< 民数記 12 >

1 モーセはクシの女をめとっていたが、そのクシの女をめとったゆえをもって、ミリアムとアロンはモーセを非難した。
Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.
2 彼らは言った、「主はただモーセによって語られるのか。われわれによっても語られるのではないのか」。主はこれを聞かれた。
Balobaki: — Boni, Yawe alobaka kaka na nzela ya Moyize? Alobaki mpe na nzela na biso te? Yawe ayokaki bango.
3 モーセはその人となり柔和なこと、地上のすべての人にまさっていた。
Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.
4 そこで、主は突然モーセとアロン、およびミリアムにむかって「あなたがた三人、会見の幕屋に出てきなさい」と言われたので、彼ら三人は出てきたが、
Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami: — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bango nyonso misato bakendeki.
5 主は雲の柱のうちにあって下り、幕屋の入口に立って、アロンとミリアムを呼ばれた。彼らふたりが進み出ると、
Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso,
6 彼らに言われた、「あなたがたは、いま、わたしの言葉を聞きなさい。あなたがたのうちに、もし、預言者があるならば、主なるわたしは幻をもって、これにわたしを知らせ、また夢をもって、これと語るであろう。
alobaki: — Boyoka maloba na Ngai!
7 しかし、わたしのしもべモーセとは、そうではない。彼はわたしの全家に忠信なる者である。
Kasi ezalaka bongo te
8 彼とは、わたしは口ずから語り、明らかに言って、なぞを使わない。彼はまた主の形を見るのである。なぜ、あなたがたはわたしのしもべモーセを恐れず非難するのか」。
Nasololaka na ye elongi na elongi,
9 主は彼らにむかい怒りを発して去られた。
Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.
10 雲が幕屋の上を離れ去った時、ミリアムは、らい病となり、その身は雪のように白くなった。アロンがふり返ってミリアムを見ると、彼女はらい病になっていた。
Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami: ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba.
11 そこで、アロンはモーセに言った、「ああ、わが主よ、わたしたちは愚かなことをして罪を犯しました。どうぞ、その罰をわたしたちに受けさせないでください。
Bongo Aron alobaki na Moyize: — Nabondeli yo, nkolo na ngai! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba!
12 どうぞ彼女を母の胎から肉が半ば滅びうせて出る死人のようにしないでください」。
Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola!
13 その時モーセは主に呼ばわって言った、「ああ、神よ、どうぞ彼女をいやしてください」。
Boye, Moyize abelelaki Yawe: — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye!
14 主はモーセに言われた、「彼女の父が彼女の顔につばきしてさえ、彼女は七日のあいだ、恥じて身を隠すではないか。彼女を七日のあいだ、宿営の外で閉じこめておかなければならない。その後、連れもどしてもよい」。
Yawe azongiselaki Moyize: — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.
15 そこでミリアムは七日のあいだ、宿営の外で閉じこめられた。民はミリアムが連れもどされるまでは、道に進まなかった。
Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki.
16 その後、民はハゼロテを立って進み、パランの荒野に宿営した。
Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.

< 民数記 12 >