< イザヤ書 52 >

1 シオンよ、さめよ、さめよ、力を着よ。聖なる都エルサレムよ、美しい衣を着よ。割礼を受けない者および汚れた者は、もはやあなたのところに、はいることがないからだ。
Oh Siona, lamuka, lamuka! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.
2 捕われたエルサレムよ、あなたの身からちりを振り落せ、起きよ。捕われたシオンの娘よ、あなたの首のなわを解きすてよ。
Oh Yelusalemi, milongola na putulu, telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu! Oh Siona, mboka kitoko, yo oyo ozali mokangami, kata minyololo na kingo na yo!
3 主はこう言われる、「あなたがたは、ただで売られた。金を出さずにあがなわれる」。
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »
4 主なる神はこう言われる、「わが民はさきにエジプトへ下って行って、かしこに寄留した。またアッスリヤびとはゆえなく彼らをしえたげた。
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango.
5 それゆえ、今わたしはここに何をしようか。わが民はゆえなく捕われた」と主は言われる。主は言われる、「彼らをつかさどる者はわめき、わが名は常にひねもす侮られる。
Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.
6 それゆえ、わが民はわが名を知るにいたる。その日には彼らはこの言葉を語る者がわたしであることを知る。わたしはここにおる」。
Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »
7 よきおとずれを伝え、平和を告げ、よきおとずれを伝え、救を告げ、シオンにむかって「あなたの神は王となられた」と言う者の足は山の上にあって、なんと麗しいことだろう。
Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona: « Nzambe na yo azali Mokonzi! »
8 聞けよ、あなたの見張びとは声をあげて、共に喜び歌っている。彼らは目と目と相合わせて、主がシオンに帰られるのを見るからだ。
Yoka! Bakengeli na yo batomboli mingongo; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.
9 エルサレムの荒れすたれた所よ、声を放って共に歌え。主はその民を慰め、エルサレムをあがなわれたからだ。
Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, boyemba elongo banzembo ya esengo, pamba te Yawe abondisi bato na Ye, asikoli Yelusalemi.
10 主はその聖なるかいなを、もろもろの国びとの前にあらわされた。地のすべての果は、われわれの神の救を見る。
Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.
11 去れよ、去れよ、そこを出て、汚れた物にさわるな。その中を出よ、主の器をになう者よ、おのれを清く保て。
Bokende, bokende, bobima awa! Bosimba eloko moko te ya mbindo! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe!
12 あなたがたは急いで出るに及ばない、また、とんで行くにも及ばない。主はあなたがたの前に行き、イスラエルの神はあなたがたのしんがりとなられるからだ。
Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
13 見よ、わがしもべは栄える。彼は高められ、あげられ、ひじょうに高くなる。
Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama, akomata likolo mpe akonetolama makasi penza.
14 多くの人が彼に驚いたように彼の顔だちは、そこなわれて人と異なり、その姿は人の子と異なっていたからである
Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,
15 彼は多くの国民を驚かす。王たちは彼のゆえに口をつむぐ。それは彼らがまだ伝えられなかったことを見、まだ聞かなかったことを悟るからだ。
ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.

< イザヤ書 52 >