< Mattheum 2 >

1 Cum ergo natus esset Iesus in Bethlehem Iuda in diebus Herodis regis, ecce Magi ab oriente venerunt Ierosolymam,
Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi
2 dicentes: Ubi est qui natus est rex Iudaeorum? vidimus enim stellam eius in oriente, et venimus adorare eum.
mpe batunaki: « Mokonzi ya Bayuda oyo abotami azali wapi? Tomonaki monzoto na Ye kobima, yango wana toyei kogumbamela Ye. »
3 Audiens autem Herodes rex, turbatus est, et omnis Ierosolyma cum illo.
Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba.
4 Et congregans omnes principes sacerdotum, et Scribas populi, sciscitabatur ab eis ubi Christus nasceretur.
Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko; atunaki bango: — Klisto asengeli kobotama wapi?
5 At illi dixerunt ei: In Bethlehem Iuda: Sic enim scriptum est per Prophetam:
Bazongiselaki ye: — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma:
6 Et tu Bethlehem terra Iuda, nequaquam minima es in principibus Iuda: ex te enim exiet dux, qui regat populum meum Israel.
« Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »
7 Tunc Herodes clam vocatis Magis diligenter didicit ab eis tempus stellae, quae apparuit eis:
Bongo, Erode abengaki bato ya mayele na nkuku mpe alukaki koyeba epai na bango tango nini monzoto ebimaki.
8 et mittens illos in Bethlehem, dixit: Ite, et interrogate diligenter de puero: et cum inveneritis, renunciate mihi, ut et ego veniens adorem eum.
Boye, atindaki bango na Beteleemi; alobaki: — Bokende koluka malamu mwana yango, na Beteleemi; tango kaka bokomona ye, boyebisa ngai mpo ete ngai mpe nakende kogumbamela ye.
9 Qui cum audissent regem, abierunt. et ecce stella, quam viderant in oriente, antecedebat eos, usquedum veniens staret supra, ubi erat puer.
Sima na bango koyoka maloba ya mokonzi, bakobaki nzela na bango. Bamonaki lisusu monzoto oyo ewutaki kobima na este: monzoto yango ezalaki kotambola liboso na bango kino ekendeki kotelema na likolo ya esika oyo Mwana azalaki.
10 Videntes autem stellam gavisi sunt gaudio magno valde.
Tango kaka bamonaki lisusu monzoto yango, batondisamaki na esengo.
11 Et intrantes domum, invenerunt puerum cum Maria matre eius, et procidentes adoraverunt eum: et apertis thesauris suis obtulerunt ei munera, aurum, tus, et myrrham.
Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado: wolo, malasi ya ansa mpe mire.
12 Et responso accepto in somnis ne redirent ad Herodem, per aliam viam reversi sunt in regionem suam.
Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu.
13 Qui cum recessissent, ecce angelus Domini apparuit in somnis Ioseph, dicens: Surge, accipe puerum, et matrem eius, et fuge in Aegyptum, et esto ibi usque dum dicam tibi. Futurum est enim ut Herodes quaerat puerum ad perdendum eum.
Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye: « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »
14 Qui consurgens accepit puerum, et matrem eius nocte, et secessit in Aegyptum:
Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye, kaka na butu wana, mpe akimaki na Ejipito
15 et erat ibi usque ad obitum Herodis: ut adimpleretur quod dictum est a Domino per Prophetam dicentem: Ex Aegypto vocavi filium meum.
epai wapi awumelaki kino na kufa ya Erode, mpo ete makambo oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli ekokisama: « Wuta na Ejipito, nabengaki mwana na Ngai. »
16 Tunc Herodes videns quoniam illusus esset a Magis, iratus est valde, et mittens occidit omnes pueros, qui erant in Bethlehem, et in omnibus finibus eius a bimatu et infra secundum tempus, quod exquisierat a Magis.
Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.
17 Tunc adimpletum est quod dictum est per Ieremiam prophetam dicentem:
Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki:
18 Vox in Rama audita est ploratus, et ululatus multus: Rachel plorans filios suos, et noluit consolari, quia non sunt.
« Makelele moko eyokani na Rama, makelele ya kolela makasi mpe ya matanga: Rasheli azali kolela bana na ye; aboyi kobondisama, pamba te bazali lisusu na bomoi te. »
19 Defuncto autem Herode, ecce angelus Domini apparuit in somnis Ioseph in Aegypto,
Sima na kufa ya Erode, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto, kuna na Ejipito,
20 dicens: Surge, et accipe puerum, et matrem eius, et vade in terram Israel: defuncti sunt enim, qui quaerebant animam pueri.
mpe alobaki na ye: « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye, mpe zonga kati na mokili ya Isalaele, pamba te bato oyo bazalaki koluka koboma Mwana basili kokufa. »
21 Qui consurgens, accepit puerum, et matrem eius, et venit in terram Israel.
Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye mpe akendeki na mokili ya Isalaele.
22 Audiens autem quod Archelaus regnaret in Iudaea pro Herode patre suo, timuit illo ire: et admonitus in somnis, secessit in partes Galilaeae.
Kasi tango ayokaki ete Arikelawusi akitanaki na tata na ye, Erode, na bokonzi kati na Yuda, abangaki kokende kuna; kasi Nzambe akebisaki Jozefi kati na ndoto, mpe Jozefi akendeki kati na etuka ya Galile
23 Et veniens habitavit in civitate quae vocatur Nazareth: ut adimpleretur quod dictum est per Prophetas: Quoniam Nazaraeus vocabitur.
epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama: « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »

< Mattheum 2 >