< ヨハネの福音書 3 >

1 さて、パリサイ人の中にニコデモという人がいた。ユダヤ人の指導者であった。
Ezalaki na moto moko kati na Bafarizeo, oyo kombo na ye ezalaki « Nikodemi. » Azalaki moko kati na bakonzi ya Bayuda.
2 この人が、夜、イエスのもとに来て言った。「先生。私たちは、あなたが神のもとから来られた教師であることを知っています。神がともにおられるのでなければ、あなたがなさるこのようなしるしは、だれも行なうことができません。」
Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye: — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.
3 イエスは答えて言われた。「まことに、まことに、あなたに告げます。人は、新しく生まれなければ、神の国を見ることはできません。」
Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.
4 ニコデモは言った。「人は、老年になっていて、どのようにして生まれることができるのですか。もう一度、母の胎にはいって生まれることができましょうか。」
Nikodemi atunaki Ye: — Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu?
5 イエスは答えられた。「まことに、まことに、あなたに告げます。人は、水と御霊によって生まれなければ、神の国にはいることができません。
Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo.
6 肉によって生まれた者は肉です。御霊によって生まれた者は霊です。
Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo.
7 あなたがたは新しく生まれなければならない、とわたしが言ったことを不思議に思ってはなりません。
Kokamwa te ndenge nalobi na yo: « Osengeli kobotama mbotama ya sika! »
8 風はその思いのままに吹き、あなたはその音を聞くが、それがどこから来てどこへ行くかを知らない。御霊によって生まれる者もみな、そのとおりです。」
Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo.
9 ニコデモは答えて言った。「どうして、そのようなことがありうるのでしょう。」
Nikodemi atunaki lisusu: — Ekosalema ndenge nini?
10 イエスは答えて言われた。「あなたはイスラエルの教師でありながら、こういうことがわからないのですか。
Yesu alobaki na ye: — Ndenge nini yo, molakisi mobimba oyo okenda sango kati na Isalaele, ozali kososola te makambo oyo?
11 まことに、まことに、あなたに告げます。わたしたちは、知っていることを話し、見たことをあかししているのに、あなたがたは、わたしたちのあかしを受け入れません。
Nazali koloba na yo penza ya solo: tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso.
12 あなたがたは、わたしが地上のことを話したとき、信じないくらいなら、天上のことを話したとて、どうして信じるでしょう。
Soki tango nazali koloba na bino makambo ndenge esalemaka na mokili, bozali kondima te, bongo bokondima ndenge nini soki nalobi na bino makambo ya Likolo?
13 だれも天に上った者はいません。しかし天から下った者はいます。すなわち人の子です。
Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo: Mwana na Moto.
14 モーセが荒野で蛇を上げたように、人の子もまた上げられなければなりません。
Ndenge kaka Moyize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama
15 それは、信じる者がみな、人の子にあって永遠のいのちを持つためです。」 (aiōnios g166)
mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye azwa, kati na Ye, bomoi ya seko. (aiōnios g166)
16 神は、実に、そのひとり子をお与えになったほどに、世を愛された。それは御子を信じる者が、ひとりとして滅びることなく、永遠のいのちを持つためである。 (aiōnios g166)
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko. (aiōnios g166)
17 神が御子を世に遣わされたのは、世をさばくためではなく、御子によって世が救われるためである。
Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.
18 御子を信じる者はさばかれない。信じない者は神のひとり子の御名を信じなかったので、すでにさばかれている。
Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe.
19 そのさばきというのは、こうである。光が世に来ているのに、人々は光よりもやみを愛した。その行ないが悪かったからである。
Tala ndenge nini etumbu yango ezali: pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe.
20 悪いことをする者は光を憎み、その行ないが明るみに出されることを恐れて、光のほうに来ない。
Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele.
21 しかし、真理を行なう者は、光のほうに来る。その行ないが神にあってなされたことが明らかにされるためである。
Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele.
22 その後、イエスは弟子たちと、ユダヤの地に行き、彼らとともにそこに滞在して、バプテスマを授けておられた。
Sima na yango, Yesu akendeki na Yuda, elongo na bayekoli na Ye; avandaki kuna mwa tango elongo na bango mpe azalaki kobatisa.
23 一方ヨハネもサリムに近いアイノンでバプテスマを授けていた。そこには水が多かったからである。人々は次々にやって来て、バプテスマを受けていた。
Yoane mpe azalaki kobatisa na Enoni, pembeni ya Salimi, mpo ete mayi ezalaki mingi kuna; bato bazalaki kokende kuna epai na ye mpe bazalaki kozwa libatisi.
24 ――ヨハネは、まだ投獄されていなかったからである。――
Na tango wana, batiaki nanu Yoane na boloko te.
25 それで、ヨハネの弟子たちが、あるユダヤ人ときよめについて論議した。
Mokolo moko, bayekoli ya Yoane bazalaki kobendana na Moyuda moko na tina na kopetolama.
26 彼らはヨハネのところに来て言った。「先生。見てください。ヨルダンの向こう岸であなたといっしょにいて、あなたが証言なさったあの方が、バプテスマを授けておられます。そして、みなあの方のほうへ行きます。」
Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye: — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.
27 ヨハネは答えて言った。「人は、天から与えられるのでなければ、何も受けることはできません。
Yoane azongisaki: — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.
28 あなたがたこそ、『私はキリストではなく、その前に遣わされた者である。』と私が言ったことの証人です。
Bino moko bokoki kotatola ete nalobaki: « Ngai, nazali Klisto te, kasi natindamaki liboso na Ye. »
29 花嫁を迎える者は花婿です。そこにいて、花婿のことばに耳を傾けているその友人は、花婿の声を聞いて大いに喜びます。それで、私もその喜びで満たされているのです。
Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai: esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.
30 あの方は盛んになり私は衰えなければなりません。」
Esengeli ete Ye amata, mpe ngai nakita.
31 上から来る方は、すべてのものの上におられ、地から出る者は地に属し、地のことばを話す。天から来る方は、すべてのものの上におられる。
Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso; kasi moto oyo awuti na mokili akotikala kaka ya mokili mpe alobaka kaka lokola moto ya mokili. Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso,
32 この方は見たこと、また聞いたことをあかしされるが、だれもそのあかしを受け入れない。
azali kotatola na tina na makambo oyo amonaki mpe ayokaki, kasi moto moko te azali kondima litatoli na Ye.
33 そのあかしを受け入れた者は、神は真実であるということに確認の印を押したのである。
Moto nyonso oyo andimi litatoli na Ye akolobaka na solo ete Nzambe azali solo.
34 神がお遣わしになった方は、神のことばを話される。神が御霊を無限に与えられるからである。
Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.
35 父は御子を愛しておられ、万物を御子の手にお渡しになった。
Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso.
36 御子を信じる者は永遠のいのちを持つが、御子に聞き従わない者は、いのちを見ることがなく、神の怒りがその上にとどまる。 (aiōnios g166)
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe. (aiōnios g166)

< ヨハネの福音書 3 >