< 시편 65 >

1 (다윗의 시. 영장으로 한 노래) 하나님이여, 찬송이 시온에서 주를 기다리오며 사람이 서원을 주께 이행하리이다
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
2 기도를 들으시는 주여, 모든 육체가 주께 나아오리이다
Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.
3 죄악이 나를 이기었사오니 우리의 죄과를 주께서 사하시리이다
Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai; kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.
4 주께서 택하시고 가까이 오게 하사 주의 뜰에 거하게 하신 사람은 복이 있나이다 우리가 주의 집 곧 주의 성전의 아름다움으로 만족하리이다
Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.
5 우리 구원의 하나님이시여, 땅의 모든 끝과 먼 바다에 있는 자의 의지할 주께서 의를 좇아 엄위하신 일로 우리에게 응답하시리이 다
Nzambe Mobikisi na biso, oyanolaka biso na bosembo, na nzela ya biloko ya somo; Ozali elikya ya mokili mobimba mpe ya bibale minene.
6 주는 주의 힘으로 산을 세우시며 권능으로 띠를 띠시며
Alendisaka bangomba, na nguya na Ye; atondi na mpiko.
7 바다의 흉용과 물결의 요동과 만민의 훤화까지 진정하시나이다
Akitisaka makelele ya bibale minene, makelele ya bambonge na yango mpe makelele ya bikolo.
8 땅 끝에 거하는 자가 주의 징조를 두려워하나이다 주께서 아침 되는 것과 저녁되는 것을 즐거워하게 하시며
Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.
9 땅을 권고하사 물을 대어 심히 윤택케 하시며 하나님의 강에 물이 가득하게 하시고 이 같이 땅을 예비하신 후에 저희에게 곡식 을 주시나이다
Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
10 주께서 밭고랑에 물을 넉넉히 대사 그 이랑을 평평하게 하시며 또 단비로 부드럽게 하시고 그 싹에 복주시나이다
Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.
11 주의 은택으로 년사에 관 씌우시니 주의 길에는 기름이 떨어지며
Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.
12 들의 초장에도 떨어지니 작은 산들이 기쁨으로 띠를 띠었나이다
Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.
13 초장에는 양떼가 입혔고 골짜기에는 곡식이 덮였으매 저희가 다 즐거이 외치고 또 노래하나이다
Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba; mabwaku etondaka na ble, egangaka na esengo mpe eyembaka.

< 시편 65 >