< 민수기 26 >

1 염병 후에 여호와께서 모세와 제사장 아론의 아들 엘르아살에게 일러 가라사대
Sima na etumbu wana, Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron:
2 이스라엘 자손의 온 회중의 총수를 그 조상의 집을 따라 조사하되 이스라엘 중에 무릇 이십세 이상으로 능히 싸움에 나갈 만한 자를 계수하라 하시니
« Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. »
3 모세와 제사장 엘르아살이 여리고 맞은편 요단 가 모압 평지에서 그들에게 고하여 가로되
Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki:
4 `여호와께서 애굽 땅에서 나온 모세와 이스라엘 자손에게 명하신대로 너희는 이십세 이상된 자를 계수하라' 하시니
« Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. » Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito:
5 이스라엘의 장자는 르우벤이라 르우벤 자손은 하녹에게서 난 하녹 가족과, 발루에게서 난 발루 가족과
Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki; na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu;
6 헤스론에게서 난 헤스론 가족과, 갈미에게서 난 갈미 가족이니
na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi; na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi.
7 이는 르우벤 가족들이라 계수함을 입은 자가 사만 삼천 칠백 삼십명이요
Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato.
8 발루의 아들은 엘리압이요
Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu,
9 엘리압의 아들은 느무엘과, 다단과, 아비람이라 이 다단과, 아비람은 회중 가운데서 부름을 받은 자러니 고라의 무리에 들어가서 모세와 아론을 거스려 여호와께 패역할 때에
mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe.
10 땅이 그 입을 열어서 그 무리와 고라를 삼키매 그들이 죽었고 당시에 불이 이백 오십명을 삼켜 징계가 되게 하였으나
Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa.
11 그러나 고라의 아들들은 죽지 아니하였더라
Kasi bakitani ya Kore bakufaki te.
12 시므온 자손은 그 종족대로 이러하니 느무엘에게서 난 느무엘 가족과, 야민에게서 난 야민 가족과, 야긴에게서 난 야긴 가족과
Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli; na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini; na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini;
13 세라에게서 난 세라 가족과, 사울에게서 난 사울 가족이라
na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi; na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo.
14 이는 시므온 종족들이니 계수함을 입은 자가 이만 이천 이백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale.
15 갓 자손은 그 종족대로 이러하니 스본에게서 난 스본 가족과, 학기에게서 난 학기 가족과, 수니에게서 난 수니 가족과
Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni; na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi; na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni;
16 오스니에게서 난 오스니 가족과, 에리에게서 난 에리 가족과
na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini; na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri;
17 아롯에게서 난 아롯 가족과, 아렐리에게서 난 아렐리 가족이라
na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki; na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli.
18 이는 갓 자손의 종족들이니 계수함을 입은 자가 사만 오백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
19 유다의 아들은 에르와, 오난이라 이 에르와 오난은 가나안 땅에서 죽었고
Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana.
20 유다의 자손은 그 종족대로 이러하니 셀라에게서 난 셀라 가족과, 베레스에게서 난 베레스 가족과, 세라에게서 난 세라 가족이며
Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.
21 또 베레스 자손은 이러하니 헤스론에게서 난 헤스론 가족과, 하물에게서 난 하물 가족이라
Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi; na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli.
22 이는 유다 종족들이니 계수함을 입은 자가 칠만 육천 오백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Yuda; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano.
23 잇사갈 자손은 그 종족대로 이러하니 돌라에게서 난 돌라 가족과, 부와에게서 난 부니 가족과
Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola; na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa;
24 야숩에게서 난 야숩 가족과 시므론에게서 난 시므론 가족이라
na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi; na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi.
25 이는 잇사갈 종족들이니 계수함을 입은 자가 육만 사천 삼백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Isakari; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato.
26 스불론 자손들은 그 종족대로 이러하니 세렛에게서 난 세렛 가족과, 엘론에게서 난 엘론 가족과, 얄르엘에게서 난 얄르엘 가족이라
Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi; na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni; na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli.
27 이는 스불론 종족들이니 계수함을 입은 자가 육만 오백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano.
28 요셉의 아들들은 그 종족대로 므낫세와 에브라임이요
Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki:
29 므낫세의 자손 중 마길에게서 난 것은 마길 가족이라 마길이 길르앗을 낳았고 길르앗에게서 난 것은 길르앗 가족이라
Bakitani ya Manase: na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi); na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi.
30 길르앗 자손은 이러하니 이에셀에게서 난 이에셀 가족과, 헬렉에게서 난 헬렉 가족과
Tala bakitani ya Galadi: na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri; na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki;
31 아스리엘에게서 난 아스리엘 가족과, 세겜에게서 난 세겜 가족과
na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli; na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi;
32 스미다에게서 난 스미다 가족과, 헤벨에게서 난 헤벨 가족이며
na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida; na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi.
33 헤벨의 아들 슬로브핫은 아들이 없고 딸 뿐이라 그 딸의 이름은 말라와, 노아와, 호글라와, 밀가와, 디르사니
Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi; bongo, tala bakombo na bango: Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
34 이는 므낫세의 종족들이라 계수함을 입은 자가 오만 이천 칠백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo.
