren: and the Spirit of the LORD came upon David from that day forward. So Samuel rose up, and went to Ramah.
14 Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye.
But the Spirit of the LORD departed from Saul, and an evil spirit from the LORD troubled him.
15 Basali ya Saulo bayebisaki ye: — Tala, molimo moko ya mabe ewuti na Yawe mpe ezali kotungisa yo.
And Saul's servants said unto him, Behold now, an evil spirit from God troubles you.
16 Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu.
Let our lord now command your servants, which are before you, to seek out a man, who is a cunning player on an harp: and it shall come to pass, when the evil spirit from God is upon you, that he shall play with his hand, and you shall be well.
17 Boye Saulo alobaki na basali na ye: — Bolukela ngai moto moko oyo ayebi kobeta lindanda malamu, mpe boya na ye epai na ngai.
And Saul said unto his servants, Provide me now a man that can play well, and bring him to me.
18 Moko kati na basali na ye azongisaki: — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza; Yawe mpe azalaka elongo na ye.
Then answered one of the servants, and said, Behold, I have seen a son of Jesse the Bethlehemite, that is cunning in playing, and a mighty valiant man, and a man of war, and prudent in matters, and a comely person, and the LORD is with him.
19 Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye: « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. »
Wherefore Saul sent messengers unto Jesse, and said, Send me David your son, which is with the sheep.
20 Izayi azwaki ane moko; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali.
And Jesse took an ass laden with bread, and a bottle of wine, and a kid, and sent them by David his son unto Saul.
21 Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli.
And David came to Saul, and stood before him: and he loved him greatly; and he became his armour bearer.
22 Saulo atindaki maloba epai ya Izayi: « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. »
And Saul sent to Jesse, saying, Let David, I pray you, stand before me; for he has found favour in my sight.
23 Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.
And it came to pass, when the evil spirit from God was upon Saul, that David took an harp, and played with his hand: so Saul was refreshed, and was well, and the evil spirit departed from him.

< 1 Samuele 16 >