< 1 Masolo ya Kala 10 >

1 Bato ya Filisitia babundisaki bana ya Isalaele. Bana ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.
Filistliler İsrailliler'le savaşa tutuştu. İsrailliler Filistliler'in önünden kaçtı. Birçoğu Gilboa Dağı'nda ölüp yere serildi.
2 Nzokande, bato ya Filisitia batingamaki kolanda Saulo mpe bana na ye ya mibali, bongo babomaki Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa oyo bazalaki bana na ye.
Filistliler Saul'la oğullarının ardına düştüler. Saul'un oğulları Yonatan'ı, Avinadav'ı ve Malkişua'yı yakalayıp öldürdüler.
3 Bitumba ekomaki lisusu makasi mpo na koluka bomoi ya Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki ye, Saulo alengaki na somo makasi wana asosolaki ete bakoboma ye.
Saul'un çevresinde savaş kızıştı. Derken Saul Filistli okçular tarafından vuruldu ve yaralandı.
4 Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye: « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kosakanela ngai. » Kasi soda yango abangaki mpe aboyaki koboma ye; bongo ye moko Saulo azwaki mopanga mpe amibwakaki na likolo na yango.
Saul silahını taşıyan adama, “Kılıcını çek de bana sapla” dedi, “Yoksa bu sünnetsizler gelip benimle alay edecekler.” Ama silah taşıyıcısı büyük bir korkuya kapılarak bunu yapmak istemedi. Bunun üzerine Saul kılıcını çekip kendini üzerine attı.
5 Tango soda yango amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga mpe akufaki.
Saul'un öldüğünü görünce, silah taşıyıcısı da kendini kılıcının üzerine atıp öldü.
6 Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali mpe libota na ye mobimba bakufaki elongo.
Böylece Saul, üç oğlu ve bütün ev halkı birlikte öldüler.
7 Tango bana nyonso ya Isalaele, oyo bazalaki kovanda na lubwaku, bamonaki ete mampinga esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
Vadide oturan İsrailliler, İsrail ordusunun kaçtığını, Saul'la oğullarının öldüğünü anlayınca, kentlerini terk edip kaçmaya başladılar. Filistliler gelip bu kentlere yerleştiler.
8 Mokolo oyo elandaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.
Ertesi gün Filistliler, öldürülenleri soymak için geldiklerinde, Saul'la oğullarının Gilboa Dağı'nda öldüğünü gördüler.
9 Bazwaki biloko na ye, bamemaki moto na ye elongo na bibundeli na ye, mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga epai ya banzambe na bango ya bikeko mpe epai ya bato na bango.
Saul'u soyduktan sonra başını kesip silahlarını aldılar. Sonra bu iyi haberi putlarına ve halka duyurmaları için Filist ülkesinin her yanına ulaklar gönderdiler.
10 Batiaki bibundeli na ye na tempelo ya banzambe na bango mpe badiembikaki mokuwa ya moto na ye kati na tempelo ya Dagoni.
Saul'un silahlarını ilahlarının tapınağına koyup başını Dagon Tapınağı'na çaktılar.
11 Tango bavandi nyonso ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo nyonso oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,
Yaveş-Gilat halkı Filistliler'in Saul'a yaptıklarını duydu.
12 bilombe na bango nyonso batelemaki, bakendeki kozwa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali; mpe bamemaki yango na Yabeshi. Sima na bango kokunda mikuwa na bango na Yabeshi, na se ya nzete ya terebente, bakilaki bilei mikolo sambo.
Bütün yiğitler gidip Saul'la oğullarının cesetlerini Yaveş'e getirdiler. Sonra kemiklerini Yaveş'teki yabanıl fıstık ağacının altına gömdüler ve yedi gün oruç tuttular.
13 Saulo akufaki mpo ete atosaki Yawe te, abatelaki Liloba na Yawe te mpe akendeki kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi, na esika ya kotuna makambo epai na Yawe.
Saul RAB'be ihanet ettiği için öldü. RAB'bin sözünü yerine getirmedi. Yol göstermesi için RAB'be danışacağına bir cinciye danıştı. Bu yüzden RAB onu öldürdü. Krallığını da İşay oğlu Davut'a devretti.
14 Boye Yawe abomaki ye mpe apesaki bokonzi epai ya Davidi, mwana mobali ya Izayi.

< 1 Masolo ya Kala 10 >