< 사무엘하 1 >

1 사울의 죽은 후라 다윗이 아말렉 사람을 도륙하고 돌아와서 시글락에서 이틀을 유하더니
Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale.
2 제 삼일에 한 사람이 사울의 진에서 나왔는데 그 옷은 찢어졌고 머리에는 흙이 있더라 저가 다윗에게 나아와 땅에 엎드려 절하매
Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.
3 다윗이 저에게 묻되 `너는 어디서 왔느냐?' 대답하되 `이스라엘 진에서 도망하여 왔나이다'
Davidi atunaki ye: — Owuti wapi? Azongisaki: — Nakimi wuta na molako ya Isalaele.
4 다윗이 가로되 `일이 어떻게 되었느뇨 너는 내게 고하라' 저가 대답하되 `군사가 전쟁 중에서 도망하기도 하였고 무리 중에 엎드러져 죽은 자도 많았고 사울과 그 아들 요나단도 죽었나이다'
Davidi atunaki lisusu: — Yebisa ngai makambo nini eleki kuna? Moto yango alobaki: — Mampinga ya Isalaele ekimi bitumba; ebele kati na bango bakweyi na bitumba mpe bakufi, ata Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi.
5 다윗이 자기에게 고하는 소년에게 묻되 `사울과 그 아들 요나단의 죽은 줄을 네가 어떻게 아느냐?'
Bongo Davidi alobaki na elenge mobali oyo azalaki kopesa ye sango: — Oyebi ndenge nini ete Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi?
6 그에게 고하는 소년이 가로되 `내가 우연히 길보아산에 올라 보니 사울이 자기 창을 의지하였고 병거와 기병은 저를 촉급히 따르는데
Elenge mobali azongisaki: — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye.
7 사울이 뒤로 돌이켜 나를 보고 부르시기로 내가 대답하되 내가 여기 있나이다 한즉
Tango kaka abalukaki mpe amonaki ngai, abengaki ngai; mpe ngai nazongisaki: « Ngai oyo. »
8 내게 이르되 너는 누구냐 하시기로 내가 대답하되 나는 아말렉 사람이니이다 한즉
Atunaki ngai: — Ozali nani? Nazongiselaki ye: — Nazali moto ya Amaleki.
9 또 내게 이르되 내 목숨이 아직 내게 완전히 있으므로 내가 고통에 들었나니 너는 내 곁에 서서 나를 죽이라 하시기로
Alobaki na ngai: — Pusana pene na ngai mpe boma ngai, pamba te nazali koyoka lisusu nzoto malamu te, atako nazali nanu na bomoi.
10 저가 엎드러진 후에는 살 수 없는 줄을 내가 알고 그 곁에 서서 죽이고 그 머리에 있는 면류관과 팔에 있는 고리를 벗겨서 내 주께로 가져 왔나이다'
Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai.
11 이에 다윗이 자기 옷을 잡아 찢으매 함께 있는 모든 사람도 그리하고
Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.
12 사울과 그 아들 요나단과 여호와의 백성과 이스라엘 족속이 칼에 죽음을 인하여 저녁때까지 슬퍼하여 울며 금식하니라
Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga.
13 다윗이 그 고한 소년에게 묻되 너는 어디 사람이냐? 대답하되 나는 아말렉 사람 곧 외국인의 아들이니이다
Davidi atunaki elenge mobali oyo amemelaki ye sango: — Ozali moto ya mboka nini? Azongisaki: — Nazali mwana mobali ya mopaya moko, moto ya Amaleki.
14 다윗이 저에게 이르되 `네가 어찌하여 손을 들어 여호와의 기름부음 받은 자 죽이기를 두려워하지 아니하였느냐?' 하고
Davidi atunaki ye: — Mpo na nini obangaki te kosembola loboko na yo mpo na koboma mopakolami na Yawe?
15 소년 중 하나를 불러 이르되 `가까이 가서 저를 죽이라' 하매 그가 치매 곧 죽으니라
Bongo Davidi abengaki moko kati na basoda na ye mpe alobaki: « Yaka, boma ye! » Mpe soda yango abomaki ye.
16 다윗이 저에게 이르기를 `네 피가 네 머리로 돌아갈지어다 네 입이 네게 대하여 증거하기를 내가 여호와의 기름 부음 받은 자를 죽였노라 함이니라' 하였더라
Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango: « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi: ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »
17 다윗이 이 슬픈 노래로 사울과 그 아들 요나단을 조상하고
Davidi asalaki nzembo oyo ya mawa mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali.
18 명하여 그것을 유다 족속에게 가르치라 하였으니 곧 활 노래라 야살의 책에 기록되었으되
Apesaki mitindo ete balakisa yango epai ya bato ya Yuda. Nzembo yango ya mawa ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo.
19 이스라엘아! 너의 영광이 산 위에서 죽임을 당하였도다 오호라! 두용사가 엎드러졌도다
Oh Isalaele, lokumu na yo ekweyi na likolo ya bangomba na yo. Ndenge nini bilombe bakweyi!
20 이 일을 가드에도 고하지 말며 아스글론 거리에도 전파하지 말지어다 블레셋 사람의 딸들이 즐거워할까, 할례받지 못한 자의 딸들이 개가를 부를까 염려로다
Bopanza sango yango te kati na Gati, bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te bakopumbwa na esengo.
21 길보아산들아 너희 위에 우로가 내리지 아니하며 제물 낼 밭도 없을지어다 거기서 두 용사의 방패가 버린 바 됨이라 곧 사울의 방패가 기름 부음을 받지 않음 같이 됨이로다
Oh bangomba ya Giliboa, tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma mpe epai wapi makabo ewutaka! Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te.
22 죽은 자의 피에서, 용사의 기름에서 요나단의 활이 물러가지 아니하였으며 사울의 칼이 헛되이 돌아오지 아니하였도다
Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te soki esopi makila ya banguna te, mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te; mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te soki ekokisi mosala na yango te.
23 사울과 요나단이 생전에 사랑스럽고 아름다운 자러니 죽을 때에도 서로 떠나지 아니하였도다 저희는 독수리보다 빠르고 사자보다 강하였도다
Na mikolo ya bomoi na bango, Saulo mpe Jonatan balinganaki makasi mpe bapesanaki lokumu; mpe na kufa na bango, bakabolaki bango te. Bazalaki mbangu koleka bampongo, makasi koleka bankosi.
24 이스라엘 딸들아! 사울을 슬퍼하여 울지어다! 저가 붉은 옷으로 너희에게 화려하게 입혔고 금 노리개를 너희 옷에 채웠도다
Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino.
25 오호라! 두 용사가 전쟁 중에 엎드러졌도다 요나단이 너의 산위에서 죽임을 당하였도다
Ndenge nini bilombe bakweyi na bitumba! Ndenge nini babomaki Jonatan na bangomba na yo!
26 내 형 요나단이여! 내가 그대를 애통함은 그대는 내게 심히 아름다움이라 그대가 나를 사랑함이 기이하여 여인의 사랑보다 승하였도다
Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi!
27 오호라! 두 용사가 엎드러졌으며 싸우는 병기가 망하였도다 하였더라
Ndenge nini bilombe bakweyi! Ah! bibundeli ya bitumba ekomi pamba!

< 사무엘하 1 >