< レビ記 4 >

1 主はまたモーセに言われた、
Yawe ayebisaki Moyize:
2 「イスラエルの人々に言いなさい、『もし人があやまって罪を犯し、主のいましめにそむいて、してはならないことの一つをした時は次のようにしなければならない。
« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Soki moto asali masumu to likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe, tala ndenge bokosala:
3 すなわち、油注がれた祭司が罪を犯して、とがを民に及ぼすならば、彼はその犯した罪のために雄の全き子牛を罪祭として主にささげなければならない。
‘Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.
4 その子牛を会見の幕屋の入口に連れてきて主の前に至り、その子牛の頭に手を置き、その子牛を主の前で、ほふらなければならない。
Boye akobonza liboso ya Yawe, mwana ngombe yango ya mobali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akotia loboko na ye na moto ya mwana ngombe mpe akokata yango kingo liboso ya Yawe.
5 油注がれた祭司は、その子牛の血を取って、それを会見の幕屋に携え入り、
Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
6 そして祭司は指をその血に浸して、聖所の垂幕の前で主の前にその血を七たび注がなければならない。
Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule.
7 祭司はまたその血を取り、主の前で会見の幕屋の中にある香ばしい薫香の祭壇の角に、それを塗らなければならない。その子牛の血の残りはことごとく会見の幕屋の入口にある燔祭の祭壇のもとに注がなければならない。
Nganga-Nzambe akotia ndambo ya makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo ndambo mosusu ya makila ya ngombe oyo ekotikala, akosopa yango na makolo ya etumbelo ya bambeka ya kotumba, oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
8 またその罪祭の子牛から、すべての脂肪を取らなければならない。すなわち内臓をおおう脂肪と内臓の上のすべての脂肪、
Akolongola mafuta nyonso ya mwana ngombe oyo asili kobonza lokola mbeka mpo na masumu, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, mpe nyonso oyo ekangami kati na yango
9 二つの腎臓とその上の腰のあたりにある脂肪、ならびに腎臓と共に取られる肝臓の上の小葉である。
elongo na bambuma mibale oyo ezalaka na loketo, na mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo; akolongola bafwa mpe bambuma wana mibale
10 これを取るには酬恩祭の犠牲の雄牛から取るのと同じようにしなければならない。そして祭司はそれを燔祭の祭壇の上で焼かなければならない。
ndenge balongolaka mafuta ya ngombe oyo babonzi lokola mbeka ya boyokani. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo ya mbeka ya kotumba.
11 その子牛の皮とそのすべての肉、およびその頭と足と内臓と汚物など、
Kasi poso ya ngombe ya mobali, mosuni na yango nyonso, moto na yango, makolo na yango, biloko ya kati;
12 すべてその子牛の残りは、これを宿営の外の、清い場所なる灰捨場に携え出し、火をもってこれをたきぎの上で焼き捨てなければならない。すなわちこれは灰捨場で焼き捨てらるべきである。
elingi koloba biteni mosusu ya ngombe oyo etikali, Nganga-Nzambe asengeli komema yango libanda ya molako, na esika moko ya bule oyo ebongisama mpo na kotumba biteni ya mbeka oyo etikalaka, na esika oyo babwakaka putulu; bongo bakotumba yango na likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto, na esika oyo babwakaka putulu.’
13 もしイスラエルの全会衆があやまちを犯し、そのことが会衆の目に隠れていても、主のいましめにそむいて、してはならないことの一つをなして、とがを得たならば、
‘Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo.
14 その犯した罪が現れた時、会衆は雄の子牛を罪祭としてささげなければならない。すなわちそれを会見の幕屋の前に連れてきて、
Bakobonza ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bakomema yango liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
15 会衆の長老たちは、主の前でその子牛の頭に手を置き、その子牛を主の前で、ほふらなければならない。
Bakambi ya lisanga bakotia maboko na bango na moto ya ngombe yango liboso ya Yawe.
16 そして、油注がれた祭司は、その子牛の血を会見の幕屋に携え入り、
Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akomema ndambo ya makila ya ngombe yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
17 祭司は指をその血に浸し、垂幕の前で主の前に七たび注がなければならない。
Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye kati na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe mpe ya rido.
