< 역대상 12 >

1 다윗이 기스의 아들 사울을 인하여 시글락에 숨어 있을 때에 그에게 와서 싸움을 돕는 용사 중에 든 자가 있었으니
Na tango oyo Davidi akimaki na Tsikilagi mpo na kobombama Saulo, mwana mobali ya Kishi, bato bayaki kosangana na ye. Bazalaki basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kosalisa ye na bitumba.
2 저희는 활을 가지며 좌우 손을 놀려 물매도 던지며 살도 발하는 자요 베냐민 지파 사울의 동족인데 그 이름은 이러하니라
Bazalaki kobunda na batolotolo mpe kosalela malamu loboko ya mwasi mpe ya mobali mpo na kobwaka mabanga mpe kobeta bambanzi ya batolotolo. Bazalaki bato ya ekolo moko na Saulo: ekolo ya Benjame.
3 그 두목은 아히에셀이요 다음은 요아스니 기브아 사람 스마아의 두 아들이요 또 아스마웹의 아들 여시엘과 벨렛과 또 브라가와 아나돗 사람 예후와
Tala bakombo na bango: Akiezeri, mokonzi na bango; Joasi, mwana mibali ya Shemaa, moto ya Gibea; Yezieli mpe Peleti, bana mibali ya Azimaveti; Beraka; Jewu, moto ya Anatoti;
4 기브온 사람 곧 삼십인 중에 용사요 삼십인의 두목된 이스마야며 또 예레미야와 야하시엘과 요하난과 그데라 사람 요사밧과
Yishimaeya, moto ya Gabaoni, moko kati na lisanga ya basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi ya lisanga yango; Jeremi, Yaazieli, Yoanani, Yozabadi, moto ya Gedera;
5 엘루새와 여리못과 브아랴와 스마랴와 하룹 사람 스바댜와
Elewuzayi, Yerimoti, Bealia, Shemaria, Shefatia, moto ya Arofi;
6 고라 사람들 엘가나와 잇시야와 아사렐과 요에셀과 야소브암이며
Elikana, Yishiya, Azareeli, Yoezeri mpe Yashobeami: bango nyonso bazalaki bato ya libota ya Kore;
7 그돌 사람 여로함의 아들 요엘라와 스바댜더라
Yoela mpe Zebadia, bana mibali ya Yeroami, moto ya Gedori.
8 갓 사람 중에서 거친 땅 견고한 곳에 이르러 다윗에게 돌아온 자가 있었으니 다 용사요 싸움에 익숙하여 방패와 창을 능히 쓰는 자라 그 얼굴은 사자 같고 빠르기는 산의 사슴 같으니
Ndambo ya bato ya ekolo ya Gadi bakabwanaki na Saulo mpo na kokende epai ya Davidi, na ndako makasi ya esobe. Bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebi kobunda malamu mpe kosalela malamu nguba mpe makonga. Bazalaki makasi lokola nkosi mpe mbangu lokola mboloko na ngomba.
9 그 두목은 에셀이요 둘째는 오바댜요 세째는 엘리압이요
Ezeri azalaki mokonzi na bango; Abidiasi, mokonzi ya mibale; Eliabi, mokonzi ya misato;
10 네째는 미스만나요 다섯째는 예레미야요
Mishimana, mokonzi ya minei; Jeremi, mokonzi ya mitano;
11 여섯째는 앗대요 일곱째는 엘리엘이요
Atayi, mokonzi ya motoba; Elieli, mokonzi ya sambo;
12 여덟째는 요하난이요 아홉째는 엘사밧이요
Yoanani, mokonzi ya mwambe; Elizabadi, mokonzi ya libwa;
13 열째는 예레미야요 열 한째는 막반내라
Jeremi, mokonzi ya zomi; mpe Makibanayi, mokonzi ya zomi na moko.
14 이 갓 자손이 군대 장관이 되어 그 작은 자는 일백인을 관할하고 그 큰 자는 일천인을 관할하더니
Bato oyo ya libota ya Gadi bazalaki bango nyonso bakonzi ya basoda. Mokonzi oyo azalaki na makasi moke akokaki kobunda na bato nkama moko, mpe oyo alekaki makasi akokaki kobunda na bato nkoto moko.
15 정월에 요단강 물이 모든 언덕에 넘칠 때에 이 무리가 강물을 건너서 골짜기에 있는 모든 자로 동서로 도망하게 하였더라
Ezalaki bango nde bakatisaki mayi ya Yordani, na sanza ya liboso, tango mayi ya ebale etondaki makasi na bangambo nyonso, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mabwaku, ezala na ngambo ya este to ya weste.
