< Leviticus 9 >

1 Facto autem octavo die, vocavit Moyses Aaron et filios eius, ac maiores natu Israel, dixitque ad Aaron:
Na mokolo ya mwambe, Moyize abengisaki Aron, bana na ye ya mibali mpe bakambi ya Isalaele.
2 Tolle de armento vitulum pro peccato, et arietem in holocaustum, utrumque immaculatum, et offer illos coram Domino.
Alobaki na Aron: « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe.
3 Et ad filios Israel loqueris: Tollite hircum pro peccato, et vitulum, atque agnum anniculos, et sine macula in holocaustum,
Bongo loba na bana ya Isalaele: ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba,
4 bovem et arietem pro pacificis: et immolate eos coram Domino, in sacrificio singulorum similam conspersam oleo offerentes. Hodie enim Dominus apparebit vobis.
mpe ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya boyokani, mpo na kobonza lokola mbeka liboso ya Yawe elongo na likabo ya bambuma basangisa na mafuta. Pamba te, na mokolo ya lelo, Yawe akobimela bino. › »
5 Tulerunt ergo cuncta quæ iusserat Moyses ad ostium tabernaculi: ubi cum omnis multitudo astaret,
Bamemaki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani biloko oyo Moyize atindaki bango; mpe lisanga mobimba bapusanaki mpe batelemaki liboso ya Yawe.
6 ait Moyses: Iste est sermo, quem præcepit Dominus: facite, et apparebit vobis gloria eius.
Moyize alobaki: « Tala makambo oyo Yawe atindi bino kosala mpo ete nkembo na Yawe ebimela bino. »
7 Et dixit ad Aaron: Accede ad altare, et immola pro peccato tuo: offer holocaustum, et deprecare pro te et pro populo. Cumque mactaveris hostiam populi, ora pro eo, sicut præcepit Dominus.
Moyize alobaki na Aron: « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. »
8 Statimque Aaron accedens ad altare, immolavit vitulum pro peccato suo:
Aron apusanaki pene ya etumbelo mpe akataki kingo ya mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na ye moko.
9 cuius sanguinem obtulerunt ei filii sui: in quo tingens digitum, tetigit cornua altaris, et fudit residuum ad basim eius.
Bongo bana mibali ya Aron bamemelaki ye makila. Aron azindisaki mosapi na ye kati na makila, apakolaki makila yango na maseke ya etumbelo mpe asopaki makila oyo etikalaki na makolo ya etumbelo.
10 Adipemque et renunculos, ac reticulum iecoris, quæ sunt pro peccato, adolevit super altare, sicut præceperat Dominus Moysi:
Atumbaki na etumbelo: mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
11 carnes vero et pellem eius extra castra combussit igni.
Atumbaki na moto mosuni mpe poso na libanda ya molako.
12 Immolavit et holocausti victimam: obtuleruntque ei filii sui sanguinem eius, quem fudit per altaris circuitum.
Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
13 Ipsam etiam hostiam in frusta concisam, cum capite et membris singulis obtulerunt. Quæ omnia super altare cremavit igni,
Bapesaki ye mbeka ya kotumba bakata biteni-biteni elongo na moto, mpe atumbaki yango na etumbelo.
14 lotis aqua prius intestinis et pedibus.
Asukolaki biloko ya kati mpe makolo, atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba.
15 Et pro peccato populi offerens, mactavit hircum: expiatoque altari,
Aron amemaki likabo oyo ezalaki mpo na bato. Azwaki ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ya bato, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka ya masumu ndenge asalaki na mbeka ya liboso.
16 fecit holocaustum,
Aron amemaki mbeka ya kotumba mpe abonzaki yango kolanda mitindo.
17 addens in sacrificio libamenta, quæ pariter offeruntur, et adolens ea super altare, absque ceremoniis holocausti matutini.
Amemaki mpe likabo ya bambuma, atondisaki yango na loboko na ye mpe atumbaki yango na etumbelo elongo na mbeka ya kotumba ya tongo.
18 Immolavit et bovem atque arietem, hostias pacificas populi: obtuleruntque ei filii sui sanguinem, quem fudit super altare in circuitum.
Aron akataki kingo ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali lokola mbeka ya boyokani mpo na bato; bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
19 Adipem autem bovis, et caudam arietis, renunculosque cum adipibus suis, et reticulum iecoris
Bapesaki ye mpe biteni ya mafuta ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali, mokila, mafuta ya biloko ya kati, mafuta ya bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe bafwa.
20 posuerunt super pectora. Cumque cremati essent adipes super altare,
Batiaki biteni yango na batolo ya banyama nyonso mibale mpe Aron atumbaki mafuta na etumbelo.
21 pectora eorum, et armos dextros separavit Aaron, elevans coram Domino, sicut præceperat Moyses.
Aron atombolaki liboso ya Yawe likabo ya kotombola, batolo mpe mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ndenge Moyize atindaki.
22 Et extendens manus ad populum, benedixit ei. Sicque completis hostiis pro peccato, et holocaustis, et pacificis, descendit.
Aron atombolaki maboko na ye epai ya bato mpe apambolaki bango; bongo akitaki sima na kobonza mbeka ya masumu, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.
23 Ingressi autem Moyses et Aaron in tabernaculum testimonii, et deinceps egressi benedixerunt populo. Apparuitque gloria Domini omni multitudini:
Moyize mpe Aron bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo tango babimaki, bapambolaki bato, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bato nyonso.
24 et ecce egressus ignis a Domino, devoravit holocaustum, et adipes qui erant super altare. Quod cum vidissent turbæ, laudaverunt Dominum, ruentes in facies suas.
Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se.

< Leviticus 9 >