18 またその血を取って、会見の幕屋の中の主の前にある祭壇の角に、それを塗らなければならない。その血の残りはことごとく会見の幕屋の入口にある燔祭の祭壇のもとに注がなければならない。
Nganga-Nzambe akotia makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akosopa makila nyonso oyo ekotikala na se ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
19 またそのすべての脂肪を取って祭壇の上で焼かなければならない。
Akolongola mafuta nyonso ya ngombe mpe akotumba yango na etumbelo.
20 すなわち祭司は罪祭の雄牛にしたように、この雄牛にも、しなければならない。こうして、祭司が彼らのためにあがないをするならば、彼らはゆるされるであろう。
Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato; mpe bakolimbisama.
21 そして、彼はその雄牛を宿営の外に携え出し、はじめの雄牛を焼き捨てたように、これを焼き捨てなければならない。これは会衆の罪祭である。
Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe.’
22 またつかさたる者が罪を犯し、あやまって、その神、主のいましめにそむき、してはならないことの一つをして、とがを得、
‘Soki mokambi moko asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo oyo epekisami na mibeko ya Yawe, Nzambe na ye; amemi solo ngambo.
23 もしその犯した罪を知るようになったときは、供え物として雄やぎの全きものを連れてきて、
Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba.
24 そのやぎの頭に手を置き、燔祭をほふる場所で、主の前にこれをほふらなければならない。これは罪祭である。
Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu.
25 祭司は指でその罪祭の血を取り、燔祭の祭壇の角にそれを塗り、残りの血は燔祭の祭壇のもとに注がなければならない。
Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na bolimbisi masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe akosopa makila oyo ekotikala na makolo ya etumbelo.
26 また、そのすべての脂肪は、酬恩祭の犠牲の脂肪と同じように、祭壇の上で焼かなければならない。こうして、祭司が彼のためにその罪のあがないをするならば、彼はゆるされるであろう。
Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi; mpe mokonzi wana akolimbisama.’
27 また一般の人がもしあやまって罪を犯し、主のいましめにそむいて、してはならないことの一つをして、とがを得、
‘Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe; amemi solo ngambo.
28 その犯した罪を知るようになったときは、その犯した罪のために供え物として雌やぎの全きものを連れてきて、
Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba.
29 その罪祭の頭に手を置き、燔祭をほふる場所で、その罪祭をほふらなければならない。
Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba.
30 そして祭司は指でその血を取り、燔祭の祭壇の角にこれを塗り、残りの血をことごとく祭壇のもとに注がなければならない。
Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, mpe akosopa makila nyonso oyo etikali na makolo ya etumbelo.
31 またそのすべての脂肪は酬恩祭の犠牲から脂肪を取るのと同じように取り、これを祭壇の上で焼いて主にささげる香ばしいかおりとしなければならない。こうして祭司が彼のためにあがないをするならば、彼はゆるされるであろう。
Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama.
32 もし小羊を罪祭のために供え物として連れてくるならば、雌の全きものを連れてこなければならない。
Soki abonzi mwana meme lokola mbeka mpo na masumu na ye, asengeli komema mwana meme ya mwasi ezanga mbeba.
33 その罪祭の頭に手を置き、燔祭をほふる場所で、これをほふり、罪祭としなければならない。
Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba.
34 そして祭司は指でその罪祭の血を取り、燔祭の祭壇の角にそれを塗り、残りの血はことごとく祭壇のもとに注がなければならない。
Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, mpe akotia yango na maseke ya etumbelo ya bambeka ya kotumba. Bongo akosopa makila nyonso oyo etikali, na makolo ya etumbelo.
35 またそのすべての脂肪は酬恩祭の犠牲から小羊の脂肪を取るのと同じように取り、祭司はこれを主にささげる火祭のように祭壇の上で焼かなければならない。こうして祭司が彼の犯した罪のためにあがないをするならば、彼はゆるされるであろう。
Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama.’ › »

< レビ記 4 >