< 1 Bakonzi 22 >

1 Bitumba ezalaki te kati ya Isalaele mpe Siri mibu misato.
And they continued three years without war between Aram and Israel.
2 Kasi na mobu ya misato, Jozafati, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala mokonzi ya Isalaele.
And it came to pass in the third year, that Jehoshaphat the king of Judah came down to the king of Israel.
3 Mokonzi ya Isalaele alobaki na bakalaka na ye: « Boyebi malamu ete Ramoti ya Galadi ezalaka ya biso! Nzokande, tosalaka eloko moko te mpo na kobotola yango na maboko ya mokonzi ya Siri. »
And the king of Israel said unto his servants: 'Know ye that Ramoth-gilead is ours, and we are still, and take it not out of the hand of the king of Aram?'
4 Alobaki mpe na Jozafati: — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi? Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele: — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.
And he said unto Jehoshaphat: 'Wilt thou go with me to battle to Ramoth-gilead?' And Jehoshaphat said to the king of Israel: 'I am as thou art, my people as thy people, my horses as thy horses.'
5 Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele: — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.
And Jehoshaphat said unto the king of Israel: 'Inquire, I pray thee, at the word of the LORD today.'
6 Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango: — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Bazongiselaki ye: — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.
Then the king of Israel gathered the prophets together, about four hundred men, and said unto them: 'Shall I go against Ramoth-gilead to battle, or shall I forbear?' And they said: 'Go up; for the LORD will deliver it into the hand of the king.'
7 Kasi Jozafati atunaki lisusu: — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe?
But Jehoshaphat said: 'Is there not here besides a prophet of the LORD, that we might inquire of him?'
8 Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati: — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki: — Tika ete mokonzi aloba bongo te!
And the king of Israel said unto Jehoshaphat: 'There is yet one man by whom we may inquire of the LORD, Micaiah the son of Imlah; but I hate him; for he doth not prophesy good concerning me, but evil.' And Jehoshaphat said: 'Let not the king say so.'
9 Bongo, mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye: « Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. »
Then the king of Israel called an officer, and said: 'Fetch quickly Micaiah the son of Imlah.'
10 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango.
Now the king of Israel and Jehoshaphat the king of Judah sat each on his throne, arrayed in their robes, in a threshing-floor, at the entrance of the gate of Samaria; and all the prophets prophesied before them.
11 Nzokande moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Na maseke oyo okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. › »
And Zedekiah the son of Chenaanah made him horns of iron, and said: 'Thus saith the LORD: With these shalt thou gore the Arameans, until they be consumed.'
12 Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko: « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »
And all the prophets prophesied so, saying: 'Go up to Ramoth-gilead, and prosper; for the LORD will deliver it into the hand of the king.'
13 Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye: — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango: sakola elonga mpo na mokonzi!
And the messenger that went to call Micaiah spoke unto him, saying: 'Behold now, the words of the prophets declare good unto the king with one mouth, let thy word, I pray thee, be like the word of one of them, and speak thou good.'
14 Kasi Mishe azongisaki: — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
And Micaiah said: 'As the LORD liveth, what the LORD saith unto me, that will I speak.'
15 Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye: — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Mishe azongisaki: — Kende! Okolonga! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
And when he was come to the king, the king said unto him: 'Micaiah, shall we go to Ramoth-gilead to battle, or shall we forbear?' And he answered him: 'Go up, and prosper; and the LORD will deliver it into the hand of the king.'
16 Kasi mokonzi alobaki na ye: — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe?
And the king said unto him: 'How many times shall I adjure thee that thou speak unto me nothing but the truth in the name of the LORD?'
17 Mishe azongisaki: — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi: « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia! »
And he said: 'I saw all Israel scattered upon the mountains, as sheep that have no shepherd; and the LORD said: These have no master; let them return every man to his house in peace.'
18 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai; asakolaka kaka makambo ya mabe!
And the king of Israel said to Jehoshaphat: 'Did I not tell thee that he would not prophesy good concerning me, but evil?'
19 Mishe alobaki: — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
And he said: 'Therefore hear thou the word of the LORD. I saw the LORD sitting on His throne, and all the host of heaven standing by Him on His right hand and on his left.
20 Yawe atuni: « Nani akokosa Akabi mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna? » Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye.
And the LORD said: Who shall entice Ahab, that he may go up and fall at Ramoth-gilead. And one said: On this manner; and another said: On that manner.
21 Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki: « Ngai oyo! Nakokosa ye. » Yawe atunaki molimo yango: « Okosala yango ndenge nini? »
And there came forth the spirit, and stood before the LORD, and said: I will entice him.
22 Molimo yango ezongisaki: « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki: « Solo, okolonga kokosa ye! Kende mpe sala bongo. »
And the LORD said unto him: Wherewith? And he said: I will go forth, and will be a lying spirit in the mouth of all his prophets. And He said: Thou shalt entice him, and shalt prevail also; go forth, and do so.
23 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo!
Now therefore, behold, the LORD hath put a lying spirit in the mouth of all these thy prophets; and the LORD hath spoken evil concerning thee.'
24 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki: — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo?
Then Zedekiah the son of Chenaanah came near, and smote Micaiah on the check, and said: 'Which way went the spirit of the LORD from me to speak unto thee?'
25 Mishe azongisaki: — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
And Micaiah said: 'Behold, thou shalt see on that day, when thou shalt go into an inner chamber to hide thyself.'
26 Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo: — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi.
