< Ii Paralipomenon 13 >

1 Anno octavodecimo regis Ieroboam, regnavit Abia super Iudam.
Tango Jeroboami akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiya akomaki mokonzi ya Yuda
2 Tribus annis regnavit in Ierusalem, nomenque matris eius Michaia, filia Uriel de Gabaa: et erat bellum inter Abiam et Ieroboam.
mpe akonzaki mibu misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Mikaya. » Mikaya azalaki mwana ya Urieli, moto ya Gibea. Ezalaki na etumba kati na Abiya mpe Jeroboami.
3 Cumque iniisset Abia certamen, et haberet bellicosissimos viros, et electorum quadringenta millia: Ieroboam instruxit econtra aciem octingenta millia virorum, qui et ipsi electi erant, et ad bella fortissimi.
Bongo kati na mampinga na bango, emonanaki ete Abiya azalaki na bilombe ya bitumba nkoto nkama minei, mpe Jeroboami, nkoto nkama mwambe.
4 Stetit ergo Abia super montem Semeron, qui erat in Ephraim, et ait: Audi Ieroboam, et omnis Israel.
Abiya atelemaki na likolo ya ngomba Tsemarayimi oyo ezali kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe alobaki: « Jeroboami mpe Isalaele, boyoka ngai malamu!
5 Num ignoratis quod Dominus Deus Israel dederit regnum David super Israel in sempiternum, ipsi et filiis eius in pactum salis?
Boyebi te ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesa mpo na libela bokonzi ya Isalaele epai ya Davidi mpe bana na ye na nzela ya boyokani oyo ekoki kobongwana te?
6 Et surrexit Ieroboam filius Nabat, servus Salomonis filii David: et rebellavit contra dominum suum.
Kasi Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mosali ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, atelemaki mpo na kotombokela mokonzi na ye.
7 Congregatique sunt ad eum viri vanissimi, et filii Belial: et prævaluerunt contra Roboam filium Salomonis: porro Roboam erat rudis, et corde pavido, nec potuit resistere eis.
Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango.
8 Nunc ergo vos dicitis quod resistere possitis regno Domini, quod possidet per filios David, habetisque grandem populi multitudinem, atque vitulos aureos, quos fecit vobis Ieroboam in deos.
Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe.
9 Et eiecistis Sacerdotes Domini, filios Aaron, atque Levitas: et fecistis vobis Sacerdotes sicut omnes populi terrarum: quicumque venerit, et initiaverit manum suam in tauro de bobus, et in arietibus septem, fit sacerdos eorum, qui non sunt dii.
Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te.
10 Noster autem Dominus, Deus est, quem non relinquimus, Sacerdotesque ministrant Domino de filiis Aaron, et Levitæ sunt in ordine suo:
Nzokande epai na biso, Yawe nde azali Nzambe na biso, mpe tosundola Ye te; bana mibali ya Aron nde bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ye, mpe Balevi basungaka bango.
11 Holocausta quoque offerunt Domino per singulos dies mane et vespere, et thymiama iuxta legis præcepta confectum, et proponuntur panes in mensa mundissima, estque apud nos candelabrum aureum, et lucernæ eius, ut accendantur semper ad vesperam: nos quippe custodimus præcepta Domini Dei nostri, quem vos reliquistis.
Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso; kasi bino, bosundolaki Ye.
12 Ergo in exercitu nostro dux Deus est, et Sacerdotes eius, qui clangunt tubis, et resonant contra vos: filii Israel nolite pugnare contra Dominum Deum patrum vestrorum, quia non vobis expedit.
Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. »
13 Hæc illo loquente, Ieroboam retro moliebatur insidias. Cumque ex adverso hostium staret, ignorantem Iudam suo ambiebat exercitu.
Na tango wana, Jeroboami atindaki limpinga moko ya basoda mpo ete babombama na sima ya basoda ya Yuda. Boye, basoda ya Yuda bazwamaki lokola na motambo: liboso na bango, ezalaki na mampinga ya Isalaele; mpe sima na bango, basoda oyo babombamaki.
14 Respiciensque Iudas vidit instare bellum ex adverso et post tergum, et clamavit ad Dominum: ac Sacerdotes tubis canere cœperunt.
Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo.
15 Omnesque viri Iuda vociferati sunt: et ecce illis clamantibus, perterruit Deus Ieroboam, et omnem Israel qui stabat ex adverso Abia et Iuda.
Basoda ya Yuda babetaki lokito ya bitumba; mpe na lokito na bango, Yawe Nzambe akweyisaki Jeroboami mpe Isalaele nyonso liboso ya Abiya mpe ya Yuda.
16 Fugeruntque filii Israel Iudam, et tradidit eos Deus in manu eorum.
Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda.
17 Percussit ergo eos Abia, et populus eius plaga magna: et corruerunt vulnerati ex Israel quingenta millia virorum fortium.
Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano.
18 Humiliatique sunt filii Israel in tempore illo, et vehementissime confortati filii Iuda eo quod sperassent in Domino Deo patrum suorum.
Na tango wana, basoda ya Isalaele basambwaki; kasi ba-oyo ya Yuda bazwaki elonga, pamba te batiaki elikya na Yawe, Nzambe ya batata na bango.
19 Persecutus est autem Abia fugientem Ieroboam, et cepit civitates eius, Bethel et filias eius, et Iesana cum filiabus suis, Ephron quoque et filias eius:
Abiya alandaki Jeroboami mpe abotolaki ye bingumba ebele: Beteli, Yeshana mpe Efroni elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
20 nec valuit ultra resistere Ieroboam in diebus Abia: quem percussit Dominus, et mortuus est.
Na mikolo nyonso oyo Abiya azalaki na bokonzi, Jeroboami azongelaki te nguya na ye ya kala. Yawe abetaki ye mpe akufaki.
21 Igitur Abia, confortato imperio suo, accepit uxores quattuordecim: procreavitque viginti duos filios, et sedecim filias.
Nzokande, Abiya alendisaki bokonzi na ye. Abalaki basi zomi na minei mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mibale mpe bana basi zomi na motoba.
22 Reliqua autem sermonum Abia, viarumque et operum eius, scripta sunt diligentissime in Libro Addo Prophetæ.
Makambo mpe misala mosusu ya Abiya, etamboli mpe maloba na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya momoni makambo Ido.

< Ii Paralipomenon 13 >