< 1 Masolo ya Kala 12 >

1 Na tango oyo Davidi akimaki na Tsikilagi mpo na kobombama Saulo, mwana mobali ya Kishi, bato bayaki kosangana na ye. Bazalaki basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kosalisa ye na bitumba.
Et voici ceux qui joignirent David à Tsiklag lorsqu'il était encore exclu de la présence de Saül, fils de Kis, et ceux-ci étaient du nombre des braves qui le secondaient à la guerre,
2 Bazalaki kobunda na batolotolo mpe kosalela malamu loboko ya mwasi mpe ya mobali mpo na kobwaka mabanga mpe kobeta bambanzi ya batolotolo. Bazalaki bato ya ekolo moko na Saulo: ekolo ya Benjame.
maniant l'arc de la main droite, et de la gauche lançant des pierres, et décochant des flèches avec l'arc, et du nombre des frères de Saül de Benjamin:
3 Tala bakombo na bango: Akiezeri, mokonzi na bango; Joasi, mwana mibali ya Shemaa, moto ya Gibea; Yezieli mpe Peleti, bana mibali ya Azimaveti; Beraka; Jewu, moto ya Anatoti;
le chef Ahiézer et Joas, fils de Semaa de Gibea, et Jéziel et Pélet, fils d'Azmaveth, et Beracha et Jéhu d'Anathoth,
4 Yishimaeya, moto ya Gabaoni, moko kati na lisanga ya basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi ya lisanga yango; Jeremi, Yaazieli, Yoanani, Yozabadi, moto ya Gedera;
et Jismaia de Gabaon, héros entre les trente, et commandant les trente, et Jérémie et Jehaziel et Jochanan et Jozabad, de Gedèra,
5 Elewuzayi, Yerimoti, Bealia, Shemaria, Shefatia, moto ya Arofi;
Elouzaï et Jerimoth et Bealia et Semaria et Sephatia, de Haroph,
6 Elikana, Yishiya, Azareeli, Yoezeri mpe Yashobeami: bango nyonso bazalaki bato ya libota ya Kore;
Elcana et Jissia et Azareël et Joëzer et Jasobeam, Coraïtes,
7 Yoela mpe Zebadia, bana mibali ya Yeroami, moto ya Gedori.
et Joëla et Zebadia, fils de Jeroham, de Gedor.
8 Ndambo ya bato ya ekolo ya Gadi bakabwanaki na Saulo mpo na kokende epai ya Davidi, na ndako makasi ya esobe. Bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebi kobunda malamu mpe kosalela malamu nguba mpe makonga. Bazalaki makasi lokola nkosi mpe mbangu lokola mboloko na ngomba.
Et parmi les Gadites vinrent comme transfuges joindre David à la forteresse du désert, des chefs de corps, soldats guerriers, armés de boucliers et de lances, ayant l'air de lions et l'agilité de la gazelle sur les montagnes:
9 Ezeri azalaki mokonzi na bango; Abidiasi, mokonzi ya mibale; Eliabi, mokonzi ya misato;
Ezer, le chef, Obadia, le second, Eliab, le troisième,
10 Mishimana, mokonzi ya minei; Jeremi, mokonzi ya mitano;
Mismanna, le quatrième, Jérémie, le cinquième,
11 Atayi, mokonzi ya motoba; Elieli, mokonzi ya sambo;
Atthaï, le sixième, Eliel, le septième,
12 Yoanani, mokonzi ya mwambe; Elizabadi, mokonzi ya libwa;
Jochanan, le huitième, Elzabad, le neuvième,
13 Jeremi, mokonzi ya zomi; mpe Makibanayi, mokonzi ya zomi na moko.
Jérémie, le dixième, Machbanaï, le onzième:
14 Bato oyo ya libota ya Gadi bazalaki bango nyonso bakonzi ya basoda. Mokonzi oyo azalaki na makasi moke akokaki kobunda na bato nkama moko, mpe oyo alekaki makasi akokaki kobunda na bato nkoto moko.
ils faisaient partie des fils de Gad, officiers de l'armée, de cent l'inférieur, de mille le supérieur.
15 Ezalaki bango nde bakatisaki mayi ya Yordani, na sanza ya liboso, tango mayi ya ebale etondaki makasi na bangambo nyonso, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mabwaku, ezala na ngambo ya este to ya weste.
