< ヨブ 記 40 >

1 主はまたヨブに答えて言われた、
Yawe ayanolaki Yobo:
2 「非難する者が全能者と争おうとするのか、神と論ずる者はこれに答えよ」。
« Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye! »
3 そこで、ヨブは主に答えて言った、
Yobo azongiselaki Yawe:
4 「見よ、わたしはまことに卑しい者です、なんとあなたに答えましょうか。ただ手を口に当てるのみです。
« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo? Natie loboko na ngai na monoko.
5 わたしはすでに一度言いました、また言いません、すでに二度言いました、重ねて申しません」。
Nalobaki mbala moko, kasi nakoyanola lisusu te; na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »
6 主はまたつむじ風の中からヨブに答えられた、
Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi:
7 「あなたは腰に帯して、男らしくせよ。わたしはあなたに尋ねる、わたしに答えよ。
« Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali; nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai.
8 あなたはなお、わたしに責任を負わそうとするのか。あなたはわたしを非とし、自分を是としようとするのか。
Olingi kotiola bosembo na ngai? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa?
9 あなたは神のような腕を持っているのか、神のような声でとどろきわたることができるか。
Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye?
10 あなたは威光と尊厳とをもってその身を飾り、栄光と華麗とをもってその身を装ってみよ。
Lata nkembo mpe kongenga, milatisa lokumu mpe monene!
11 あなたのあふるる怒りを漏らし、すべての高ぶる者を見て、これを低くせよ。
Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato, tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo mpe kitisa bango!
12 すべての高ぶる者を見て、これをかがませ、また悪人をその所で踏みつけ、
Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni! Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
13 彼らをともにちりの中にうずめ、その顔を隠れた所に閉じこめよ。
Kunda bango nyonso kati na putulu, zipa bilongi na bango na esika ya kobombama.
14 そうすれば、わたしもまた、あなたをほめて、あなたの右の手はあなたを救うことができるとしよう。
Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu, pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo.
15 河馬を見よ、これはあなたと同様にわたしが造ったもので、牛のように草を食う。
Tala ngubu: nakelaki yango ndenge nakelaki yo, kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.
16 見よ、その力は腰にあり、その勢いは腹の筋にある。
Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango, nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango!
17 これはその尾を香柏のように動かし、そのももの筋は互にからみ合う。
Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele; misisa ya mipende na yango elingama-lingama;
18 その骨は青銅の管のようで、その肋骨は鉄の棒のようだ。
mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze; mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende.
19 これは神のわざの第一のものであって、これを造った者がこれにつるぎを授けた。
Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe, kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene.
20 山もこれがために食物をいだし、もろもろの野の獣もそこに遊ぶ。
Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia, esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka.
21 これは酸棗の木の下に伏し、葦の茂み、または沼に隠れている。
Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
22 酸棗の木はその陰でこれをおおい、川の柳はこれをめぐり囲む。
Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango, banzete ya pepiliye ezingeli yango.
23 見よ、たとい川が荒れても、これは驚かない。ヨルダンがその口に注ぎかかっても、これはあわてない。
Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te; ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, evandaka kaka kimia.
24 だれが、かぎでこれを捕えることができるか。だれが、わなでその鼻を貫くことができるか。
Boni, moto akoki kokanga yango na motambo na tango ezali kotala to kotobola yango zolo na ndobo, mpo na kobenda yango?

< ヨブ 記 40 >