< レビ記 25 >

1 主はシナイ山で、モーセに言われた、
Yawe alobaki na Moyize na ngomba Sinai:
2 「イスラエルの人々に言いなさい、『わたしが与える地に、あなたがたがはいったときは、その地にも、主に向かって安息を守らせなければならない。
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango: ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe.
3 六年の間あなたは畑に種をまき、また六年の間ぶどう畑の枝を刈り込み、その実を集めることができる。
Mibu motoba, bokolona bilanga na bino mpe mibu motoba, bokobongisa bilanga na bino ya vino mpe bokobuka bambuma na yango.
4 しかし、七年目には、地に全き休みの安息を与えなければならない。これは、主に向かって守る安息である。あなたは畑に種をまいてはならない。また、ぶどう畑の枝を刈り込んではならない。
Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe.
5 あなたの穀物の自然に生えたものは刈り取ってはならない。また、あなたのぶどうの枝の手入れをしないで結んだ実は摘んではならない。これは地のために全き休みの年だからである。
Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele.
6 安息の年の地の産物は、あなたがたの食物となるであろう。すなわち、あなたと、男女の奴隷と、雇人と、あなたの所に宿っている他国人と、
Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino: yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo
7 あなたの家畜と、あなたの国のうちの獣とのために、その産物はみな、食物となるであろう。
elongo na banyama ya mboka mpe ya zamba oyo bazali kati na mokili na bino. Bosengeli kolia biloko nyonso oyo mabele ekobota.
8 あなたは安息の年を七たび、すなわち、七年を七回数えなければならない。安息の年七たびの年数は四十九年である。
Bokotanga mibu sambo ya Saba, mbala sambo, na mibu sambo; mpe mibu sambo ya Saba ekosala mibu tuku minei na libwa.
9 七月の十日にあなたはラッパの音を響き渡らせなければならない。すなわち、贖罪の日にあなたがたは全国にラッパを響き渡らせなければならない。
Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba.
10 その五十年目を聖別して、国中のすべての住民に自由をふれ示さなければならない。この年はあなたがたにはヨベルの年であって、あなたがたは、おのおのその所有の地に帰り、おのおのその家族に帰らなければならない。
Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.
11 その五十年目はあなたがたにはヨベルの年である。種をまいてはならない。また自然に生えたものは刈り取ってはならない。手入れをしないで結んだぶどうの実は摘んではならない。
Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino: bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te.
12 この年はヨベルの年であって、あなたがたに聖であるからである。あなたがたは畑に自然にできた物を食べなければならない。
Pamba te ezali mobu ya kosepela kokangolama na bino, mpe esengeli kozala bule mpo na bino. Bokolia kaka bambuma ya bilanga.
13 このヨベルの年には、おのおのその所有の地に帰らなければならない。
Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye.
14 あなたの隣人に物を売り、また隣人から物を買うときは、互に欺いてはならない。
Soki bozali koteka mabele epai ya ndeko na bino to soki bozali kosomba eloko songolo epai na ye, wana bozali bana mboka moko, tika ete moko te kati na bino akosa ndeko na ye.
15 ヨベルの後の年の数にしたがって、あなたは隣人から買い、彼もまた畑の産物の年数にしたがって、あなたに売らなければならない。
Okosomba epai ya ndeko na yo ya mboka, na motuya ya mbongo oyo bakokata kolanda motango ya mibu oyo eleki wuta mobu ya suka oyo bosepelaki kokangolama na bino; mpe akotekela yo na motuya ya mbongo oyo ekokatama kolanda motango ya mibu oyo ekotikala, mibu ya kobuka bambuma, kino bokoma na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama na bino.
16 年の数の多い時は、その値を増し、年の数の少ない時は、値を減らさなければならない。彼があなたに売るのは産物の数だからである。
Soki mibu etikali ebele, bosengeli komatisa motuya; mpe soki mibu ezali moke, bosengeli kokitisa motuya, pamba te ezali motango ya mibu ya kobuka bambuma nde etekamaka: yango nde bakotekela yo.
17 あなたがたは互に欺いてはならない。あなたの神を恐れなければならない。わたしはあなたがたの神、主である。
Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
18 あなたがたはわたしの定めを行い、またわたしのおきてを守って、これを行わなければならない。そうすれば、あなたがたは安らかにその地に住むことができるであろう。
Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili;
19 地はその実を結び、あなたがたは飽きるまでそれを食べ、安らかにそこに住むことができるであろう。
mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia.
