< Hebræos 8 >

1 Capitulum autem super ea, quae dicuntur: Talem habemus Pontificem, qui consedit in dextera sedis magnitudinis in caelis,
Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba: tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.
2 sanctorum minister, et tabernaculi veri, quod fixit Deus, et non homo.
Kuna na Likolo, asalaka mosala na Ye kati na Esika ya bule, elingi koloba: Mongombo ya solo, oyo Ye moko Nkolo atonga, kasi bato te.
3 Omnis enim pontifex ad offerendum munera, et hostias constituitur: unde necesse est et hunc habere aliquid, quod offerat:
Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe atiamaka mpo na kobonza makabo mpe bambeka. Boye Yesu, Mokonzi na biso ya Banganga-Nzambe, asengeli mpe kozala na eloko ya kobonza lokola likabo to mbeka.
4 si ergo esset super terram, nec esset sacerdos: cum essent qui offerent secundum legem munera,
Soki azalaki na mokili, alingaki kozala ata Nganga-Nzambe te, pamba te ezali kuna na Banganga-Nzambe oyo babonzaka makabo kolanda Mobeko,
5 qui exemplari, et umbrae deserviunt caelestium. Sicut responsum est Moysi, cum consummaret tabernaculum: Vide (inquit) omnia facito secundum exemplar, quod tibi ostensum est in monte.
ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye: « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »
6 Nunc autem melius sortitus est ministerium, quanto et melioris testamenti mediator est, quod in melioribus repromissionibus sancitum est.
Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.
7 Nam si illud prius culpa vacasset: non utique secundi locus inquireretur.
Solo, soki boyokani ya liboso ezangaki pamela, tina ya koluka boyokani ya mibale elingaki kozala te.
8 Vituperans enim eos dicit: Ecce dies venient, dicit Dominus: et consummabo super domum Israel, et super domum Iuda testamentum novum,
Nzokande, Nzambe apamelaki penza bato na Ye tango alobaki: « Na mikolo ekoya, nakosala Boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda:
9 non secundum testamentum, quod feci patribus eorum in die, qua apprehendi manum eorum ut educerem illos de Terra Aegypti: quoniam ipsi non permanserunt in testamento meo: et ego neglexi eos, dicit Dominus:
ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito, pamba te lokola bakataki boyokani na Ngai, Ngai mpe napesaki bango mokongo, elobi Nkolo.
10 Quia hoc est testamentum, quod disponam domui Israel post dies illos, dicit Dominus: Dabo leges meas in mentem eorum, et in corde eorum superscribam eas: et ero eis in Deum, et ipsi erunt mihi in populum:
Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo: ‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
11 et non docebit unusquisque proximum suum, et unusquisque fratrem suum, dicens: Cognosce Dominum: quoniam omnes scient me a minore usque ad maiorem eorum:
Moko te akoteya lisusu moninga to ndeko na ye na koloba: Yeba Nkolo! Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo,
12 quia propitius ero iniquitatibus eorum, et peccatorum eorum iam non memorabor.
nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »
13 Dicendo autem novum: veteravit prius. Quod autem antiquatur, et senescit, prope interitum est.
Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.

< Hebræos 8 >