< Nehemiæ 12 >

1 hii autem sacerdotes et Levitae qui ascenderunt cum Zorobabel filio Salathihel et Iosue Saraia Hieremias Ezra
Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue: Seraya, Jeremi, Esidrasi,
2 Amaria Melluch Attus
Amaria, Maluki, Atushi,
3 Sechenia Reum Meremuth
Shekania, Rewumi, Meremoti,
4 Addo Genthon Abia
Ido, Ginetoyi, Abiya,
5 Miamin Madia Belga
Miyamini, Maadia, Biliga,
6 Semaia et Ioarib Idaia Sellum Amoc Elceia
Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya,
7 Idaia isti principes sacerdotum et fratres eorum in diebus Iosue
Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya. Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue.
8 porro Levitae Iesua Bennui Cedmihel Sarabia Iuda Mathanias super hymnos ipsi et fratres eorum
Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi.
9 et Becbecia atque et Hanni fratres eorum unusquisque in officio suo
Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu.
10 Hiesue autem genuit Ioachim et Ioachim genuit Eliasib et Eliasib genuit Ioiada
Jozue abotaki Yoakimi, Yoakimi abotaki Eliashibi, Eliashibi abotaki Yoyada,
11 et Ioiada genuit Ionathan et Ionathan genuit Ieddoa
Yoyada abotaki Jonatan, Jonatan abotaki Yaduwa.
12 in diebus autem Ioachim erant sacerdotes principes familiarum Saraiae Amaria Hieremiae Anania
Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi: mpo na libota ya Seraya: Meraya; mpo na libota ya Jeremi: Anania;
13 Ezrae Mosollam Amariae Iohanan
mpo na libota ya Esidrasi: Meshulami; mpo na libota ya Amaria: Yoanani;
14 Milico Ionathan Sebeniae Ioseph
mpo na libota ya Meluki: Jonatan; mpo na libota ya Shebania: Jozefi;
15 Arem Edna Maraioth Elci
mpo na libota ya Arimi: Adina; mpo na libota ya Merayoti: Elikayi;
16 Addaiae Zaccharia Genthon Mosollam
mpo na libota ya Ido: Zakari; mpo na libota ya Ginetoni: Meshulami;
17 Abiae Zecheri Miamin et Moadiae Felti
mpo na libota ya Abiya: Zikiri; mpo na libota ya Minyamini: Moadia, Pilitayi;
18 Belgae Sammua Semaiae Ionathan
mpo na libota ya Biliga: Shamuwa; mpo na libota ya Shemaya: Jonatan;
19 Ioiarib Matthanai Iadaiae Azzi
mpo na libota ya Yoyaribi: Matinayi; mpo na libota ya Yedaeya: Uzi;
20 Sellaiae Celai Amoc Eber
mpo na libota ya Salu: Kalayi; mpo na libota ya Amoki: Eberi;
21 Elciae Asebia Idaiae Nathanahel
mpo na libota ya Ilikia: Ashabia; mpo na libota ya Yedaeya: Netaneeli.
22 Levitae in diebus Eliasib et Ioiada et Ionan et Ieddoa scripti principes familiarum et sacerdotes in regno Darii Persae
Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi.
23 filii Levi principes familiarum scripti in libro verborum dierum et usque ad dies Ionathan filii Eliasib
Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko.
24 et principes Levitarum Asebia Serebia et Iesue filius Cedmihel et fratres eorum per vices suas ut laudarent et confiterentur iuxta praeceptum David viri Dei et observarent aeque per ordinem
Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi: Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye: bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.
25 Matthania et Becbecia Obedia Mosollam Thelmon Accub custodes portarum et vestibulorum ante portas
Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe.
26 hii in diebus Ioachim filii Iesue filii Iosedech et in diebus Neemiae ducis et Ezrae sacerdotis scribaeque
Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe.
27 in dedicatione autem muri Hierusalem requisierunt Levitas de omnibus locis suis ut adducerent eos in Hierusalem et facerent dedicationem et laetitiam in actione gratiarum et in cantico in cymbalis psalteriis et citharis
Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire.