20 「七年目に種をまくことができず、また産物を集めることができないならば、わたしたちは何を食べようか」とあなたがたは言うのか。
Bokoki kotuna: ‘Tokolia nini na mobu ya sambo soki toloni te mpe tobuki te bambuma na biso?’
21 わたしは命じて六年目に、あなたがたに祝福をくだし、三か年分の産物を実らせるであろう。
Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato.
22 あなたがたは八年目に種をまく時には、なお古い産物を食べているであろう。九年目にその産物のできるまで、あなたがたは古いものを食べることができるであろう。
Wana bokolona na mobu ya mwambe, bokolia nanu bambuma ya kala mpe bokokoba kolia yango kino bokobuka bambuma ya mobu ya libwa.
23 地は永代には売ってはならない。地はわたしのものだからである。あなたがたはわたしと共にいる寄留者、また旅びとである。
Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.
24 あなたがたの所有としたどのような土地でも、その土地の買いもどしに応じなければならない。
Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye.
25 あなたの兄弟が落ちぶれてその所有の地を売った時は、彼の近親者がきて、兄弟の売ったものを買いもどさなければならない。
Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.
26 たといその人に、それを買いもどしてくれる人がいなくても、その人が富み、自分でそれを買いもどすことができるようになったならば、
Soki moto wana azali na ndeko te oyo akoki kosikola yango mpo na ye; mpe ye moko akomi na bozwi bongo azwi makoki ya kosikola yango;
27 それを売ってからの年を数えて残りの分を買い手に返さなければならない。そうすればその人はその所有の地に帰ることができる。
asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye.
28 しかし、もしそれを買いもどすことができないならば、その売った物はヨベルの年まで買い主の手にあり、ヨベルにはもどされて、その人はその所有の地に帰ることができるであろう。
Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango.
29 人が城壁のある町の住宅を売った時は、売ってから満一年の間は、それを買いもどすことができる。その間は彼に買いもどすことを許さなければならない。
Soki moto ateki ndako kati na engumba oyo bazingela na bamir, azali na makoki ya kosikola yango kaka mpo na mobu moko wuta mokolo oyo atekaki yango. Ezali kaka na tango wana nde akoki kosikola yango.
30 満一年のうちに、それを買いもどさない時は、城壁のある町の内のその家は永代にそれを買った人のものと定まって、代々の所有となり、ヨベルの年にももどされないであろう。
Soki asikoli yango te liboso ete mobu mobimba eleka, ndako oyo ezali kati na engumba oyo bazingela na bamir ekotikala libela mpo na moto oyo asombaki yango mpe mpo na bakitani na ye; bakoki te kozongisa yango na mobu ya kosepela kokangolama.
31 しかし、周囲に城壁のない村々の家は、その地方の畑に附属するものとみなされ、買いもどすことができ、またヨベルの年には、もどされるであろう。
Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama.
32 レビびとの町々、すなわち、彼らの所有の町々の家は、レビびとはいつでも買いもどすことができる。
Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi.
33 レビびとのひとりが、それを買いもどさない時は、その所有の町にある売った家はヨベルの年にはもどされるであろう。レビびとの町々の家はイスラエルの人々のうちに彼らがもっている所有だからである。
Soki Molevi ateki ndako na ye kati na bingumba ya Balevi, moto oyo asombi yango akozongisela ye yango na mobu ya kosepela kokangolama; pamba te bandako oyo ezali kati na bingumba ya Balevi ezali libula na bango ya libela kati na bana ya Isalaele.
34 ただし、彼らの町々の周囲の放牧地は売ってはならない。それは彼らの永久の所有だからである。
Kasi bilanga oyo ezali zingazinga ya bingumba ya Balevi, bakoki koteka yango te: ezali libula na bango mpo na libela.
35 あなたの兄弟が落ちぶれ、暮して行けない時は、彼を助け、寄留者または旅びとのようにして、あなたと共に生きながらえさせなければならない。
Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela; mpo ete azala malamu pembeni na yo.
