< 詩篇 112 >

1 主をほめたたえよ。主をおそれて、そのもろもろの戒めを大いに喜ぶ人はさいわいである。
Bokumisa Yawe! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.
2 その子孫は地において強くなり、正しい者のやからは祝福を得る。
Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
3 繁栄と富とはその家にあり、その義はとこしえに、うせることはない。
Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
4 光は正しい者のために暗黒の中にもあらわれる。主は恵み深く、あわれみに満ち、正しくいらせられる。
Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.
5 恵みを施し、貸すことをなし、その事を正しく行う人はさいわいである。
Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
6 正しい人は決して動かされることなく、とこしえに覚えられる。
Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
7 彼は悪いおとずれを恐れず、その心は主に信頼してゆるがない。
Abangaka basango ya mabe te; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.
8 その心は落ち着いて恐れることなく、ついにそのあだについての願いを見る。
Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.
9 彼は惜しげなく施し、貧しい者に与えた。その義はとこしえに、うせることはない。その角は誉を得てあげられる。
Akabelaka babola na motema ya esengo; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.
10 悪しき者はこれを見て怒り、歯をかみならして溶け去る。悪しき者の願いは滅びる。
Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.

< 詩篇 112 >