< 1 Masolo ya Kala 7 >

1 Isakari abotaki bana mibali minei: Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi. Bango nyonso bazalaki minei. 2 Bana mibali ya Tola: Uzi, Refaya, Yeriyeli, Yamayi, Yibisami mpe Samuele. Bango nde babotamaki na nzela ya Tola mpe bazalaki bakambi ya mabota ya botata na bango. Kati na mabota na bango, bazalaki basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na mibale na nkama motoba, na tango Davidi azalaki mokonzi. 3 Bana mibali ya Uzi: Yiziraya. Bana mibali ya Yiziraya: Mikaeli, Abidiasi, Joeli mpe Yishiya. Bango nyonso mitano bazalaki bakambi. 4 Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata; ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba, pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele. 5 Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari, oyo bakomamaki na buku ya mabota, bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo. Bazalaki basoda ya mpiko. 6 Benjame abotaki bana mibali misato: Bela, Bekeri mpe Yediayeli. 7 Bela abotaki bana mibali mitano: Etsiboni, Uzi, Uzieli, Yerimoti mpe Iri. Bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango ya bato oyo batangamaki ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na tuku misato na minei. 8 Bana mibali ya Bekeri: Zemira, Yoashi, Eliezeri, Eliowenayi, Omiri, Yeremoti, Abiya, Anatoti mpe Alemeti. Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Bekeri. 9 Motango ya basoda ya mpiko, kolanda bituka na bango, ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale. 10 Bakitani ya Yediayeli: Bilani. Bana mibali ya Bilani: Yewushi, Benjame, Ewudi, Kenaana, Zetani, Tarsisi, Ayishaari. 11 Kati na molongo ya Yediayeli, bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale. 12 Bana mibali ya Iri: Shupimi mpe Upime. Ushimi azalaki mwana mobali ya Aeri. 13 Bana mibali ya Nefitali: Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shalumi. Bazalaki bakitani ya Bila. 14 Bakitani ya Manase: Asirieli na nzela ya makangu na ye, moto ya Arami. Abotelaki ye lisusu Makiri, tata ya bato ya Galadi. 15 Makiri abalaki Maaka oyo azalaki ndeko mwasi ya Upime mpe Shupimi. Kombo ya mwana mobali mosusu ya Manase ezalaki « Tselofikadi. » Tselofikadi abotaki kaka bana basi. 16 Maaka, mwasi ya Makiri, abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo « Peretsi. » Peretsi azalaki na ndeko mobali, Shereshi, oyo abotaki bana mibali oyo: Ulami mpe Rekemi. 17 Ulami abotaki: Bedani oyo azalaki mwana mobali. Bango nde bazalaki bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase. 18 Amoleketi, ndeko mwasi ya Manase, abotaki Ishodi, Abiezeri mpe Mala. 19 Bana mibali ya Shemida: Ayani, Sishemi, Liki mpe Aniami. 20 Bakitani ya Efrayimi: Efrayimi abotaki Shutela, Shutela abotaki Beredi, Beredi abotaki Taati, Taati abotaki Eleada, Eleada abotaki Taati, 21 Taati abotaki Zabadi, mpe Zabadi abotaki Shutela. Bankolo mboka oyo babotamaki na mokili ya Gati, babomaki Ezeri mpe Eleadi, pamba te balukaki kobotola bibwele ya bato ya Gati. 22 Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye. 23 Sima na yango, Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Boye Efrayimi apesaki ye kombo « Beria, » pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye. 24 Efrayimi azalaki lisusu na mwana mwasi, Shera, oyo atongaki Beti-Oroni ya ngomba mpe ya lubwaku, mpe Uzeni-Shera. 25 Beria abotaki Refa, Refa abotaki Retsefi, Retsefi abotaki Tela, Tela abotaki Tayani, 26 Taani abotaki Laedani, Laedani abotaki Amiwudi, Amiwudi abotaki Elishama, Elishama abotaki Nuni, 27 Nuni abotaki Jozue. 28 Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda: Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este; Narani, na ngambo ya weste; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike. 29 Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula: Beti-Sheani, Taanaki, Megido, Dori mpe bamboka na yango ya mike. Bakitani ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele, bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso. 30 Bana mibali ya Aseri: Yimina, Yishiva, Yishivi mpe Beria. Sera azalaki ndeko na bango ya mwasi. 31 Bana mibali ya Beria: Eberi mpe Malikieli oyo azalaki tata ya bato ya Biriza. 32 Bana mibali ya Eberi: Yafeleti, Shomeri, Otami mpe ndeko na bango ya mwasi Shuwa. 33 Bana mibali ya Yafeleti: Pasaki, Bimali mpe Ashivati. Bango nde bazalaki bana mibali ya Yafeleti. 34 Bana mibali ya Shemeri: Ayi, Roega, Yewuba mpe Arami. 35 Bana mibali ya Elemi, ndeko mobali ya Shemeri: Tsofa, Yimina, Sheleshi mpe Amali. 36 Bana mibali Tsofa: Suwa, Arineferi, Shuwali, Beri, Yimira, 37 Betseri, Odi, Shama, Shilisha, Yitirani mpe Beera. 38 Bana mibali ya Yeteri: Yefune, Pisipa mpe Ara. 39 Bana mibali ya Ula: Ara, Anieli mpe Ritsiya. 40 Bango nyonso bazalaki bakitani ya Aseri: bazalaki bakambi ya mabota na bango, bato ya lokumu, basoda ya mpiko mpe bakambi ya bakambi ya bituka. Motango ya bato nyonso oyo bakomamaki na buku ya mabota mpe bakoki mpo na bitumba, ezalaki nkoto tuku mibale na motoba.

< 1 Masolo ya Kala 7 >