< エレミヤ書 51 >

1 主はこう言われる、「見よ、わたしは、滅ぼす者の心を奮い起して、バビロンを攻め、カルデヤに住む者を攻めさせる。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala, nakotinda mopepe ya makasi mpo na kobebisa mokili ya Babiloni mpe bato ya Lebi-Kamayi.
2 わたしはバビロンに、あおぎ分ける者をつかわす。彼らは、その災の日に、四方からこれを攻め、それをあおぎ分けて、その地をむなしくする。
Nakotinda bapaya na Babiloni mpo na koyungola mpe kobebisa yango: bakobundisa yango na bangambo nyonso na mokolo na yango ya kosambisama.
3 射手にはその弓を張らせることなく、よろいを着て立ち上がらせるな。その若き者をあわれむことなく、その軍勢をことごとく滅ぼせ。
Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te ya kobeta makonga na bango; bakozwa tango te ya kolata bibombelo ya tolo, bakobikisa te basoda na bango ya bilenge mpe bakoboma mampinga na bango nyonso.
4 彼らはカルデヤびとの地に殺されて倒れ、そのちまたに傷ついて倒れる。
Bato oyo bakokweya na mopanga bakotondisa mokili ya Babiloni mpe babalabala na yango ekotonda na bato bazoka bapota.
5 イスラエルとユダはその神、万軍の主に捨てられてはいないが、しかしカルデヤびとの地にはイスラエルの聖者に向かって犯した罪が満ちている。
Ata soki mokili na bango etondaki na masumu liboso ya Mosantu ya Isalaele, Nzambe na bango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, abosanaki Isalaele na Yuda te.
6 バビロンのうちからのがれ出て、おのおのその命を救え。その罰にまきこまれて断ち滅ぼされてはならない。今は主があだを返される時だから、それに報復をされるのである。
Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.
7 バビロンは主の手のうちにある金の杯であって、すべての地を酔わせた。国々はその酒を飲んだので、国々は狂った。
Babiloni ezali lokola kopo ya wolo na loboko ya Yawe; ezalaki kolangwisa mokili mobimba. Bongo bato ya bikolo bameli masanga na yango mpe bakomi lokola bazoba.
8 バビロンはたちまち倒れて破れた。これがために嘆け。その傷のために乳香を取れ。あるいは、いえるかも知れない。
Babiloni ekokweya na mbalakata mpe ekobukana! Bosala matanga mpo na yango mpe botia kisi na pota na yango, tango mosusu akobika.
9 われわれはバビロンをいやそうとしたが、これはいえなかった。われわれはこれを捨てて、おのおの自分の国に帰ろう。その罰が天に達し、雲にまで及んでいるからだ。
‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te; yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, moto na moto na engumba na ye; pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, emati likolo lokola mapata. ›
10 主はわれわれの正しいことを明らかにされた。さあ、われわれはシオンで、われわれの神、主のみわざを告げ示そう。
‹ Yawe apesi biso etumbu! Boya totatola na Siona makambo oyo Yawe, Nzambe na biso, asali. ›
11 矢をとぎ、盾を取れ。主はメデアびとの王たちの心を引き立てられる。主のバビロンに思い図ることは、これを滅ぼすことであり、主があだを返し、その宮のあだを返されるのである。
Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.
12 バビロンの城壁に向かって旗を立て、見張りを強固にし、番兵を置き、伏兵を備えよ。主がバビロンに住む者を攻めようと図り、その言われたことを、いま行われるからだ。
Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni! Bobakisa motango ya bakengeli mpe ya basinzili, botia mitambo! Yawe akokokisa mabongisi na Ye mpe ekateli ya etumbu na Ye mpo na bato ya Babiloni.
13 多くの水のほとりに住み、多くの財宝を持つ者よ、あなたの終りが来て、その命の糸は断たれる。
Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene, yo oyo otonda na bomengo mingi, suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki!
14 万軍の主はみずからをさして誓い、言われる、わたしは必ずあなたのうちに、人をいなごのように満たす。彼らはあなたに向かって、かちどきの声をあげる。
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko: Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki, bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo.
15 主はその力をもって地を造り、その知恵をもって世界を建て、その悟りをもって天をのべられた。
Asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
16 彼が声を出されると、天に多くの水のざわめきがあり、また地の果から霧を立ちあがらせられる。彼は雨のためにいなびかりをおこし、その倉から風を取り出される。
Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.
17 すべての人は愚かで知恵がなく、すべての金細工人はその造った偶像のために恥をこうむる。その偶像は偽り物で、そのうちに息がないからだ。
Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.
18 それらは、むなしいもの、迷いのわざである。罰せられる時になれば滅びるものである。
Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola; ekolimwa na tango ya kosambisama.
19 ヤコブの分である彼はこのようなものではない、彼は万物の造り主だからである。イスラエルは彼の嗣業としての部族である。彼の名は万軍の主という。
Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
20 おまえはわたしの鎚であり、戦いの武器である。わたしはおまえをもってすべての国を砕き、おまえをもって万国を滅ぼす。
Ozalaki solo marto, ebundeli na Ngai ya bitumba: elongo na yo, napanzaki bikolo; elongo na yo, nabebisaki mikili;
21 おまえをもってわたしは馬と、その騎手とを砕き、おまえをもって戦車とそれに乗る者とを砕く。
elongo na yo, napanzaki mpunda mpe motambolisi na yango; elongo na yo, napanzaki shar mpe motambolisi na yango;
22 わたしはおまえをもって男と女とを砕き、おまえをもって老いた者と幼い者とを砕き、おまえをもって若い者と、おとめとを砕く。
elongo na yo, napanzaki mwasi mpe mobali; elongo na yo, napanzaki mibange mpe bilenge; elongo na yo, napanzaki bilenge mibali mpe bilenge basi;
23 わたしはおまえをもって、羊飼と、その群れとを砕き、おまえをもって農夫と、くびきを負う家畜とを砕き、おまえをもっておさたちと、つかさたちとを砕く。
elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango; elongo na yo, napanzaki mosali bilanga mpe bangombe na ye; elongo na yo, napanzaki bayangeli mpe bakalaka.