35 에브라임 자손은 그 종족대로 이러하니 수델라에게서 난 수델라 가족과, 베겔에게서 난 베겔 가족과, 다한에게서 난 다한 가족이며
Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela; na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri; na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani.
36 수델라 자손은 이러하니 에란에게서 난 에란 가족이라
Tala bakitani ya Shutela: na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani.
37 이는 에브라임 자손의 종족들이니 계수함을 입은 자가 삼만 이천 오백명이라 이상은 그 종족을 따른 요셉 자손이었더라
Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango.
38 베냐민 자손들은 그 종족대로 이러하니 벨라에게서 난 벨라 가족과, 아스벨에게서 난 아스벨 가족과, 아히람에게서 난 아히람 가족과
Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki: na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela; na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli; na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami;
39 스부밤에게서 난 스부밤 가족과, 후밤에게서 난 후밤 가족이며
na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami; na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami.
40 벨라의 아들은 아릇과, 나아만이라 아릇에게서 아릇 가족과, 나아만에게서 나아만 가족이 났으니
Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki: na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi; na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani.
41 이는 그들의 종족을 따른 베냐민 자손이라 계수함을 입은 자가 사만 오천 육백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano.
42 단 자손은 그 종족대로 이러하니라 수함에게서 수함 가족이 났으니 이는 그들의 종족을 따른 단 가족들이라
Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami. Bango nde bazalaki bakitani ya Dani:
43 수함 모든 가족의 계수함을 입은 자가 육만 사천 사백명이었더라
bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei.
44 아셀 자손은 그 종족대로 이러하니 임나에게서 난 임나 가족과, 이스위에게서 난 이스위 가족과, 브리아에게서 난 브리아 가족이며
Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina; na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi; na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria;
45 브리아의 자손 중 헤벨에게서 난 헤벨 가족과, 말기엘에게서 난 말기엘 가족이며
na nzela ya bakitani ya Beria: na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi; na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli.
46 아셀의 딸의 이름은 세라라
Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera.
47 이는 아셀 자손의 종족들이니 계수함을 입은 자가 오만 삼천 사백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
48 납달리 자손은 그 종족대로 이러하니 야셀에게서 난 야셀 가족과, 구니에게서 난 구니 가족과
Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki: na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli; na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni;
49 예셀에게서 난 예셀 가족과, 실렘에게서 난 실렘 가족이라
na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri; na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi.
50 이는 그 종족을 따른 납달리 가족들이니 계수함을 입은 자가 사만 오천 사백명이었더라
Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei.
51 이스라엘 자손의 계수함을 입은 자가 육십만 일천 칠백 삼십명이었더라
Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato.
52 여호와께서 모세에게 일러 가라사대
Yawe alobaki na Moyize:
53 이 계수대로 땅을 나눠 주어 기업을 삼게 하라
« Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana.
54 수가 많은 자에게는 기업을 많이 줄 것이요 수가 적은 자에게는 기업을 적게 줄 것이니 그들의 계수함을 입은 수대로 각기 기업을 주되
Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki.
55 오직 그 땅을 제비뽑아 나누어 그들의 조상 지파의 이름을 따라 얻게 할지니라
Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango.
56 그 다소를 물론하고 그 기업을 제비 뽑아 나눌지니라
Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. »
57 레위인의 계수함을 입은 자는 그 종족대로 이러하니 게르손에게서 난 게르손 가족과, 고핫에게서 난 고핫 가족과, 므라리에게서 난 므라리 가족이며
Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango: na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni; na nzela ya Keati, bakitani ya Keati; na nzela ya Merari, bakitani ya Merari.
58 레위 종족들은 이러하니 립니 가족과, 헤브론 가족과, 말리 가족과, 무시 가족과, 고라 가족이라, 고핫은 아므람을 낳았으며
Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi: bakitani ya libota ya Libini, bakitani ya libota ya Ebron, bakitani ya libota ya Maali, bakitani ya libota ya Mushi, bakitani ya libota ya Kore. Keati azalaki tata ya Amirami;
59 아므람의 처의 이름은 요게벳이니 레위의 딸이요 애굽에서 레위에게서 난 자라 그가 아므람에게서 아론과 모세와 그 누이 미리암을 낳았고
bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami.
60 아론에게서는 나답과, 아비후와, 엘르아살과, 이다말이 났더니
Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari.
61 나답과 아비후는 다른 불을 여호와 앞에 드리다가 죽었더라
Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya.
62 레위인의 일개월 이상으로 계수함을 입은 모든 남자가 이만 삼천명이었더라 그들은 이스라엘 자손 중 계수에 들지 아니하였으니 이는 이스라엘 자손 중에서 그들에게 준 기업이 없음이었더라
Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.
63 이는 모세와 제사장 엘르아살의 계수한 자라 그들이 여리고 맞은편 요단 가 모압 평지에서 이스라엘 자손을 계수한 중에는
Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko.
64 모세와 제사장 아론이 시내 광야에서 계수한 이스라엘 자손은 한사람도 들지 못하였으니
Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai.
65 이는 여호와께서 그들에게 대하여 말씀하시기를 그들이 반드시 광야에서 죽으리라 하셨음이라 이러므로 여분네의 아들 갈렙과 눈의 아들 여호수아 외에는 한 사람도 남지 아니하였더라
Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.

< 민수기 26 >