36 彼から利子も利息も取ってはならない。あなたの神を恐れ、あなたの兄弟をあなたと共に生きながらえさせなければならない。
Okoki te kozwa mileki na maboko na ye; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo.
37 あなたは利子を取って彼に金を貸してはならない。また利益をえるために食物を貸してはならない。
Soki odefisi ye mbongo, okosenga mileki te na oyo odefisi ye; mpe soki odefisi ye bilei, okosenga te koleka oyo opesi.
38 わたしはあなたがたの神、主であって、カナンの地をあなたがたに与え、かつあなたがたの神となるためにあなたがたをエジプトの国から導き出した者である。
Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito; mpo na kopesa yo mokili ya Kanana, mpe na kozala Nzambe na yo.
39 あなたの兄弟が落ちぶれて、あなたに身を売るときは、奴隷のように働かせてはならない。
Soki ndeko na yo, mwana mboka, akomi mobola mpe amiteki epai na yo, kopesa ye te misala na makasi lokola mowumbu.
40 彼を雇人のように、また旅びとのようにしてあなたの所におらせ、ヨベルの年まであなたの所で勤めさせなさい。
Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama;
41 その時には、彼は子供たちと共にあなたの所から出て、その一族のもとに帰り、先祖の所有の地にもどるであろう。
mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye.
42 彼らはエジプトの国からわたしが導き出したわたしのしもべであるから、身を売って奴隷となってはならない。
Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito; bakoki te koteka bango lokola bawumbu.
43 あなたは彼をきびしく使ってはならない。あなたの神を恐れなければならない。
Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo.
44 あなたがもつ奴隷は男女ともにあなたの周囲の異邦人のうちから買わなければならない。すなわち、彼らのうちから男女の奴隷を買うべきである。
Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo; okosomba bango kaka na bikolo yango.
45 また、あなたがたのうちに宿っている旅びとの子供のうちからも買うことができる。また彼らのうちあなたがたの国で生れて、あなたがたと共におる人々の家族からも買うことができる。そして彼らはあなたがたの所有となるであろう。
Okoki mpe kosomba bapaya oyo bazali kovanda kati na mokili na yo, mpe bato ya bituka na bango, oyo babotami kati na mokili na yo; boye bakokoma bawumbu na yo.
46 あなたがたは彼らを獲て、あなたがたの後の子孫に所有として継がせることができる。すなわち、彼らは長くあなたがたの奴隷となるであろう。しかし、あなたがたの兄弟であるイスラエルの人々をあなたがたは互にきびしく使ってはならない。
Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele.
47 あなたと共にいる寄留者または旅びとが富み、そのかたわらにいるあなたの兄弟が落ちぶれて、あなたと共にいるその寄留者、旅びと、または寄留者の一族のひとりに身を売った場合、
Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye;
48 身を売った後でも彼を買いもどすことができる。その兄弟のひとりが彼を買いもどさなければならない。
ndeko na yo, mwana mboka, akoki kosikolama sima na ye komiteka: moto moko kati na bandeko na ye akoki kosikola ye.
49 あるいは、おじ、または、おじの子が彼を買いもどさなければならない。あるいは一族の近親の者が、彼を買いもどさなければならない。あるいは自分に富ができたならば、自分で買いもどさなければならない。
Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko.
50 その時、彼は自分の身を売った年からヨベルの年までを、その買い主と共に数え、その年数によって、身の代金を決めなければならない。その年数は雇われた年数として数えなければならない。
Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala.
51 なお残りの年が多い時は、その年数にしたがい、買われた金額に照して、あがないの金を払わなければならない。
Soki etikali mibu ebele, asengeli kofuta mpo na kosikolama na ye, mbongo kolanda talo oyo basombaki ye.
52 またヨベルの年までに残りの年が少なければ、その人と共に計算し、その年数にしたがって、あがないの金を払わなければならない。
Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali.
53 彼は年々雇われる人のように扱われなければならない。あなたの目の前で彼をきびしく使わせてはならない。
Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi.
54 もし彼がこのようにしてあがなわれないならば、ヨベルの年に彼は子供と共に出て行くことができる。
Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama.
55 イスラエルの人々は、わたしのしもべだからである。彼らはわたしがエジプトの国から導き出したわたしのしもべである。わたしはあなたがたの神、主である。
Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.

< レビ記 25 >