16 베냐민과 유다 자손 중에서 견고한 곳에 이르러 다윗에게 나오매
Bato mosusu ya libota ya Benjame mpe ya Yuda bayaki lisusu kosangana na Davidi na ndako na ye ya makasi.
17 다윗이 나가서 맞아 저희에게 일러 가로되 만일 너희가 평화로이 와서 나를 돕고자 하면 내 마음이 너희와 연합하려니와 만일 너희가 나를 속여 내 대적에게 붙이고자 하면 내 손에 불의함이 없으니 우리 열조의 하나님이 감찰하시고 책망하시기를 원하노라 하매
Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki: « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo! »
18 때에 성신이 삼십인의 두목 아마새에게 감동하시니 가로되 다윗이여 우리가 당신에게 속하겠고 이새의 아들이여 우리가 당신과 함께하리니 원컨대 평강하소서 당신도 평강하고 당신을 돕는자에게도 평강이 있을지니 이는 당신의 하나님이 당신을 도우심이니이다 한지라 다윗이 드디어 접대하여 세워 군대장관을 삼았더라
Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki: « Oh Davidi, tozali ya yo! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.
19 다윗이 전에 블레셋 사람과 함께가서 사울을 치려할때에 므낫세 지파에서 두어 사람이 다윗에게 돌아왔으나 다윗 등이 블레셋 사람을 돕지 못하였음은 블레셋 사람의 방백이 서로 의논하고 보내며 이르기를 저가 그 주 사울에게로 돌아가리니 우리 머리가 위태할까하라 함이라
Ndambo ya bato ya Manase bakendeki kosala boyokani elongo na Davidi tango akendeki elongo na basoda ya Filisitia, mpo na kobundisa Saulo. Kasi Davidi elongo na bato na ye balongaki te kosunga bato ya Filisitia, pamba te sima na bakambi na bango koyokana, babenganaki Davidi mpe balobaki: « Davidi alingi kobomisa biso mpo ete azongisa boyokani na nkolo na ye Saulo! »
20 다윗이 시글락으로 갈 때에 므낫세 지파에서 그에게로 돌아온 자는 아드나와 요사밧과 여디아엘과 미가엘과 요사밧과 엘리후와 실르대니 다 므낫세의 천부장이라
Tango Davidi akendeki na Tsikilagi, tala bato ya ekolo ya Manase oyo bakendeki kosala boyokani elongo na ye: Adina, Yozabadi, Yediayeli, Mikaeli, Yozabadi, Eliwu mpe Tsilitai. Moko na moko kati na bango azalaki mokonzi ya bato nkoto moko kati na libota ya Manase.
21 이 무리가 다윗을 도와 적당을 쳤으니 저희는 다 큰 용사요 군대 장관이 됨이었더라
Basungaki makasi Davidi mpe mampinga na ye, pamba te bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko mpe bakomaki bakonzi ya basoda.
22 그 때에 사람이 날마다 다윗에게로 돌아와서 돕고자 하매 큰 군대를 이루어 하나님의 군대와 같았더라
Mokolo na mokolo, bato bazalaki koya kosunga Davidi kino mampinga na ye ekomaki monene makasi lokola mampinga ya Nzambe.