Ce furent eux qui passèrent le Jourdain, au premier mois, quand il remplit tout son lit, et mirent en fuite tous les habitants des vallées au levant et au couchant.
16 Bato mosusu ya libota ya Benjame mpe ya Yuda bayaki lisusu kosangana na Davidi na ndako na ye ya makasi.
Et des fils de Benjamin et de Juda vinrent aussi joindre David à la forteresse.
17 Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki: « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo! »
Et David sortit à leur rencontre, et prenant la parole, il leur dit: Si vous venez à moi en amis pour m'aider, je m'unirai de cœur à vous, mais si c'est pour me surprendre au profit de mes ennemis, sans qu'il y ait injustice en ma main, que le Dieu de nos pères voie et juge!
18 Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki: « Oh Davidi, tozali ya yo! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.
Alors revêtu d'inspiration Amasaï, chef des triaires: Nous sommes à toi, David, [dit-il] et de ton bord, fils d'Isaï! Salut, salut à toi, et salut à tes aides, car ton Dieu est ton aide! Et David les admit et les plaça comme chefs de bataillons.
19 Ndambo ya bato ya Manase bakendeki kosala boyokani elongo na Davidi tango akendeki elongo na basoda ya Filisitia, mpo na kobundisa Saulo. Kasi Davidi elongo na bato na ye balongaki te kosunga bato ya Filisitia, pamba te sima na bakambi na bango koyokana, babenganaki Davidi mpe balobaki: « Davidi alingi kobomisa biso mpo ete azongisa boyokani na nkolo na ye Saulo! »
Et de Manassé des transfuges passèrent à David, lorsqu'il allait en guerre contre Saül avec les Philistins, dont il ne resta pas l'auxiliaire, car ensuite d'une délibération les princes des Philistins le congédièrent, se disant: Au prix de nos têtes il passera du côté de son Seigneur Saül.
20 Tango Davidi akendeki na Tsikilagi, tala bato ya ekolo ya Manase oyo bakendeki kosala boyokani elongo na ye: Adina, Yozabadi, Yediayeli, Mikaeli, Yozabadi, Eliwu mpe Tsilitai. Moko na moko kati na bango azalaki mokonzi ya bato nkoto moko kati na libota ya Manase.
Lorsqu'il se rendit à Tsiklag, de Manassé lui vinrent en transfuges: Adna et Jozabad et Jediael et Michaël et Jozabad et Elihu et Tsilthaï, chef des mille de Manassé.
21 Basungaki makasi Davidi mpe mampinga na ye, pamba te bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko mpe bakomaki bakonzi ya basoda.
Et ceux-ci aidèrent David contre les bandes, car ils étaient tous des héros belliqueux, et ils furent officiers supérieurs dans l'armée.
22 Mokolo na mokolo, bato bazalaki koya kosunga Davidi kino mampinga na ye ekomaki monene makasi lokola mampinga ya Nzambe.
Car journellement il arrivait des auxiliaires à David jusqu'à former une grande armée comme une armée de Dieu.
23 Tala motango ya basoda oyo babongisami mpo na bitumba, mpe bayaki epai ya Davidi, na Ebron, mpo na kokweyisa bokonzi ya Saulo mpe kopesa yango epai ya Davidi ndenge Yawe alobaki:
Or voici le nombre par têtes des hommes armés en guerre qui joignirent David à Hébron pour lui déférer la royauté de Saül selon l'ordre de l'Éternel.
