< 1 Bakonzi 19 >

1 Akabi ayebisaki Jezabeli makambo nyonso oyo Eliya asalaki mpe ndenge nini abomaki basakoli nyonso na mopanga.
καὶ ἀνήγγειλεν Αχααβ τῇ Ιεζαβελ γυναικὶ αὐτοῦ πάντα ἃ ἐποίησεν Ηλιου καὶ ὡς ἀπέκτεινεν τοὺς προφήτας ἐν ῥομφαίᾳ
2 Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye: — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.
καὶ ἀπέστειλεν Ιεζαβελ πρὸς Ηλιου καὶ εἶπεν εἰ σὺ εἶ Ηλιου καὶ ἐγὼ Ιεζαβελ τάδε ποιήσαι μοι ὁ θεὸς καὶ τάδε προσθείη ὅτι ταύτην τὴν ὥραν αὔριον θήσομαι τὴν ψυχήν σου καθὼς ψυχὴν ἑνὸς ἐξ αὐτῶν
3 Eliya abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Tango akomaki na Beri-Sheba ya Yuda, atikaki kuna mosali na ye.
καὶ ἐφοβήθη Ηλιου καὶ ἀνέστη καὶ ἀπῆλθεν κατὰ τὴν ψυχὴν ἑαυτοῦ καὶ ἔρχεται εἰς Βηρσαβεε τὴν Ιουδα καὶ ἀφῆκεν τὸ παιδάριον αὐτοῦ ἐκεῖ
4 Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo: — Yawe, nalembi! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
καὶ αὐτὸς ἐπορεύθη ἐν τῇ ἐρήμῳ ὁδὸν ἡμέρας καὶ ἦλθεν καὶ ἐκάθισεν ὑπὸ ραθμ ἓν καὶ ᾐτήσατο τὴν ψυχὴν αὐτοῦ ἀποθανεῖν καὶ εἶπεν ἱκανούσθω νῦν λαβὲ δὴ τὴν ψυχήν μου ἀπ’ ἐμοῦ κύριε ὅτι οὐ κρείσσων ἐγώ εἰμι ὑπὲρ τοὺς πατέρας μου
5 Bongo alalaki na se ya nzete yango mpe azwaki pongi. Mbala moko, anjelu moko asimbaki ye mpe alobaki na ye: — Lamuka mpe lia.
καὶ ἐκοιμήθη καὶ ὕπνωσεν ἐκεῖ ὑπὸ φυτόν καὶ ἰδού τις ἥψατο αὐτοῦ καὶ εἶπεν αὐτῷ ἀνάστηθι καὶ φάγε
6 Atalaki mpe amonaki pene ya esika oyo atiaki moto, lipa batumba na mabanga ya moto mpe mbeki ya mayi. Aliaki, amelaki mpe alalaki lisusu.
καὶ ἐπέβλεψεν Ηλιου καὶ ἰδοὺ πρὸς κεφαλῆς αὐτοῦ ἐγκρυφίας ὀλυρίτης καὶ καψάκης ὕδατος καὶ ἀνέστη καὶ ἔφαγεν καὶ ἔπιεν καὶ ἐπιστρέψας ἐκοιμήθη
7 Anjelu ya Yawe azongaki na mbala ya mibale, asimbaki ye lisusu mpe alobaki: — Lamuka mpe lia, pamba te mobembo ezali molayi mingi mpo na yo.
καὶ ἐπέστρεψεν ὁ ἄγγελος κυρίου ἐκ δευτέρου καὶ ἥψατο αὐτοῦ καὶ εἶπεν αὐτῷ ἀνάστα φάγε ὅτι πολλὴ ἀπὸ σοῦ ἡ ὁδός
8 Boye alamukaki, aliaki mpe amelaki. Bongo na makasi oyo azwaki na nzela ya bilei, atambolaki mobembo ya mikolo tuku minei mpe ya babutu tuku minei kino akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
καὶ ἀνέστη καὶ ἔφαγεν καὶ ἔπιεν καὶ ἐπορεύθη ἐν τῇ ἰσχύι τῆς βρώσεως ἐκείνης τεσσαράκοντα ἡμέρας καὶ τεσσαράκοντα νύκτας ἕως ὄρους Χωρηβ
9 Kuna, akotaki na lidusu ya mabanga mpe alekisaki butu. Yawe alobaki na ye: — Eliya, ozali kosala nini awa?
καὶ εἰσῆλθεν ἐκεῖ εἰς τὸ σπήλαιον καὶ κατέλυσεν ἐκεῖ καὶ ἰδοὺ ῥῆμα κυρίου πρὸς αὐτὸν καὶ εἶπεν τί σὺ ἐνταῦθα Ηλιου
10 Azongisaki: — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
καὶ εἶπεν Ηλιου ζηλῶν ἐζήλωκα τῷ κυρίῳ παντοκράτορι ὅτι ἐγκατέλιπόν σε οἱ υἱοὶ Ισραηλ τὰ θυσιαστήριά σου κατέσκαψαν καὶ τοὺς προφήτας σου ἀπέκτειναν ἐν ῥομφαίᾳ καὶ ὑπολέλειμμαι ἐγὼ μονώτατος καὶ ζητοῦσι τὴν ψυχήν μου λαβεῖν αὐτήν
11 Yawe alobaki: — Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka. Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te.
