< ネヘミヤ 記 7 >

1 城壁が築かれて、とびらを設け、さらに門衛、歌うたう者およびレビびとを任命したので、
Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi: bato na bato na mosala na bango.
2 わたしは、わたしの兄弟ハナニと、城のつかさハナニヤに命じて、エルサレムを治めさせた。彼は多くの者にまさって忠信な、神を恐れる者であったからである。
Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.
3 わたしは彼らに言った、「日の暑くなるまではエルサレムのもろもろの門を開いてはならない。人々が立って守っている間に門を閉じさせ、貫の木を差せ。またエルサレムの住民の中から番兵を立てて、おのおのにその所を守らせ、またおのおのの家と向かい合う所を守らせよ」。
Nalobaki na bango: — Bikuke ya Yelusalemi esengeli te kofungwama liboso ete moyi engala, mpe, na pokwa, bakokanga makasi bizipelo na yango mpe bakokotisa yango bikangelo, wana bakengeli bikuke bakozala nanu na bisika na bango ya mosala. Botia lisusu lokola bakengeli, bavandi ya Yelusalemi: bamoko bakozala na bisika na bango ya mosala, mpe bamosusu bakokengela pembeni ya bandako na bango.
4 町は広くて大きかったが、その内の民は少なく、家々はまだ建てられていなかった。
Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te.
5 時に神はわたしの心に、尊い人々、つかさおよび民を集めて、家系によってその名簿をしらべようとの思いを起された。わたしは最初に上って来た人々の系図を発見し、その中にこのようにしるしてあるのを見いだした。
Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna:
6 バビロンの王ネブカデネザルが捕え移した捕囚のうち、ゆるされてエルサレムおよびユダに上り、おのおの自分の町に帰ったこの州の人々は次のとおりである。
Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye;
7 彼らはゼルバベル、エシュア、ネヘミヤ、アザリヤ、ラアミヤ、ナハマニ、モルデカイ、ビルシャン、ミスペレテ、ビグワイ、ネホム、バアナと一緒に帰ってきた者たちである。そのイスラエルの民の人数は次のとおりである。
bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele:
8 パロシの子孫は二千百七十二人。
Bakitani ya Pareoshi: nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
9 シパテヤの子孫は三百七十二人。
Bakitani ya Shefatia: nkama misato na tuku sambo na mibale.
10 アラの子孫は六百五十二人。
Bakitani ya Ara: nkama motoba na tuku mitano na mibale.
11 パハテ・モアブの子孫すなわちエシュアとヨアブの子孫は二千八百十八人。
Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi: nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mwambe.
12 エラムの子孫は一千二百五十四人。
Bakitani ya Elami: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
13 ザットの子孫は八百四十五人。
Bakitani ya Zatu: nkama mwambe na tuku minei na mitano.
14 ザッカイの子孫は七百六十人。
Bakitani ya Zakayi: nkama sambo na tuku motoba.
15 ビンヌイの子孫は六百四十八人。
Bakitani ya Binuwi: nkama motoba na tuku minei na mwambe.
16 ベバイの子孫は六百二十八人。
Bakitani ya Bebayi: nkama motoba na tuku mibale na mwambe.
17 アズガデの子孫は二千三百二十二人。
Bakitani ya Azigadi: nkoto mibale na nkama misato na tuku mibale na mibale.
18 アドニカムの子孫は六百六十七人。
Bakitani ya Adonikami: nkama motoba na tuku motoba na sambo.
19 ビグワイの子孫は二千六十七人。
Bakitani ya Bigivayi: nkoto mibale na tuku motoba na sambo.
20 アデンの子孫は六百五十五人。
Bakitani ya Adini: nkama motoba na tuku mitano na mitano.
21 ヒゼキヤの家のアテルの子孫は九十八人。
Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi: tuku libwa na mwambe.
22 ハシュムの子孫は三百二十八人。
Bakitani ya Ashumi: nkama misato na tuku mibale na mwambe.
23 ベザイの子孫は三百二十四人。
Bakitani ya Betsayi: nkama misato na tuku mibale na minei.
24 ハリフの子孫は百十二人。
Bakitani ya Arifi: nkama moko na zomi na mibale.
25 ギベオンの子孫は九十五人。
Bakitani ya mboka Gabaoni: tuku libwa na mitano.
26 ベツレヘムおよびネトパの人々は百八十八人。
Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa: nkama moko na tuku mwambe na mwambe.
27 アナトテの人々は百二十八人。
Bato ya mboka Anatoti: nkama moko na tuku mibale na mwambe.
28 ベテ・アズマウテの人々は四十二人。
Bato ya mboka Beti-Azimaveti: tuku minei na mibale.
29 キリアテ・ヤリム、ケピラおよびベエロテの人々は七百四十三人。
Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti: nkama sambo na tuku minei na misato.
30 ラマおよびゲバの人々は六百二十一人。
Bato ya bamboka Rama mpe Geba: nkama motoba na tuku mibale na moko.
31 ミクマシの人々は百二十二人。
Bato ya mboka Mikimasi: nkama moko na tuku mibale na mibale.
32 ベテルおよびアイの人々は百二十三人。
Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi: nkama moko na tuku mibale na misato.
33 ほかのネボの人々は五十二人。
Bato ya mboka Nebo mosusu: tuku mitano na mibale.
34 ほかのエラムの子孫は一千二百五十四人。
Bato ya mboka ya Elami mosusu: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
35 ハリムの子孫は三百二十人。
Bato ya mboka Arimi: nkama misato na tuku mibale.