24 Bato ya Yuda oyo bamemaka nguba mpe makonga: basoda nkoto motoba na nkama mwambe;
Fils de Juda portant bouclier et lance, six mille et huit cents, armés en guerre;
25 bato ya libota ya Simeoni: basoda ya mpiko nkoto sambo na nkama moko;
des fils de Siméon, héros belliqueux pour l'armée, sept mille et cent;
26 bato ya libota ya Levi: basoda nkoto minei na nkama motoba;
des fils de Lévi, quatre mille six cents,
27 mpe lisusu Yeoyada, mokonzi ya libota ya Aron, elongo na basoda na ye nkoto misato na nkama sambo,
et Joiada, le prince d'Aaron, et avec lui trois mille et sept cents hommes,
28 mpe Tsadoki, elenge soda ya mpiko elongo na bakambi ya libota na ye tuku mibale na mibale;
et Tsadoc, jeune héros brave et sa maison patriarcale, vingt-deux chefs:
29 kati na libota ya Benjame, bato ya libota ya Saulo: basoda nkoto misato, pamba te mingi kati na bango bandimaki kaka kosalela ndako ya Saulo;
et des fils de Benjamin, frères de Saül, trois mille: c'est que jusqu'alors la plus grande partie d'entre eux adhérait encore à la maison de Saül,
30 kati na libota ya Efrayimi: basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na nkama mwambe oyo bakenda sango kati na mabota na bango;
et des fils d'Ephraïm vingt-mille huit cents, héros vaillants, hommes de renom, d'après leurs maisons patriarcales;
31 kati na ndambo ya libota ya Manase: basoda ya mpiko nkoto zomi na mwambe oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokomisa Davidi mokonzi;
et de la demi-Tribu de Manassé dix-huit mille désignés nommément pour joindre et faire roi David;
32 kati na libota ya Isakari: bakambi nkama mibale bayaki elongo na bato oyo bango bazalaki kokamba kati na libota na bango; bazalaki na mayele ya kososola tango mpo na kolakisa Isalaele lolenge ya kosala liboso ya makambo;
et des fils d'Issaschar experts à comprendre les temps, pour savoir ce qu'Israël avait à faire, leurs chefs au nombre de deux cents et dont tous leurs frères à leurs ordres;
33 kati na libota ya Zabuloni: basoda ya mpiko nkoto tuku mitano oyo bayebi kosalela bibundeli nyonso mpe babundaka na motema moko;
de Zabulon ceux qui faisaient les campagnes, équipés pour le combat de toutes les armes de guerre, cinquante mille pour se ranger en bataille avec un cœur non partagé;
34 kati na libota ya Nefitali: bakonzi ya basoda nkoto moko, elongo na basoda nkoto tuku misato na sambo oyo babundaka na nguba mpe makonga;
et de Nephthali mille chefs accompagnés de trente-sept mille portant bouclier et lance;
35 kati na libota ya Dani: basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku mibale na mwambe na nkama motoba;
et des Danites armés en guerre, vingt-huit mille et six cents;
36 kati na libota ya Aseri: basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku minei;
et d'Asser quarante mille se mettant en campagne pour se ranger en bataille;
37 kati na mabota oyo ezalaki na este ya Yordani: libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ndambo ya libota ya Manase, basoda nkoto nkama moko na tuku mibale elongo na bibundeli nyonso ya bitumba.
et d'au delà le Jourdain, des Rubénites et des Gadites et de la demi-Tribu de Manassé, cent vingt mille avec toutes les armes de guerre pour le combat.
38 Basoda oyo nyonso bayaki na Ebron, na milongo ya bitumba mpe na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi na Isalaele mobimba. Bana ya Isalaele oyo batikalaki, bango mpe bazalaki na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi.
Tous ces hommes, gens de guerre, se formant en bataille avec, un cœur entier arrivèrent à Hébron pour établir David roi sur tout Israël. Et tout le restant d'Israël était unanime aussi pour faire David roi.
39 Basalaki kuna mikolo misato elongo na Davidi; bazalaki kolia mpe komela biloko oyo bandeko na bango babongiselaki bango.
Et ils furent là auprès de David trois jours, et mangèrent et burent, car leurs frères les pourvoyaient;
40 Ezala bato oyo bawutaki na libota ya Isakari, ya Zabuloni, ya Nefitali: bango mpe bamemaki bilei likolo ya ba-ane, bashamo, bamile mpe bangombe: farine, gato oyo basala na bambuma ya figi, gato oyo basala na bambuma ya vino ekawuka, masanga ya vino, mafuta, bangombe mpe bameme ebele, pamba te esengo ezalaki kati na Isalaele.
et ceux aussi qui demeuraient près d'eux jusqu'à Issaschar, Zabulon et Nephthali apportaient des vivres à dos d'ânes et de chameaux et de mulets et de bœufs, des mets de farine, des figues, des raisins secs et du vin, et de l'huile, puis des bœufs et des moutons en abondance; car c'était une joie en Israël.

< 1 Masolo ya Kala 12 >