< ルカの福音書 21 >

1 さてイエスが、目を上げてご覧になると、金持ちたちが献金箱に献金を投げ入れていた。
Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo;
2 また、ある貧しいやもめが、そこにレプタ銅貨二つを投げ入れているのをご覧になった。
amonaki mpe mwasi mobola moko akufisa mobali kotia mbongo ya bibende mibale.
3 それでイエスは言われた。「わたしは真実をあなたがたに告げます。この貧しいやもめは、どの人よりもたくさん投げ入れました。
Alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso.
4 みなは、あり余る中から献金を投げ入れたのに、この女は、乏しい中から、持っていた生活費の全部を投げ入れたからです。」
Pamba te bato wana nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie nyonso oyo azalaki na yango mpo na kokoba kobika.
5 宮がすばらしい石や奉納物で飾ってあると話していた人々があった。するとイエスはこう言われた。
Ndambo ya bayekoli bazalaki kolula kitoko ya Tempelo, ndenge ezalaki kongala na mabanga ya kitoko mpe na biloko ya kitoko oyo bazalaki kobonzela Nzambe lokola makabo. Kasi Yesu alobaki:
6 「あなたがたの見ているこれらの物について言えば、石がくずされずに積まれたまま残ることのない日がやって来ます。」
— Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu; nyonso ekobukama.
7 彼らは、イエスに質問して言った。「先生。それでは、これらのことは、いつ起こるのでしょう。これらのことが起こるときは、どんな前兆があるのでしょう。」
Batunaki Yesu: — Moteyi, makambo yango ekosalema tango nini? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango ekomi pene ya kokokisama?
8 イエスは言われた。「惑わされないように気をつけなさい。わたしの名を名のる者が大ぜい現われ、『私がそれだ。』とか『時は近づいた。』とか言います。そんな人々のあとについて行ってはなりません。
Yesu azongisaki: — Bosala keba ete moko te akosa bino! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba: « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki! » Bolanda bango te.
9 戦争や暴動のことを聞いても、こわがってはいけません。それは、初めに必ず起こることです。だが、終わりは、すぐには来ません。」
Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.
10 それから、イエスは彼らに言われた。「民族は民族に、国は国に敵対して立ち上がり、
Bongo alobaki na bango: — Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu,
11 大地震があり、方々に疫病やききんが起こり、恐ろしいことや天からのすさまじい前兆が現われます。
mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.
12 しかし、これらのすべてのことの前に、人々はあなたがたを捕えて迫害し、会堂や牢に引き渡し、わたしの名のために、あなたがたを王たちや総督たちの前に引き出すでしょう。
Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.
13 それはあなたがたのあかしをする機会となります。
Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
14 それで、どう弁明するかは、あらかじめ考えないことに、心を定めておきなさい。
Bozala na mitema ya kokita, bomitungisa te mpo na koluka koyeba ndenge nini bokosamba.
15 どんな反対者も、反論もできず、反証もできないようなことばと知恵を、わたしがあなたがたに与えます。
Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.
16 しかしあなたがたは、両親、兄弟、親族、友人たちにまで裏切られます。中には殺される者もあり、
Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali mpe ya basi, baninga mpe balingami na bino bakokaba bino, mpe bakobomisa mingi kati na bino.
17 わたしの名のために、みなの者に憎まれます。
Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai,
18 しかし、あなたがたの髪の毛一筋も失われることはありません。
kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga.
19 あなたがたは、忍耐によって、自分のいのちを勝ち取ることができます。
Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.
20 しかし、エルサレムが軍隊に囲まれるのを見たら、そのときには、その滅亡が近づいたことを悟りなさい。
Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene.
21 そのとき、ユダヤにいる人々は山へ逃げなさい。都の中にいる人々は、そこから立ちのきなさい。いなかにいる者たちは、都にはいってはいけません。
Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba!
22 これは、書かれているすべてのことが成就する報復の日だからです。
Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.
23 その日、悲惨なのは身重の女と乳飲み子を持つ女です。この地に大きな苦難が臨み、この民に御怒りが臨むからです。
Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango.
24 人々は、剣の刃に倒れ、捕虜となってあらゆる国に連れて行かれ、異邦人の時の終わるまで、エルサレムは異邦人に踏み荒らされます。
Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
25 そして、日と月と星には、前兆が現われ、地上では、諸国の民が、海と波が荒れどよめくために不安に陥って悩み、
Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.
26 人々は、その住むすべての所を襲おうとしていることを予想して、恐ろしさのあまり気を失います。天の万象が揺り動かされるからです。
Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.
27 そのとき、人々は、人の子が力と輝かしい栄光を帯びて雲に乗って来るのを見るのです。
Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.
28 これらのことが起こり始めたなら、からだをまっすぐにし、頭を上に上げなさい。贖いが近づいたのです。」
Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
29 それからイエスは、人々にたとえを話された。「いちじくの木や、すべての木を見なさい。
Alobaki na bango lisese oyo: — Botala malamu nzete ya figi mpe banzete nyonso mosusu:
30 木の芽が出ると、それを見て夏の近いことがわかります。
soki kaka ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
31 そのように、これらのことが起こるのを見たら、神の国は近いと知りなさい。
Ndenge moko mpe mpo na bino: tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.
32 まことに、あなたがたに告げます。すべてのことが起こってしまうまでは、この時代は過ぎ去りません。
Nazali koloba na bino penza ya solo: bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
33 この天地は滅びます。しかし、わたしのことばは決して滅びることがありません。
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
34 あなたがたの心が、放蕩や深酒やこの世の煩いのために沈み込んでいるところに、その日がわなのように、突然あなたがたに臨むことのないように、よく気をつけていなさい。
Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,
35 その日は、全地の表に住むすべての人に臨むからです。
lokola monyama, pamba te ekoya likolo ya bato nyonso ya mokili mobimba.
36 しかし、あなたがたは、やがて起ころうとしているこれらすべてのことからのがれ、人の子の前に立つことができるように、いつも油断せずに祈っていなさい。」
Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.
37 さてイエスは、昼は宮で教え、夜はいつも外に出てオリーブという山で過ごされた。
Mikolo nyonso, na moyi, Yesu azalaki koteya kati na Tempelo; mpe na butu, azalaki kobima mpo na kokende kolala na ngomba ya banzete ya olive.
38 民衆はみな朝早く起きて、教えを聞こうとして、宮におられるイエスのもとに集まって来た。
Na tongo makasi, bato nyonso bazalaki koya epai na Ye, kati na Tempelo, mpo na koyoka Ye.

< ルカの福音書 21 >