23 싸움을 예비한 군대 장관들이 헤브론에 이르러 다윗에게로 나아와서 여호와의 말씀대로 사울의 나라를 저에게 돌리고자 하였으니 그 수효가 이러하였더라
Tala motango ya basoda oyo babongisami mpo na bitumba, mpe bayaki epai ya Davidi, na Ebron, mpo na kokweyisa bokonzi ya Saulo mpe kopesa yango epai ya Davidi ndenge Yawe alobaki:
24 유다 자손 중에서 방패와 창을 들고 싸움을 예비한 자가 육천 팔백명이요
Bato ya Yuda oyo bamemaka nguba mpe makonga: basoda nkoto motoba na nkama mwambe;
25 시므온 자손 중에서 싸움하는 큰 용사가 칠천 일백명이요
bato ya libota ya Simeoni: basoda ya mpiko nkoto sambo na nkama moko;
26 레위 자손 중에서 사천 육백명이요
bato ya libota ya Levi: basoda nkoto minei na nkama motoba;
27 아론의 집 족장 여호야다와 그와 함께한 자가 삼천 칠백명이요
mpe lisusu Yeoyada, mokonzi ya libota ya Aron, elongo na basoda na ye nkoto misato na nkama sambo,
28 또 젊은 용사 사독과 그 족속의 장관이 이십 이명이요
mpe Tsadoki, elenge soda ya mpiko elongo na bakambi ya libota na ye tuku mibale na mibale;
29 베냐민 자손 곧 사울의 동족은 아직도 태반이나 사울의 집을 좇으나 그 중에서 나아온 자가 삼천명이요
kati na libota ya Benjame, bato ya libota ya Saulo: basoda nkoto misato, pamba te mingi kati na bango bandimaki kaka kosalela ndako ya Saulo;
30 에브라임 자손 중에서 본 족속의 유명한 큰 용사가 이만 팔백명이요
kati na libota ya Efrayimi: basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na nkama mwambe oyo bakenda sango kati na mabota na bango;
31 므낫세 반 지파 중에 녹명된 자로서 와서 다윗을 세워 왕을 삼으려 하는 자가 일만 팔천명이요
kati na ndambo ya libota ya Manase: basoda ya mpiko nkoto zomi na mwambe oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokomisa Davidi mokonzi;
32 잇사갈 자손 중에서 시세를 알고 이스라엘이 마땅히 행할 것을 아는 두목이 이백명이니 저희는 그 모든 형제를 관할하는 자며
kati na libota ya Isakari: bakambi nkama mibale bayaki elongo na bato oyo bango bazalaki kokamba kati na libota na bango; bazalaki na mayele ya kososola tango mpo na kolakisa Isalaele lolenge ya kosala liboso ya makambo;
33 스불론 중에서 모든 군기를 가지고 항오를 정제히 하고 두마음을 품지 아니하고 능히 진에 나아가서 싸움을 잘하는 자가 오만명이요
kati na libota ya Zabuloni: basoda ya mpiko nkoto tuku mitano oyo bayebi kosalela bibundeli nyonso mpe babundaka na motema moko;
34 납달리 중에서 장관 일천명과 방패와 창을 가지고 함께한 자가 삼만 칠천명이요
kati na libota ya Nefitali: bakonzi ya basoda nkoto moko, elongo na basoda nkoto tuku misato na sambo oyo babundaka na nguba mpe makonga;
35 단 자손 중에서 싸움을 잘하는 자가 이만 팔천 륙백명이요
kati na libota ya Dani: basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku mibale na mwambe na nkama motoba;
36 아셀 중에서 능히 진에 나가서 싸움을 잘하는 자가 사만명이요
kati na libota ya Aseri: basoda oyo babongisama mpo na bitumba, nkoto tuku minei;
37 요단 저편 르우벤 자손과 갓 자손과 므낫세 반 지파 중에서 모든 군기를 가지고 능히 싸우는 자가 십이만 명이었더라
kati na mabota oyo ezalaki na este ya Yordani: libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ndambo ya libota ya Manase, basoda nkoto nkama moko na tuku mibale elongo na bibundeli nyonso ya bitumba.
38 이 모든 군사가 항오를 정제히 하고 다 성심으로 헤브론에 이르러 다윗으로 온 이스라엘 왕을 삼고자 하고 또 이스라엘의 남은 자도 다 일심으로 다윗으로 왕을 삼고자 하여
Basoda oyo nyonso bayaki na Ebron, na milongo ya bitumba mpe na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi na Isalaele mobimba. Bana ya Isalaele oyo batikalaki, bango mpe bazalaki na motema moko mpo na kokomisa Davidi mokonzi.
39 무리가 거기서 다윗과 함께 사흘을 지내며 먹고 마셨으니 이는 그 형제가 이미 식물을 예비하였음이며
Basalaki kuna mikolo misato elongo na Davidi; bazalaki kolia mpe komela biloko oyo bandeko na bango babongiselaki bango.
40 또 근처에 있는 자로부터 잇사갈과 스불론과 납달리까지도 식물을 나귀와 약대와 노새와 소에 무수히 실어 왔으니 곧 과자와 무화과병과 건포도와 포도주와 기름이요 소와 양도 많이 가져왔으니 이스라엘 가운데 희락이 있음이었더라
Ezala bato oyo bawutaki na libota ya Isakari, ya Zabuloni, ya Nefitali: bango mpe bamemaki bilei likolo ya ba-ane, bashamo, bamile mpe bangombe: farine, gato oyo basala na bambuma ya figi, gato oyo basala na bambuma ya vino ekawuka, masanga ya vino, mafuta, bangombe mpe bameme ebele, pamba te esengo ezalaki kati na Isalaele.

< 역대상 12 >