And the king of Israel said: 'Take Micaiah, and carry him back unto Amon the governor of the city, and to Joash the king's son;
27 Boloba na bango: « Tala makambo oyo mokonzi alobi: ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
and say: Thus saith the king: Put this fellow in the prison, and feed him with scant bread and with scant water, until I come in peace.'
28 Mishe alobaki: — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te! Abakisaki: — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi!
And Micaiah said: 'If thou return at all in peace, the LORD hath not spoken by me.' And he said: 'Hear, ye peoples, all of you.'
29 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi.
So the king of Israel and Jehoshaphat the king of Judah went up to Ramoth-gilead.
30 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: « Nakomibongola wana nakokende na bitumba; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. » Boye mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba.
And the king of Israel said unto Jehoshaphat: 'I will disguise myself, and go into the battle; but put thou on thy robes.' And the king of Israel disguised himself, and went into the battle.
31 Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar: « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. »
Now the king of Aram had commanded the thirty and two captains of his chariots, saying: 'Fight neither with small nor great, save only with the king of Israel.'
32 Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki: « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Balandaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi.
And it came to pass, when the captains of the chariots saw Jehoshaphat, that they said: 'Surely it is the king of Israel'; and they turned aside to fight against him; and Jehoshaphat cried out.
33 Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar, basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye.
And it came to pass, when the captains of the chariots saw that it was not the king of Israel, that they turned back from pursuing him.
34 Kasi moto moko ya Siri abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar: « Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. »
And a certain man drew his bow at a venture, and smote the king of Israel between the lower armour and the breastplate; wherefore he said unto the driver of his chariot: 'Turn thy hand, and carry me out of the host; for I am sore wounded.'
35 Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri; mpe na pokwa, akufaki. Makila oyo ebimaki na pota na ye esopanaki kati na shar.
And the battle increased that day; and the king was stayed up in his chariot against the Arameans, and died at even; and the blood ran out of the wound into the bottom of the chariot.
36 Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga: « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye! »
And there went a cry throughout the host about the going down of the sun, saying: 'Every man to his city, and every man to his country.'
37 Boye mokonzi akufaki, mpe bamemaki ye na Samari; mpe bakundaki ye kuna.
So the king died, and was brought to Samaria; and they buried the king in Samaria.
38 Basukolaki shar na ye na liziba moko oyo ezalaki na Samari epai wapi basi ya ndumba bazalaki kosukola; mpe bambwa elembolaki makila na ye kolanda maloba oyo Yawe alobaki.
And they washed the chariot by the pool of Samaria; and the dogs licked up his blood; the harlots also washed themselves there; according unto the word of the LORD which He spoke.
39 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Now the rest of the acts of Ahab, and all that he did, and the ivory house which he built, and all the cities that he built, are they not written in the book of the chronicles of the kings of Israel?
40 Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
So Ahab slept with his fathers; and Ahaziah his son reigned in his stead.
41 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele.
And Jehoshaphat the son of Asa began to reign over Judah in the fourth year of Ahab king of Israel.
42 Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.
Jehoshaphat was thirty and five years old when he began to reign; and he reigned twenty and five years in Jerusalem. And his mother's name was Azubah the daughter of Shilhi.
43 Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
And he walked in all the way of Asa his father; he turned not aside from it, doing that which was right in the eyes of the LORD; howbeit the high places were not taken away; the people still sacrificed and offered in the high places.
44 Jozafati abikaki na kimia elongo na mokonzi ya Isalaele.
And Jehoshaphat made peace with the king of Israel.
45 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, misala na ye mpe bitumba na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Now the rest of the acts of Jehoshaphat, and his might that he showed, and how he warred, are they not written in the book of the chronicles of the kings of Judah?
46 Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi.
And the remnant of the sodomites that remained in the days of his father Asa, he put away out of the land.
47 Na tango wana, mokonzi azalaki te kati na mokili ya Edomi. Ezalaki kaka na moyangeli moko oyo azalaki kotambolisa kuna.
And there was no king in Edom: a deputy was king.
48 Jozafati asalisaki bamasuwa ya Tarsisi mpo na kokende koluka wolo na Ofiri; kasi elongaki te kokende, pamba te bamasuwa ebukanaki na Etsioni-Geberi.
Jehoshaphat made ships of Tarshish to go to Ophir for gold; but they went not; for the ships were broken at Ezion-geber.
49 Boye Akazia, mwana mobali ya Akabi, alobaki na Jozafati: « Tika ete basali na ngai bakende nzela moko na basali na yo na bamasuwa! » Kasi Jozafati aboyaki.
Then said Ahaziah the son of Ahab unto Jehoshaphat: 'Let my servants go with thy servants in the ships.' But Jehoshaphat would not.
50 Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
And Jehoshaphat slept with his fathers, and was buried with his fathers in the city of David his father; and Jehoram his son reigned in his stead.
51 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na sambo na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi na Isalaele na Samari. Asalaki mibu mibale na bokonzi.
Ahaziah the son of Ahab began to reign over Israel in Samaria in the seventeenth year of Jehoshaphat king of Judah, and he reigned two years over Israel.
52 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe; pamba te alandaki banzela ya tata na ye, ya mama na ye mpe ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki ete Isalaele asala lisumu.
And he did that which was evil in the sight of the LORD, and walked in the way of his father, and in the way of his mother, and in the way of Jeroboam the son of Nebat, wherein he made Israel to sin.
53 Asalelaki nzambe Bala mpe agumbamelaki yango; na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge kaka tata na ye asalaki.
And he served Baal, and worshipped him, and provoked the LORD, the God of Israel, according to all that his father had done.

< 1 Bakonzi 22 >