καὶ εἶπεν ἐξελεύσῃ αὔριον καὶ στήσῃ ἐνώπιον κυρίου ἐν τῷ ὄρει ἰδοὺ παρελεύσεται κύριος καὶ πνεῦμα μέγα κραταιὸν διαλῦον ὄρη καὶ συντρῖβον πέτρας ἐνώπιον κυρίου οὐκ ἐν τῷ πνεύματι κύριος καὶ μετὰ τὸ πνεῦμα συσσεισμός οὐκ ἐν τῷ συσσεισμῷ κύριος
12 Sima na mopepe makasi, mabele eninganaki; nzokande Yawe azalaki te kati na koningana ya mabele. Sima na koningana ya mabele, moto eyaki; nzokande Yawe azalaki te kati na moto wana. Mpe sima na moto, mopepe ya kimia penza eyaki.
καὶ μετὰ τὸν συσσεισμὸν πῦρ οὐκ ἐν τῷ πυρὶ κύριος καὶ μετὰ τὸ πῦρ φωνὴ αὔρας λεπτῆς κἀκεῖ κύριος
13 Tango kaka Eliya ayokaki yango, azipaki elongi na ye na songe ya kazaka na ye, abimaki mpe atelemaki na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mpe mongongo moko elobaki na ye lisusu: — Eliya, ozali kosala nini awa?
καὶ ἐγένετο ὡς ἤκουσεν Ηλιου καὶ ἐπεκάλυψεν τὸ πρόσωπον αὐτοῦ ἐν τῇ μηλωτῇ ἑαυτοῦ καὶ ἐξῆλθεν καὶ ἔστη ὑπὸ τὸ σπήλαιον καὶ ἰδοὺ πρὸς αὐτὸν φωνὴ καὶ εἶπεν τί σὺ ἐνταῦθα Ηλιου
14 Azongisaki: — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
καὶ εἶπεν Ηλιου ζηλῶν ἐζήλωκα τῷ κυρίῳ παντοκράτορι ὅτι ἐγκατέλιπον τὴν διαθήκην σου οἱ υἱοὶ Ισραηλ τὰ θυσιαστήριά σου καθεῖλαν καὶ τοὺς προφήτας σου ἀπέκτειναν ἐν ῥομφαίᾳ καὶ ὑπολέλειμμαι ἐγὼ μονώτατος καὶ ζητοῦσι τὴν ψυχήν μου λαβεῖν αὐτήν
15 Yawe alobaki na ye: — Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri.
καὶ εἶπεν κύριος πρὸς αὐτόν πορεύου ἀνάστρεφε εἰς τὴν ὁδόν σου καὶ ἥξεις εἰς τὴν ὁδὸν ἐρήμου Δαμασκοῦ καὶ χρίσεις τὸν Αζαηλ εἰς βασιλέα τῆς Συρίας
16 Okopakola lisusu Jewu, mwana mobali ya Nimishi, mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Okopakola lisusu Elize, mwana mobali ya Shafati ya Abele-Meola, mafuta mpo ete akoma mosakoli na esika na yo.
καὶ τὸν Ιου υἱὸν Ναμεσσι χρίσεις εἰς βασιλέα ἐπὶ Ισραηλ καὶ τὸν Ελισαιε υἱὸν Σαφατ ἀπὸ Αβελμαουλα χρίσεις εἰς προφήτην ἀντὶ σοῦ
17 Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye.
καὶ ἔσται τὸν σῳζόμενον ἐκ ῥομφαίας Αζαηλ θανατώσει Ιου καὶ τὸν σῳζόμενον ἐκ ῥομφαίας Ιου θανατώσει Ελισαιε
18 Atako bongo, nabombi kati na Isalaele bato nkoto sambo, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te, mpe minoko na bango epesi ye beze te.
καὶ καταλείψεις ἐν Ισραηλ ἑπτὰ χιλιάδας ἀνδρῶν πάντα γόνατα ἃ οὐκ ὤκλασαν γόνυ τῷ Βααλ καὶ πᾶν στόμα ὃ οὐ προσεκύνησεν αὐτῷ
19 Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye.
καὶ ἀπῆλθεν ἐκεῖθεν καὶ εὑρίσκει τὸν Ελισαιε υἱὸν Σαφατ καὶ αὐτὸς ἠροτρία ἐν βουσίν δώδεκα ζεύγη βοῶν ἐνώπιον αὐτοῦ καὶ αὐτὸς ἐν τοῖς δώδεκα καὶ ἐπῆλθεν ἐπ’ αὐτὸν καὶ ἐπέρριψε τὴν μηλωτὴν αὐτοῦ ἐπ’ αὐτόν
20 Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki: — Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo. Eliya azongisaki: — Zonga na yo, nasali yo nini?
καὶ κατέλιπεν Ελισαιε τὰς βόας καὶ κατέδραμεν ὀπίσω Ηλιου καὶ εἶπεν καταφιλήσω τὸν πατέρα μου καὶ ἀκολουθήσω ὀπίσω σου καὶ εἶπεν Ηλιου ἀνάστρεφε ὅτι πεποίηκά σοι
21 Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.
καὶ ἀνέστρεψεν ἐξόπισθεν αὐτοῦ καὶ ἔλαβεν τὰ ζεύγη τῶν βοῶν καὶ ἔθυσεν καὶ ἥψησεν αὐτὰ ἐν τοῖς σκεύεσι τῶν βοῶν καὶ ἔδωκεν τῷ λαῷ καὶ ἔφαγον καὶ ἀνέστη καὶ ἐπορεύθη ὀπίσω Ηλιου καὶ ἐλειτούργει αὐτῷ

< 1 Bakonzi 19 >