36 エリコの人々は三百四十五人。
Bakitani ya mboka Jeriko: nkama misato na tuku minei na mitano.
37 ロド、ハデデおよびオノの人々は七百二十一人。
Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono: nkama sambo na tuku mibale na moko.
38 セナアの子孫は三千九百三十人。
Bakitani ya engumba Sena: nkoto misato na nkama libwa na tuku misato.
39 祭司では、エシュアの家のエダヤの子孫が九百七十三人。
Tala motango ya Banganga-Nzambe: Bakitani ya Yedaeya na nzela ya libota ya Jozue: nkama libwa na tuku sambo na misato.
40 インメルの子孫が一千五十二人。
Bakitani ya Imeri: nkoto moko na tuku mitano na mibale.
41 パシュルの子孫が一千二百四十七人。
Bakitani ya Pashuri: nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
42 ハリムの子孫が一千十七人。
Bakitani ya Arimi: nkoto moko na zomi na sambo.
43 レビびとでは、エシュアの子孫すなわちホデワの子孫のうちのカデミエルの子孫が七十四人。
Tala motango ya Balevi: Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odeva: tuku sambo na minei.
44 歌うたう者では、アサフの子孫が百四十八人。
Tala motango ya bayembi: Bakitani ya Azafi: nkama moko na tuku minei na mwambe.
45 門衛では、シャルムの子孫、アテルの子孫、タルモンの子孫、アックブの子孫、ハテタの子孫およびショバイの子孫合わせて百三十八人。
Tala motango ya bakengeli bikuke: Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi: nkama moko na tuku misato na mwambe.
46 宮に仕えるしもべでは、ジハの子孫、ハスパの子孫、タバオテの子孫、
Basali ya Tempelo: Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,
47 ケロスの子孫、シアの子孫、パドンの子孫、
Kerosi, Siya, Padoni,
48 レバナの子孫、ハガバの子孫、サルマイの子孫、
Lebana, Agaba, Shalimayi,
49 ハナンの子孫、ギデルの子孫、ガハルの子孫、
Anani, Gideli, Gaari,
50 レアヤの子孫、レヂンの子孫、ネコダの子孫、
Reaya, Retsini, Nekoda,
51 ガザムの子孫、ウザの子孫、パセアの子孫、
Gazami, Uza, Paseya,
52 ベサイの子孫、メウニムの子孫、ネフセシムの子孫、
Besayi, Mewunimi, Nefusimi,
53 バクブクの子孫、ハクパの子孫、ハルホルの子孫、
Bakibuki, Akufa, Aruri,
54 バヅリテの子孫、メヒダの子孫、ハルシャの子孫、
Batsiliti, Meyida, Arisha,
55 バルコスの子孫、シセラの子孫、テマの子孫、
Barikosi, Sisera, Tama,
56 ネヂアの子孫およびハテパの子孫。
Netsia mpe Atifa.
57 ソロモンのしもべであった者たちの子孫では、ソタイの子孫、ソペレテの子孫、ペリダの子孫、
Tala bakitani ya basali ya Salomo: Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Perida,
58 ヤアラの子孫、ダルコンの子孫、ギデルの子孫、
Yala, Darikoni, Gideli,
59 シパテヤの子孫、ハッテルの子孫、ポケレテ・ハッゼバイムの子孫、アモンの子孫。
Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni.
60 宮に仕えるしもべたちとソロモンのしもべであった者たちの子孫とは合わせて三百九十二人。
Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo: nkama misato na tuku libwa na mibale.
61 テルメラ、テルハレサ、ケルブ、アドンおよびインメルから上って来た者があったが、その氏族と、血統とを示して、イスラエルの者であることを明らかにすることができなかった。その人々は次のとおりである。
Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele:
62 すなわちデラヤの子孫、トビヤの子孫、ネコダの子孫であって、合わせて六百四十二人。
Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda: nkama motoba na tuku minei na mibale.
63 また祭司のうちにホバヤの子孫、ハッコヅの子孫、バルジライの子孫がある。バルジライはギレアデびとバルジライの娘たちのうちから妻をめとったので、その名で呼ばれた。
Mpe kati na Banganga-Nzambe: bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
64 これらの者はこの系図に載った者のうちに、自分の籍をたずねたが、なかったので、汚れた者として祭司の職から除かれた。
Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.
65 総督は彼らに告げて、ウリムとトンミムを帯びる祭司の起るまでは、いと聖なる物を食べてはならぬと言った。
Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
66 会衆は合わせて四万二千三百六十人であった。
Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,
67 このほかに男女の奴隷が七千三百三十七人、歌うたう者が男女合わせて二百四十五人あった。
bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano,
68 その馬は七百三十六頭、その騾馬は二百四十五頭、
69 そのらくだは四百三十五頭、そのろばは六千七百二十頭であった。
bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
70 氏族の長のうち工事のためにささげ物をした人々があった。総督は金一千ダリク、鉢五十、祭司の衣服五百三十かさねを倉に納めた。
Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe.
71 また氏族の長のうちのある人々は金二万ダリク、銀二千二百ミナを工事のために倉に納めた。
Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale.
72 その他の民の納めたものは金二万ダリク、銀二千ミナ、祭司の衣服六十七かさねであった。
Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe.
73 こうして祭司、レビびと、門衛、歌うたう者、民のうちのある人々、宮に仕えるしもべたち、およびイスラエルびとは皆その町々に住んだ。イスラエルの人々はその町々に住んで七月になった。
Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko. Tango sanza ya sambo ekomaki, bana ya Isalaele bakomaki kovanda kati na bingumba na bango.

< ネヘミヤ 記 7 >