28 congregati sunt ergo filii cantorum et de campestribus circa Hierusalem et de villis Netuphati
Babengisaki lisusu bayembi longwa na etuka oyo ezalaki zingazinga ya Yelusalemi, longwa na bamboka mike-mike ya bato ya Netofa,
29 et de domo Galgal et de regionibus Geba et Azmaveth quoniam villas aedificaverunt sibi cantores in circuitu Hierusalem
longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi.
30 et mundati sunt sacerdotes et Levitae et mundaverunt populum et portas et murum
Tango Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki, bapetolaki mpe bato, bikuke mpe mir.
31 ascendere autem feci principes Iuda super murum et statui duos choros laudantium magnos et ierunt ad dexteram super murum ad portam Sterquilinii
Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu.
32 et ivit post eos Osaias et media pars principum Iuda
Na sima na bango, bato oyo bazalaki kolanda: Oze mpe ndambo ya bakambi ya Yuda,
33 et Azarias Ezras et Mosollam
Azaria, Esidrasi, Meshulami,
34 Iuda et Beniamin et Semeia et Hieremia
Yuda, Benjame, Shemaya, Jeremi,
35 et de filiis sacerdotum in tubis Zaccharias filius Ionathan filius Semeiae filius Mathaniae filius Michaiae filius Zecchur filius Asaph
ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi;
36 et fratres eius Semeia et Azarel Malalai Galalai Maai Nathanel et Iuda et Anani in vasis cantici David viri Dei et Ezras scriba ante eos in porta Fontis
mpe baninga na ye ya mosala: Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango.
37 et contra eos ascenderunt in gradibus civitatis David in ascensu muri super domum David et usque ad portam Aquarum ad orientem
Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este.
38 et chorus secundus gratias referentium ibat ex adverso et ego post eum et media pars populi super murum et super turrem Furnorum et usque ad murum latissimum
Lisanga ya mibale ya bayembi ezalaki kotambola na nzela ya ngambo ya loboko ya mwasi. Nazalaki kolanda bango na likolo ya mir elongo na ndambo ya bato, longwa na ndako molayi ya Fulu kino na mir ya monene,
39 et super portam Ephraim et super portam Antiquam et super portam Piscium et turrem Ananehel et turrem Ema et usque ad portam Gregis et steterunt in porta Custodiae
na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.
40 steteruntque duo chori laudantium in domo Dei et ego et dimidia pars magistratuum mecum
Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato
41 et sacerdotes Eliachim Maasia Miniamin Michea Elioenai Zaccharia Anania in tubis
mpe mpo na Banganga-Nzambe oyo: Eliakimi, Maaseya, Minyamini, Mishe, Eliowenayi, Zakari mpe Anania oyo bamemaki bakelelo na bango.
42 et Maasia et Semea et Eleazar et Azi et Iohanan et Melchia et Elam et Ezer et clare cecinerunt cantores et Iezraia praepositus
Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya.
43 et immolaverunt in die illa victimas magnas et laetati sunt Deus enim laetificaverat eos laetitia magna sed et uxores eorum et liberi gavisi sunt et audita est laetitia Hierusalem procul
Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika.
44 recensuerunt quoque in die illa viros super gazofilacia thesauri ad libamina et ad primitias et ad decimas ut introferrent per eos principes civitatis in decore gratiarum actionis sacerdotes et Levitas quia laetatus est Iuda in sacerdotibus et Levitis adstantibus
Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,
45 et custodierunt observationem Dei sui et observationem expiationis et cantores et ianitores iuxta praeceptum David et Salomonis filii eius
bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali.
46 quia in diebus David et Asaph ab exordio erant principes constituti cantorum in carmine laudantium et confitentium Deo
Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe.
47 et omnis Israhel in diebus Zorobabel et in diebus Neemiae dabat partes cantoribus et ianitoribus per dies singulos et sanctificabant Levitas et Levitae sanctificabant filios Aaron
Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.

< Nehemiæ 12 >