< Lucam 20 >

1 Et factum est in una dierum, docente illo populum in templo, et evangelizante, convenerunt principes sacerdotum, et scribæ cum senioribus,
Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye;
2 et aiunt dicentes ad illum: Dic nobis, in qua potestate hæc facis? aut: Quis est, qui dedit tibi hanc potestatem?
balobaki na Ye: — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo? Nani apesi yo bokonzi yango?
3 Respondens autem Iesus, dixit ad illos: Interrogabo vos et ego unum verbum. Respondete mihi:
Yesu azongisaki: — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai:
4 Baptismus Ioannis de cælo erat, an ex hominibus?
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato?
5 At illi cogitabant intra se, dicentes: Quia si dixerimus, de cælo, dicet: Quare ergo non credidistis illi?
Bakomaki kokabola makanisi bango na bango: « Soki tolobi: ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu: ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te? ›
6 Si autem dixerimus, Ex hominibus, plebs universa lapidabit nos: certi sunt enim, Ioannem prophetam esse.
Soki mpe tolobi: ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. »
7 Et responderunt se nescire unde esset.
Boye, bazongisaki: — Toyebi te epai wapi ewutaki.
8 Et Iesus ait illis: Neque ego dico vobis in qua potestate hæc facio.
Yesu alobaki: — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
9 Cœpit autem dicere ad plebem parabolam hanc: Homo plantavit vineam, et locavit eam colonis: et ipse peregre fuit multis temporibus.
Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo: — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi.
10 Et in tempore misit ad cultores servum, ut de fructu vineæ darent illi. Qui cæsum dimiserunt eum inanem.
Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
11 Et addidit alterum servum mittere. Illi autem hunc quoque cædentes, et afficientes contumelia, dimiserunt inanem.
Atindaki mosali mosusu; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
12 Et addidit tertium mittere: qui et illum vulnerantes eiecerunt.
Atindaki lisusu mosali ya misato; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.
13 Dixit autem dominus vineæ: Quid faciam? Mittam filium meum dilectum: forsitan, cum hunc viderint, verebuntur.
Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki: « Nasala nini? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi; tango mosusu, bakotosa ye. »
14 Quem cum vidissent coloni, cogitaverunt intra se, dicentes: Hic est heres, occidamus illum, ut nostra fiat hereditas.
Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango: « Tala mokitani ya libula! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso! »
15 Et eiectum illum extra vineam, occiderunt. Quid ergo faciet illis dominus vineæ?
Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Nkolo elanga ya vino akosala bango nini?
16 Veniet, et perdet colonos istos, et dabit vineam aliis. Quo audito, dixerunt illi: Absit.
Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki: — Te, ekoki kosalema te!
17 Ille autem aspiciens eos ait: Quid est ergo hoc, quod scriptum est: Lapidem, quem reprobaverunt ædificantes, hic factus est in caput anguli?
Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki: — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako? »
18 Omnis, qui ceciderit super illum lapidem, conquassabitur: super quem autem ceciderit, comminuet illum.
Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.
19 Et quærebant principes sacerdotum, et scribæ mittere in illum manus illa hora: et timuerunt populum: cognoverunt enim quod ad ipsos dixerit similitudinem hanc.
Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango; kasi babangaki bato.
20 Et observantes miserunt insidiatores, qui se iustos simularent, ut caparent eum in sermone, ut traderent illum principatui, et potestati præsidis.
Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
21 Et interrogaverunt eum, dicentes: Magister, scimus quia recte dicis, et doces: et non accipis personam, sed viam Dei in veritate doces:
Banongi yango batunaki Yesu: — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe.
22 licet nobis tributum dare Cæsari, an non?
Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te?
23 Considerans autem dolum illorum, dixit ad eos: Quid me tentatis?
Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango:
24 Ostendite mihi denarium: Cuius habet imaginem, et inscriptionem? Respondentes dixerunt ei: Cæsaris.
— Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani? Bazongisaki: — Ya Sezare!
25 Et ait illis: Reddite ergo quæ sunt Cæsaris, Cæsari: et quæ sunt Dei, Deo.
Yesu alobaki na bango: — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe!
26 Et non potuerunt verbum eius reprehendere coram plebe: et mirati in responso eius, tacuerunt.
Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.
27 Accesserunt autem quidam Sadducæorum, qui negant esse resurrectionem, et interrogaverunt eum,
Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo:
28 dicentes: Magister, Moyses scripsit nobis: Si frater alicuius mortuus fuerit habens uxorem, et hic sine liberis fuerit, ut accipiat eam frater eius uxorem, et suscitet semen fratri suo:
— Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi: « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. »
29 septem ergo fratres erant: et primus accepit uxorem, et mortuus est sine filiis.
Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
30 Et sequens accepit illam, et ipse mortuus est sine filio.
Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka;
31 Et tertius accepit illam. Similiter et omnes septem, et non reliquerunt semen, et mortui sunt.
sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo: bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te.
32 Novissime omnium mortua est et mulier.
Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
33 In resurrectione ergo, cuius eorum erit uxor? Siquidem septem habuerunt eam uxorem.
Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye?
34 Et ait illis Iesus: Filii huius sæculi nubunt, et traduntur ad nuptias: (aiōn g165)
Yesu azongisaki: — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka; (aiōn g165)
35 illi vero qui digni habebuntur sæculo illo, et resurrectione ex mortuis, neque nubent, neque ducent uxores: (aiōn g165)
kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te (aiōn g165)
36 neque enim ultra mori potuerunt: æquales enim Angelis sunt, et filii sunt Dei: cum sint filii resurrectionis.
mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.
37 Quia vero resurgant mortui, et Moyses ostendit secus rubum, sicut dicit Dominum, Deum Abraham, et Deum Isaac, et Deum Iacob.
Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. »
38 Deus autem non est mortuorum, sed vivorum: omnes enim vivunt ei.
Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.
39 Respondentes autem quidam scribarum, dixerunt ei: Magister, bene dixisti.
Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki: — Moteyi, olobi malamu!
40 Et amplius non audebant eum quidquam interrogare.
Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
41 Dixit autem ad illos: Quomodo dicunt Christum, filium esse David?
Yesu mpe atunaki bango: — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi?
42 Et ipse David dicit in libro Psalmorum: Dixit Dominus Domino meo, sede a dextris meis,
Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo: « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
43 donec ponam inimicos tuos, scabellum pedum tuorum?
kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
44 David ergo Dominum illum vocat: et quomodo filius eius est?
Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye?
45 Audiente autem omni populo, dixit discipulis suis:
Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye:
46 Attendite a scribis, qui volunt ambulare in stolis, et amant salutationes in foro, et primas cathedras in synagogis, et primos discubitus in conviviis:
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti;
47 qui devorant domos viduarum, simulantes longam orationem. Hi accipient damnationem maiorem.
bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.

< Lucam 20 >