< レビ記 1 >

1 主はモーセを呼び、会見の幕屋からこれに告げて言われた、
Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani:
2 「イスラエルの人々に言いなさい、『あなたがたのうちだれでも家畜の供え物を主にささげるときは、牛または羊を供え物としてささげなければならない。
« Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme.
3 もしその供え物が牛の燔祭であるならば、雄牛の全きものをささげなければならない。会見の幕屋の入口で、主の前に受け入れられるように、これをささげなければならない。
Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
4 彼はその燔祭の獣の頭に手を置かなければならない。そうすれば受け入れられて、彼のためにあがないとなるであろう。
Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.
5 彼は主の前でその子牛をほふり、アロンの子なる祭司たちは、その血を携えてきて、会見の幕屋の入口にある祭壇の周囲に、その血を注ぎかけなければならない。
Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
6 彼はまたその燔祭の獣の皮をはぎ、節々に切り分かたなければならない。
Bakolongola poso ya mbeka yango mpe bakokata yango na biteni.
7 祭司アロンの子たちは祭壇の上に火を置き、その火の上にたきぎを並べ、
Sima, bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bakopelisa moto na etumbelo mpe bakotanda bakoni likolo ya moto.
8 アロンの子なる祭司たちはその切り分けたものを、頭および脂肪と共に、祭壇の上にある火の上のたきぎの上に並べなければならない。
Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo.
9 その内臓と足とは水で洗わなければならない。こうして祭司はそのすべてを祭壇の上で焼いて燔祭としなければならない。これは火祭であって、主にささげる香ばしいかおりである。
Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
10 もしその燔祭の供え物が群れの羊または、やぎであるならば、雄の全きものをささげなければならない。
Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba.
11 彼は祭壇の北側で、主の前にこれをほふり、アロンの子なる祭司たちは、その血を祭壇の周囲に注ぎかけなければならない。
Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
12 彼はまたこれを節々に切り分かち、祭司はこれを頭および脂肪と共に、祭壇の上にある火の上のたきぎの上に並べなければならない。
Akokata-kata mbeka yango na biteni; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango: akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo;
13 その内臓と足とは水で洗わなければならない。こうして祭司はそのすべてを祭壇の上で焼いて燔祭としなければならない。これは火祭であって、主にささげる香ばしいかおりである。
akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
14 もし主にささげる供え物が、鳥の燔祭であるならば、山ばと、または家ばとのひなを、その供え物としてささげなければならない。
Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka.
15 祭司はこれを祭壇に携えて行き、その首を摘み破り、祭壇の上で焼かなければならない。その血は絞り出して祭壇の側面に塗らなければならない。
Nganga-Nzambe akomema yango na etumbelo, akokata yango moto, akotumba moto yango na etumbelo mpe akosopa makila na yango zingazinga ya etumbelo.
16 またその餌袋は羽と共に除いて、祭壇の東の方にある灰捨場に捨てなければならない。
Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto.
17 これは、その翼を握って裂かなければならない。ただし引き離してはならない。祭司はこれを祭壇の上で、火の上のたきぎの上で燔祭として焼かなければならない。これは火祭であって、主にささげる香ばしいかおりである。
Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.

< レビ記 1 >