< ゼカリヤ書 6 >

1 わたしがまた目をあげて見ていると、四両の戦車が二つの山の間から出てきた。その山は青銅の山であった。
Tango natalaki lisusu, namonaki bashar minei liboso na ngai: ezali kobima na kati-kati ya bangomba mibale ya bronze.
2 第一の戦車には赤馬を着け、第二の戦車には黒馬を着け、
Bampunda ya langi ya motane makasi ezalaki kobenda shar ya liboso, mpe bampunda ya langi ya mwindo ezalaki kobenda shar oyo ya mibale.
3 第三の戦車には白馬を着け、第四の戦車には、まだらのねずみ色の馬を着けていた。
Bampunda ya langi ya pembe ezalaki kobenda shar oyo ya misato, bampunda ya madodo-madodo ezalaki kobenda shar oyo ya minei. Bampunda nyonso ya madodo-madodo ezalaki makasi.
4 わたしは、わたしと語るみ使に尋ねた、「わが主よ、これらはなんですか」。
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Bampunda nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai?
5 天の使は答えて、わたしに言った、「これらは全地の主の前に現れて後、天の四方に出て行くものです。
Azongiselaki ngai: — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi.
6 黒馬を着けた戦車は、北の国をさして出て行き、白馬は西の国をさして出て行き、まだらの馬は南の国をさして出て行くのです」。
Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.
7 馬が出てくると、彼らは、地をあまねくめぐるために、しきりに出たがるのであった。それで彼が「行って、地をあまねくめぐれ」と言うと、彼らは地を行きめぐった。
Bampunda nyonso ya makasi ebimaki mpe etondaki na posa makasi ya kotambola na mabele. Boye, Anjelu alobaki na yango: « Bokende kotambola na mokili! » Mpe ebimaki mpo na kokende kotambola na mabele.
8 すると彼はわたしを呼んで、「北の国をさして行く者どもは、北の国でわたしの心を静まらせてくれた」と言った。
Abengaki ngai mpe alobaki na ngai: — Tala, bampunda oyo ezali kokende na mokili ya nor ekosala ete Molimo na ngai avanda na mokili wana ya nor.
9 主の言葉がまたわたしに臨んだ、
Yawe alobaki na ngai:
10 「バビロンから帰ってきたかの捕囚の中から、ヘルダイ、トビヤおよびエダヤを連れて、その日にゼパニヤの子ヨシヤの家に行き、
— Kamata palata mpe wolo epai ya Elidayi, Tobiya mpe Yedaeya, ba-oyo bawuti na bowumbu wuta na Babiloni; mpe na mokolo yango kaka, kende yo moko na ndako ya Joziasi, mwana mobali ya Sofoni, epai wapi bakomeli.
11 彼らから金銀を受け取って、一つの冠を造り、それをヨザダクの子である大祭司ヨシュアの頭にかぶらせて、
Kamata palata mpe wolo mpo ete osalela yango motole; bongo okolatisa yango Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
12 彼に言いなさい、『万軍の主は、こう仰せられる、見よ、その名を枝という人がある。彼は自分の場所で成長して、主の宮を建てる。
Okoyebisa ye maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Tala moto oyo kombo na ye ezali: Moto ya nzete. Nyonso ekobota esika ye azali, mpe ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe.
13 すなわち彼は主の宮を建て、王としての光栄を帯び、その位に座して治める。その位のかたわらに、ひとりの祭司がいて、このふたりの間に平和の一致がある』。
Ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe; bakolatisa ye bilembo ya lokumu, mpe akovanda na kiti ya bokonzi mpo na kokonza. Mpe wana kaka na kiti na ye ya bokonzi, akozala mpe Nganga-Nzambe. Bongo misala nyonso mibale, ezala ya bokonzi to ya bonganga-Nzambe, ekotambola malamu. › »
14 またその冠はヘルダイ、トビヤ、エダヤおよびゼパニヤの子ヨシヤの記念として、主の宮に納められる。
Bakobomba motole yango kati na Tempelo ya Yawe lokola ekaniseli mpo na kokanisa motema malamu ya Elidayi, ya Tobiya, ya Yedaeya mpe ya Eleme, mwana mobali ya Sofoni.
15 また遠い所の者どもが来て、主の宮を建てることを助ける。そしてあなたがたは万軍の主が、わたしをつかわされたことを知るようになる。あなたがたがもし励んで、あなたがたの神、主の声に聞き従うならば、このようになる」。
Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino.

< ゼカリヤ書 6 >