< 열왕기하 20 >

1 그 때에 히스기야가 병들어 죽게 되매 아모스의 아들 선지자 이사야가 저에게 나아와서 이르되 여호와의 말씀이 너는 집을 처치하라 네가 죽고 살지 못하리라 하셨나이다
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
2 히스기야가 낯을 벽으로 향하고 여호와께 기도하여 가로되
Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe:
3 여호와여 구하오니 내가 진실과 전심으로 주 앞에 행하며 주의 보시기에 선하게 행한 것을 기억하옵소서 하고 심히 통곡하더라
— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
4 이사야가 성읍 가운데까지도 이르기 전에 여호와의 말씀이 저에게 임하여 가라사대
Liboso ete Ezayi akoma na lopango ya monene, Yawe alobaki na ye:
5 너는 돌아가서 내 백성의 주권자 히스기야에게 이르기를 왕의 조상 다윗의 하나님 여호와의 말씀이 내가 네 기도를 들었고 네 눈물을 보았노라 내가 너를 낫게 하리니 네가 삼일만에 여호와의 전에 올라가겠고
— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi: ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.
6 내가 네 날을 십 오년을 더할 것이며 내가 너와 이 성을 앗수르 왕의 손에서 구원하고 내가 나를 위하고 또 내 종 다윗을 위하므로 이 성을 보호하리라 하셨다 하라 하셨더라
Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, wuta na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na Davidi, mosali na Ngai. › »
7 이사야가 가로되 무화과 반죽을 가져오라 하매 무리가 가져다가 그 종처에 놓으니 나으니라
Ezayi alobaki: — Bozwa liboke ya figi. Bazwaki yango, batiaki yango na pota oyo ezalaki kokawuka te, mpe mokonzi abikaki.
8 히스기야가 이사야에게 이르되 여호와께서 나를 낫게 하시고 삼일만에 여호와의 전에 올라가게 하실 무슨 징조가 있나이까
Ezekiasi atunaki Ezayi: — Elembo nini ekolakisa ngai ete Yawe akobikisa ngai, mpe ete nakokende na Tempelo ya Yawe sima na lobi?
9 이사야가 가로되 여호와의 하신 말씀을 응하게 하실 일에 대하여 여호와께로서 왕에게 한 징조가 임하리이다 해 그림자가 십도를 나아 갈것이니이까 혹 십도를 물러갈 것이니이까
Ezayi azongisaki: — Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo: Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi?
10 히스기야가 대답하되 그림자가 십도를 나아가기는 쉬우니 그리할 것이 아니라 십도가 물러갈 것이니이다
Ezekiasi azongisaki: — Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi.
11 선지자 이사야가 여호와께 간구하매 아하스의 일영표 위에 나아갔던 해 그림자로 십도를 물러가게 하셨더라
Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.
12 그 때에 발라단의 아들 바벨론 왕 부로닥발라단이 히스기야가 병들었다 함을 듣고 편지와 예물을 저에게 보낸지라
Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki.
13 히스기야가 사자의 말을 듣고 자기 보물고의 금, 은과 향품과 보배로운 기름과 그 군기고와 내탕고의 모든 것을 다 사자에게 보였는데 무릇 왕궁과 그 나라 안에 있는 것을 저에게 보이지 아니한 것이 없으니라
Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
14 선지자 이사야가 히스기야 왕에게 나아와서 이르되 이 사람들이 무슨 말을 하였으며 어디서부터 왕에게 왔나이까 히스기야가 가로되 먼 지방 바벨론에서 왔나이다
Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye: — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi? Ezekiasi azongisaki: — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni.
15 이사야가 가로되 저희가 왕궁에서 무엇을 보았나이까 히스기야가 대답하되 내 궁에 있는 것을 저희가 다 보았나니 나의 내탕고에서 하나도 보이지 아니한 것이 없나이다
Ezayi atunaki: — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi? Ezekiasi azongisaki: — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.
16 이사야가 히스기야에게 이르되 여호와의 말씀을 들으소서
Ezayi alobaki na Ezekiasi: — Yoka liloba oyo Yawe alobi:
17 여호와의 말씀이 날이 이르리니 무릇 왕궁의 모든 것과 왕의 열조가 오늘까지 쌓아 두었던 것을 바벨론으로 옮긴바 되고 하나도 남지 아니할 것이요
« Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe.
18 또 왕의 몸에서 날 아들 중에서 사로잡혀 바벨론 왕궁의 환관이 되리라 하셨나이다
Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »
19 히스기야가 이사야에게 이르되 당신의 전한바 여호와의 말씀이 선하니이다 하고 또 가로되 만일 나의 사는 날에 태평과 진실이 있을진대 어찌 선하지 아니하리요 하니라
Ezekiasi azongiselaki Ezayi: — Liloba na Yawe, oyo osili koloba ezali malamu. Pamba te azalaki komilobela: « Boni, kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai? »
20 히스기야의 남은 사적과 그 모든 권력과 못과 수도를 만들어 물을 성중으로 인도하여 들인 일은 유다 왕 역대지략에 기록되지 아니하였느냐
Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
21 히스기야가 그 열조와 함께 자고 그 아들 므낫세가 대신하여 왕이 되니라
Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 열왕기하 20 >