< 1 Bakonzi 9 >

1 Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kosala nyonso oyo azalaki na yango posa,
It happened, when Solomon had finished the building of the house of the LORD, and the king's house, and all Solomon's desire which he was pleased to do,
2 Yawe abimelaki Salomo na mbala ya mibale, ndenge kaka abimelaki ye na mbala ya liboso, na Gabaoni.
that the LORD appeared to Solomon the second time, as he had appeared to him at Gibeon.
3 Yawe alobaki na ye: « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.
And the LORD said to him, "I have heard your prayer and your petition that you have made before me. I have done for you according to all your prayer. I have consecrated this house which you have built, to place my name there forever, and my eyes and my heart will be there perpetually.
4 Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,
As for you, if you will walk before me, as David your father walked, in integrity of heart, and in uprightness, to do according to all that I have commanded you, and will keep my statutes and my ordinances;
5 nakolendisa mpo na libela kiti na yo ya bokonzi kati na Isalaele, ndenge nalobaki yango epai ya Davidi, tata na yo: ‹ Okotikalaka kozanga te moto oyo akokitana na kiti ya bokonzi ya Isalaele. ›
then I will establish the throne of your kingdom over Israel forever, according as I promised to David your father, saying, 'There shall not fail you a man on the throne of Israel.'
6 Kasi soki yo mpe bana na yo ya mibali bopengwi mosika na Ngai; soki botosi te mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango,
But if you turn away from following me, you or your children, and not keep my commandments and my statutes which I have set before you, but shall go and serve other gods, and worship them;
7 nakolongola Isalaele kati na mabele oyo napesaki ye, nakobwaka mosika ya elongi na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai, mpe Isalaele akokoma eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.
then will I cut off Israel out of the land which I have given them; and this house, which I have made holy for my name, will I cast out of my sight; and Israel shall be a proverb and a byword among all peoples.
8 Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba: ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo? ›
And this house, which is exalted, will become a heap of ruins. Everyone who passes by it will be astonished, and will whistle, and they will say, 'Why has the LORD done this to this land, and to this house?'
9 Bakoyanola: ‹ Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki mpe basalelaki yango; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. › »
And they shall answer, 'Because they forsook the LORD their God, who brought their fathers out of the land of Egypt, and laid hold of other gods, and worshiped them, and served them. Therefore the LORD has brought all this disaster on them.'"
10 Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,
It happened at the end of twenty years, in which Solomon had built the two houses, the house of the LORD and the king's house
11 akabelaki Irami, mokonzi ya Tiri, bingumba tuku mibale kati na Galile, pamba te Irami asungaki Salomo na nyonso oyo azalaki na yango na bosenga: mabaya ya sedele, ya sipele mpe wolo.
(now Hiram the king of Tyre had furnished Solomon with cedar trees and fir trees, and with gold, according to all his desire), that then king Solomon gave Hiram twenty cities in the land of Galilee.
12 Irami abimaki wuta na Tiri, mokili na ye, mpo na kotala bingumba oyo Salomo akabelaki ye, kasi asepelaki na yango te.
Hiram came out from Tyre to see the cities which Solomon had given him; and they did not please him.
13 Alobaki: « Ndeko na ngai, bingumba nini oyo opesi ngai? » Yango wana abengaki bingumba yango mokili ya Kabuli, kombo oyo etikala kino lelo.
He said, "What cities are these which you have given me, my brother?" He called them the land of Cabul to this day.
14 Nzokande, Irami apesaki Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo.
Hiram sent to the king one hundred twenty talents of gold.
15 Salomo asalisaki bana ya Isalaele misala makasi mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, ndako na ye moko, Milo, mir ya Yelusalemi, Atsori, Megido mpe Gezeri.
This is the reason of the levy which king Solomon raised, to build the house of the LORD, and his own house, and Millo, and the wall of Jerusalem, and Hazor, and Megiddo, and Gezer.
16 Faraon, mokonzi ya Ejipito, amataki na Gezeri, abotolaki yango na maboko ya bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna, abomaki bango, atumbaki engumba yango na moto mpe akabaki yango epai ya mwana na ye ya mwasi oyo akomaki mwasi ya Salomo.
Pharaoh king of Egypt had gone up, and taken Gezer, and burnt it with fire, and slain the Canaanites who lived in the city, and given it for a portion to his daughter, Solomon's wife.
17 Yango wana Salomo atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se,
Solomon built Gezer, and Lower Beth Horon,
18 Baalati mpe Tamari kati na esobe ya mokili,
and Baalath, and Tamar in the wilderness, in the land,
19 bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, kati na Libani mpe kati na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
and all the storage cities that Solomon had, and the cities for his chariots, and the cities for his horsemen, and that which Solomon desired to build for his pleasure in Jerusalem, and in Lebanon, and in all the land of his dominion.
20 Batikali nyonso kati na bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te,
As for all the people who were left of the Amorites, the Hethites, the Perizzites, the Hivites, and the Jebusites, who were not of the children of Israel;
21 ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo.
their descendants who were left after them in the land, whom the children of Israel were not able utterly to destroy, of them Solomon conscripted for slave labor to this day.
22 Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakalaka na ye ya lokumu, bakalaka na ye, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar.
But of the children of Israel Solomon made no bondservants; but they were the men of war, and his servants, and his commanders, and his captains, and rulers of his chariots and of his horsemen.
23 Tala motango ya bakalaka ya lokumu oyo batindamaki mpo na kokamba bato oyo bazalaki kosala misala ya Salomo: bakalaka nkama mitano na tuku mitano.
These were the chief officers who were over Solomon's work, five hundred fifty, who bore rule over the people who labored in the work.
24 Sima na mwana mwasi ya Faraon kolongwa na engumba ya Davidi mpo na kokende na ndako oyo Salomo atongelaki ye, Salomo atongaki Milo.
But Pharaoh's daughter came up out of the City of David to her house which Solomon had built for her: then he built Millo.
25 Mbala misato kati na mobu, Salomo azalaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo oyo atongaki mpo na Yawe; azalaki mpe kotumba malasi ya ansa na likolo ya etumbelo oyo ezalaki liboso ya Yawe. Ezalaki bongo nde misala ezalaki kokokisama kati na Tempelo ya Yawe.
Solomon offered burnt offerings and peace offerings on the altar which he built to the LORD three times a year, burning incense with them, on the altar that was before the LORD. So he finished the house.
26 Mokonzi Salomo asalisaki masuwa ebele na engumba Etsioni-Geberi oyo ezali pene ya Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi.
King Solomon also had a fleet of ships at Ezion Geber, which is near Eilat on the shore of the Red Sea, in the land of Edom.
27 Irami atindaki na masuwa yango basali na ye, bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale monene; bazalaki elongo na basali ya Salomo.
Hiram sent in the navy his servants, sailors who had knowledge of the sea, with the servants of Solomon.
28 Bakendeki na Ofiri epai wapi bazwaki bakilo nkoto zomi na mibale ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.
They came to Ophir, and fetched from there gold, four hundred and twenty talents, and brought it to king Solomon.

< 1 Bakonzi 9 >