< ゼパニヤ書 3 >

1 わざわいなるかな、このそむき汚れた暴虐の町。
Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato!
2 これはだれの声にも耳を傾けず、懲しめを受けいれず、主に寄り頼まず、おのれの神に近よらない。
Etosaka moto te, endimaka pamela te, etiaka elikya na Yawe te, epusanaka pene ya Nzambe na yango te.
3 その中にいるつかさたちは、ほえるしし、そのさばきびとたちは、夜のおおかみで、彼らは朝まで何一つ残さない。
Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.
4 その預言者たちは、放縦で偽りびと、その祭司たちは聖なる物を汚し、律法を破る。
Basakoli na yango bazali bato ya lolendo mpe ya lokuta. Banganga-Nzambe na yango babebisaka Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.
5 その中にいます主は義であって、不義を行われない。朝ごとにその公義を現して、誤ることがない。しかし不義な者は恥を知らない。
Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
6 「わたしは諸国民を滅ぼした。そのやぐらは荒れはてた。わたしはそのちまたを荒したので、ちまたを行き来する者もない。その町々は荒れすたれて、人の姿もなく、住む者もない。
Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.
7 わたしは言った、『これは必ずわたしを恐れ、懲しめを受ける。これはわたしが命じたすべての事を見失わない』と。しかし彼らはしきりに自分の行状を乱した」。
Namilobelaki boye na tina na engumba oyo: « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.
8 主は言われる、「それゆえ、あなたがたは、わたしが立って、証言する日を待て。わたしの決意は諸国民をよせ集め、もろもろの国を集めて、わが憤り、わが激しい怒りをことごとくその上に注ぐことであって、全地は、ねたむわたしの怒りの火に焼き滅ぼされるからである。
Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai: mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.
9 その時わたしはもろもろの民に清きくちびるを与え、すべて彼らに主の名を呼ばせ、心を一つにして主に仕えさせる。
Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.
10 わたしを拝む者、わたしが散らした者の娘はエチオピヤの川々の向こうから来て、わたしに供え物をささげる。
Longwa na likolo ya bibale ya Kushi, bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai; bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai, bakomemela Ngai makabo.
11 その日には、あなたはわたしにそむいたすべてのわざのゆえに、はずかしめられることはない。その時わたしはあなたのうちから、高ぶって誇る者どもを除くゆえ、あなたは重ねてわが聖なる山で、高ぶることはない。
Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.
12 わたしは柔和にしてへりくだる民を、あなたのうちに残す。彼らは主の名を避け所とする。
Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.
13 イスラエルの残りの者は不義を行わず、偽りを言わず、その口には欺きの舌を見ない。それゆえ、彼らは食を得て伏し、彼らをおびやかす者はいない」。
Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.
14 シオンの娘よ、喜び歌え。イスラエルよ、喜び呼ばわれ。エルサレムの娘よ、心のかぎり喜び楽しめ。
Siona, mboka kitoko, yemba nzembo! Isalaele, ganga makasi! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo!
15 主はあなたを訴える者を取り去り、あなたの敵を追い払われた。イスラエルの王なる主はあなたのうちにいます。あなたはもはや災を恐れることはない。
Yawe alongoli etumbu na yo mpe akimisi banguna na yo. Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo; kobanga lisusu pasi moko te.
16 その日、人々はエルサレムに向かって言う、「シオンよ、恐れるな。あなたの手を弱々しくたれるな。
Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi: ‹ Oh Siona, kobanga te! Tika ete maboko na yo elemba te!
17 あなたの神、主はあなたのうちにいまし、勇士であって、勝利を与えられる。彼はあなたのために喜び楽しみ、その愛によってあなたを新にし、祭の日のようにあなたのために喜び呼ばわられる」。
Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
18 「わたしはあなたから悩みを取り去る。あなたは恥を受けることはない。
Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama, nakolongola pasi kati na yo mpo ete ozala lisusu na soni te.
19 見よ、その時あなたをしえたげる者をわたしはことごとく処分し、足なえを救い、追いやられた者を集め、彼らの恥を誉にかえ、全地にほめられるようにする。
Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango.
20 その時、わたしはあなたがたを連れかえる。わたしがあなたがたを集めるとき、わたしがあなたがたの目の前に、あなたがたの幸福を回復するとき、地のすべての民の中で、あなたがたに名を得させ、誉を得させる」と主は言われる。
Na tango wana, nakosangisa bino, nakozongisa bino na mokili na bino. Nakopesa bino lokumu mpe nakosala ete sango na bino epanzana kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino, oyo bakendeki na bowumbu, » elobi Yawe.

< ゼパニヤ書 3 >