< 1 Petelo 4 >

1 Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu,
Therefore, since Christ suffered for us in the flesh, arm yourselves also with the same mind; for he who has suffered in the flesh has ceased from sin,
2 mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili.
that you no longer should live the rest of your time in the flesh for the lusts of men, but for the will of God.
3 Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka: kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele.
For we have spent enough of our past time doing the desire of the Gentiles, and having walked in lewdness, lusts, drunken binges, orgies, carousings, and abominable idolatries.
4 Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi.
They think it is strange that you don’t run with them into the same excess of riot, speaking evil of you.
5 Kasi bakosamba liboso ya Nzambe oyo akosambisa penza bato ya bomoi mpe bakufi.
They will give account to him who is ready to judge the living and the dead.
6 Yango wana mpe kutu Yesu ateyaki Sango Malamu ata epai ya bato oyo bazali sik’oyo ya kokufa mpo ete basambisama kolanda mibeko ya bato na oyo etali nzoto mpe babika bomoi kolanda mokano ya Nzambe na oyo etali Molimo.
For to this end the Good News was preached even to the dead, that they might be judged indeed as men in the flesh, but live as to God in the spirit.
7 Suka ya makambo nyonso ekomi pene; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.
But the end of all things is near. Therefore be of sound mind, self-controlled, and sober in prayer.
8 Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.
And above all things be earnest in your love among yourselves, for love covers a multitude of sins.
9 Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.
Be hospitable to one another without grumbling.
10 Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.
As each has received a gift, employ it in serving one another, as good managers of the grace of God in its various forms.
11 Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)
If anyone speaks, let it be as it were the very words of God. If anyone serves, let it be as of the strength which God supplies, that in all things God may be glorified through Jesus Christ, to whom belong the glory and the dominion forever and ever. Amen. (aiōn g165)
12 Balingami, bokamwa te bapasi oyo bozali komona, lokola nde likambo ya kokamwa ekomeli bino.
Beloved, don’t be astonished at the fiery trial which has come upon you to test you, as though a strange thing happened to you.
13 Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.
But because you are partakers of Christ’s sufferings, rejoice, that at the revelation of his glory you also may rejoice with exceeding joy.
14 Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino.
If you are insulted for the name of Christ, you are blessed, because the Spirit of glory and of God rests on you. On their part he is blasphemed, but on your part he is glorified.
15 Tika ete moko te kati na bino amona pasi mpo ete azali mobomi to moyibi, moto mabe to moto oyo akotaka makambo ya bato mosusu;
But let none of you suffer as a murderer, or a thief, or an evil doer, or a meddler in other men’s matters.
16 nzokande soki azali komona pasi mpo ete azali Moklisto, wana tika ete ayokela yango soni ata moke te, kasi akumisa nde Nzambe mpo na Kombo yango.
But if one of you suffers for being a Christian, let him not be ashamed; but let him glorify God in this matter.
17 Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe?
For the time has come for judgment to begin with the household of God. If it begins first with us, what will happen to those who don’t obey the Good News of God?
18 Pamba te Makomi elobi: « Soki ezali na pasi makasi nde moto ya sembo abikisami, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki? »
“If it is hard for the righteous to be saved, what will happen to the ungodly and the sinner?”
19 Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.
Therefore let them also who suffer according to the will of God in doing good entrust their souls to him, as to a faithful Creator.

< 1 Petelo 4 >