< 1 Masolo ya Kala 1 >

1 Adamu, Seti, Enoshi, 2 Kenani, Maalalele, Yeredi, 3 Enoki, Metusalemi, Lemeki, 4 Noa, Semi, Cham mpe Jafeti. 5 Bana mibali ya Jafeti: Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi. 6 Bana mibali ya Gomeri: Ashikenazi, Difati mpe Togarima. 7 Bana mibali ya Yavani: Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi. 8 Bana mibali ya Cham: Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana. 9 Bana mibali ya Kushi: Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema: Sheba mpe Dedani. 10 Kushi azalaki tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili. 11 Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu, 12 ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti. 13 Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti, 14 ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi, 15 ya Evi, ya Ariki, ya Sini, 16 ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. 17 Bana mibali ya Semi: Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. Bana mibali ya Arami: Utsi, Uli, Geteri mpe Mesheki. 18 Aripakishadi abotaki Shela, mpe Shela abotaki Eberi. 19 Eberi abotaki bana mibali mibale; moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi » oyo elingi koloba: Kokabola; pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele. Kombo ya mwana mosusu ezalaki « Yokitani. » 20 Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera, 21 Adorami, Uzali, Dikila, 22 Obali, Abimaeli, Saba, 23 Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani. 24 Semi, Aripakishadi, Shela, 25 Eberi, Pelegi, Rewu, 26 Serugi, Naori, Tera, 27 mpe Abrami oyo azali Abrayami. 28 Bana mibali ya Abrayami: Izaki mpe Isimaeli. 29 Tala bakitani na bango: Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli; Kedari, Adibeli, Mibisami, 30 Mishima, Duma, Masa, Adadi, Tema, 31 Yeturi, Nafishi mpe Kedima. Bango nde bazalaki bana mibali ya Isimaeli. 32 Bana mibali oyo Abrayami abotaki na Ketura, makangu na ye: Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa. Bana mibali ya Yokishani: Saba mpe Dedani. 33 Bana mibali ya Madiani: Efa, Eferi, Enoki, Abida mpe Elida. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Ketura. 34 Abrayami azalaki tata ya Izaki. Bana mibali ya Izaki: Ezawu mpe Isalaele. 35 Bana mibali ya Ezawu: Elifazi, Reweli, Yewushi, Yaelami mpe Kora. 36 Bana mibali ya Elifazi: Temani, Omari, Tsefo, Gaetami, Kenazi, Timina mpe Amaleki. 37 Bana mibali ya Reweli: Naati, Zera, Shama mpe Miza. 38 Bana mibali ya Seiri: Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, Dishoni, Etseri mpe Dishani. 39 Bana mibali ya Lotani: Ori mpe Omani. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani. 40 Bana mibali ya Shobali: Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami. Bana mibali ya Tsibeoni: Aya mpe Ana. 41 Mwana mobali ya Ana: Dishoni. Bana mibali ya Dishoni: Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani. 42 Bana mibali ya Etseri: Bilani, Zavani mpe Yaakani. Bana mibali ya Dishani: Utsi mpe Arani. 43 Tala bakonzi oyo bakambaki Edomi liboso ete Isalaele ekoma kokambama na mokonzi: Bela, mwana mobali ya Beori, oyo kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. » 44 Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi. 45 Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi. 46 Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi, akitanaki na ye na bokonzi. Alongaki bato ya Madiani na mokili ya bato ya Moabi. Engumba na ye ezalaki Aviti. 47 Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi. 48 Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi. 49 Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi. 50 Tango Bala-Anani akufaki, Adadi akitanaki na ye na bokonzi. Engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi mpe koko ya Mezaabi. 51 Adadi mpe akufaki. Tala bakombo ya bakambi ya Edomi: Timina, Aliva, Yeteti, 52 Olibama, Ela, Pinoni, 53 Kenazi, Temani, Mibitsari, 54 Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi.

< 1 Masolo ya Kala 1 >