< I Samuelis 10 >

1 tulit autem Samuhel lenticulam olei et effudit super caput eius et deosculatus eum ait ecce unxit te Dominus super hereditatem suam in principem
Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki: « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye?
2 cum abieris hodie a me invenies duos viros iuxta sepulchrum Rachel in finibus Beniamin in meridie dicentque tibi inventae sunt asinae ad quas ieras perquirendas et intermissis pater tuus asinis sollicitus est pro vobis et dicit quid faciam de filio meo
Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo: ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna: ‘Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali.’ › »
3 cumque abieris inde et ultra transieris et veneris ad quercum Thabor invenient te ibi tres viri ascendentes ad Deum in Bethel unus portans tres hedos et alius tres tortas panis et alius portans lagoenam vini
Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba; mosusu, biteni misato ya mapa; mpe mosusu, molangi ya vino.
4 cumque te salutaverint dabunt tibi duos panes et accipies de manu eorum
Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango.
5 post haec venies in collem Domini ubi est statio Philisthinorum et cum ingressus fueris ibi urbem obviam habebis gregem prophetarum descendentium de excelso et ante eos psalterium et tympanum et tibiam et citharam ipsosque prophetantes
Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.
6 et insiliet in te spiritus Domini et prophetabis cum eis et mutaberis in virum alium
Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu.
7 quando ergo evenerint signa haec omnia tibi fac quaecumque invenerit manus tua quia Dominus tecum est
Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
8 et descendes ante me in Galgala ego quippe descendam ad te ut offeras oblationem et immoles victimas pacificas septem diebus expectabis donec veniam ad te et ostendam tibi quae facias
Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
9 itaque cum avertisset umerum suum ut abiret a Samuhele inmutavit ei Deus cor aliud et venerunt omnia signa haec in die illa
Tango kaka Saulo abalukaki mpo na kotika Samuele, Nzambe abongolaki motema ya Saulo, mpe bilembo nyonso ekokisamaki mokolo wana kaka.
10 veneruntque ad praedictum collem et ecce cuneus prophetarum obvius ei et insilivit super eum spiritus Dei et prophetavit in medio eorum
Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango.
11 videntes autem omnes qui noverant eum heri et nudius tertius quod esset cum prophetis et prophetaret dixerunt ad invicem quaenam res accidit filio Cis num et Saul in prophetis
Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki: « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli? »
12 responditque alius ad alterum dicens et quis pater eorum propterea versum est in proverbium num et Saul inter prophetas
Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki: « Bongo nani azali motambolisi na bango? » Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo: « Saulo mpe azali moko kati na basakoli? »
13 cessavit autem prophetare et venit ad excelsum
Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba.
14 dixitque patruus Saul ad eum et ad puerum eius quo abistis qui responderunt quaerere asinas quas cum non repperissemus venimus ad Samuhelem
Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye: — Bokendeki wapi? Saulo azongisaki: — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.
15 et dixit ei patruus suus indica mihi quid dixerit tibi Samuhel
Noko ya Saulo alobaki lisusu: — Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino.
16 et ait Saul ad patruum suum indicavit nobis quia inventae essent asinae de sermone autem regni non indicavit ei quem locutus illi fuerat Samuhel
Saulo azongiselaki noko na ye: — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.
17 et convocavit Samuhel populum ad Dominum in Maspha
Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe
18 et ait ad filios Israhel haec dicit Dominus Deus Israhel ego eduxi Israhel de Aegypto et erui vos de manu Aegyptiorum et de manu omnium regum qui adfligebant vos
mpe alobaki na bango: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. ›
19 vos autem hodie proiecistis Deum vestrum qui solus salvavit vos de universis malis et tribulationibus vestris et dixistis nequaquam sed regem constitue super nos nunc ergo state coram Domino per tribus vestras et per familias
Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye: ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »
20 et adplicuit Samuhel omnes tribus Israhel et cecidit sors tribus Beniamin
Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki.
21 et adplicuit tribum Beniamin et cognationes eius et cecidit cognatio Metri et pervenit usque ad Saul filium Cis quaesierunt ergo eum et non est inventus
Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te.
22 et consuluerunt post haec Dominum utrumnam venturus esset illuc responditque Dominus ecce absconditus est domi
Boye, batunaki lisusu Yawe: — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa? Yawe azongisaki: — Iyo! Botala ye wana, abombami kati na biloko.
23 cucurrerunt itaque et tulerunt eum inde stetitque in medio populi et altior fuit universo populo ab umero et sursum
Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi.
24 et ait Samuhel ad omnem populum certe videtis quem elegit Dominus quoniam non sit similis ei in omni populo et clamavit cunctus populus et ait vivat rex
Bongo Samuele alobaki na bato nyonso: — Botala moto oyo Yawe aponi! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga: — Tika ete mokonzi awumela na bomoi!
25 locutus est autem Samuhel ad populum legem regni et scripsit in libro et reposuit coram Domino et dimisit Samuhel omnem populum singulos in domum suam
Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye.
26 sed et Saul abiit in domum suam in Gabaath et abiit cum eo pars exercitus quorum tetigerat Deus corda
Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye.
27 filii vero Belial dixerunt num salvare nos poterit iste et despexerunt eum et non adtulerunt ei munera ille vero dissimulabat se audire
Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba: « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.

< I Samuelis 10 >