24 わたしはバビロンとカルデヤに住むすべての者とに、彼らがシオンで行ったもろもろの悪しき事のために、あなたがたの目の前で報いをすると、主は言われる。
Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso mabe nyonso oyo basalaki Siona, » elobi Yawe.
25 主は言われる、全地を滅ぼし尽す滅ぼしの山よ、見よ、わたしはおまえの敵となる、わたしは手をおまえの上に伸べて、おまえを岩からころばし、おまえを焼け山にする。
« Yo ngomba oyo obebisaka, yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » elobi Yawe, « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto.
26 主は言われる、人がおまえから石を取って、隅の石とすることなく、また礎とすることもない。おまえはいつまでも荒れ地となっている。
Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo libanga oyo batongelaka basonge ya bamir to libanga oyo batongelaka miboko; pamba te okobebisama mpo na libela, » elobi Yawe.
27 地に旗を立て、国々のうちにラッパを吹き、国々の民を集めてそれを攻め、アララテ、ミンニ、アシケナズの国々をまねいてそれを攻め、軍の長を立ててそれを攻め、群がるいなごのように馬を上り行かせよ。
« Botelemisa bendele kati na mokili! Bobeta kelelo kati na bikolo! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.
28 国々の民を集めてそれを攻め、メデアびとの王たちと、そのおさたち、つかさたち、およびすべての領地の人々を集めてこれを攻めよ。
Bobongisa bikolo mpo na kobundisa yango: bakonzi ya Medi, bayangeli na bango mpe bakalaka na bango nyonso mpe bamboka nyonso oyo bazali kokamba.
29 その地は震い、かつもだえ苦しむ、主がその思い図ることをバビロンにおこない、バビロンの地を、住む人なき荒れ地とされるからだ。
Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.
30 バビロンの勇士たちは戦いをやめて、その城にこもり、力はうせて、女のようになる。その家は焼け、その貫の木は砕かれる。
Basoda ya Babiloni batiki kobunda, babombami kati na bandako batonga makasi. Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki bikangelo bikuke na yango.
31 飛脚は走って飛脚に会い、使者は走って使者に会い、バビロンの王に告げて、町はことごとく取られ、
Bato oyo bamemaka mikanda bazali kolandana mbangu, mpe bamemi sango bazali kolandana mbangu mpo na koyebisa mokonzi ya Babiloni ete babotoli engumba mobimba,
32 渡し場は奪われ、とりでは火で焼かれ、兵士はおびえていると言う。
bakangi bapon mpe bibale; banzete oyo ebotaka na mayi esili na kozika moto mpe basoda bakomi na somo. »
33 万軍の主、イスラエルの神はこう言われる、バビロンの娘は、打ち場のようだ、その踏まれる時が来たのだ。しばらくしてその刈り取られる時が来る」。
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble na tango banyataka-nyataka yango; mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
34 「バビロンの王ネブカデレザルはわたしを食い尽し、わたしを滅ぼし、わたしを、からの器のようにし、龍のようにわたしを飲み、わたしのうまい物でその腹を満たし、わたしを洗いざらいにした。
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko; mpe sima, asanzaki biso.
35 わたしとわたしの肉親におこなった暴虐は、バビロンにふりかかる」とシオンに住む者は言わなければならない。「わたしの血はカルデヤに住む者にふりかかる」とエルサレムは言わなければならない。
Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso ekweyela Babiloni, » elobi bavandi ya Siona! « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, elobi bavandi ya Yelusalemi! »
36 それゆえ主はこう言われる、「見よ、わたしはあなたの訴えをただし、あなたのためにあだを返す。わたしはバビロンの海をかわかし、その泉をかわかす。
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, nakokawusa ebale na yango ya monene mpe nakokawusa maziba na yango.
37 バビロンは荒塚となり、山犬のすまいとなり、驚きとなり、笑いとなり、住む人のない所となる。
Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.
38 彼らはししのように共にほえ、若いししのようにほえる。
Bato na yango nyonso bakokoma koganga lokola nkosi ya mike mpe kolela lokola bana ya nkosi.
39 彼らの欲の燃えている時、わたしは宴を設けて彼らを酔わせ、彼らがついに気を失って、ながい眠りにいり、もはや目をさますことのないようにしようと主は言われる。
Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto, nakobongisela bango feti mpe nakolangwisa bango masanga mpo ete batondisama na esengo; bongo, bakolala pongi ya libela mpe bakoka lisusu kolamuka te, » elobi Yawe,
40 わたしは彼らを小羊のように、また雄羊や雄やぎのように、ほふり場に下らせよう。
« nakomema bango ndenge bamemaka bampate to bameme ya mibali to mpe bantaba ya mibali na esika oyo babomelaka bibwele.
41 ああ、バビロンはついに取られた、全地の人の、ほめたたえた者は捕えられた。ああ、バビロンはついに国々のうちに驚きとなった。
Ndenge nini bakangi Sheshaki! Ndenge nini basukisi lolendo ya ekolo oyo ezalaki kosala lokumu ya mokili mobimba! Ndenge nini penza Babiloni ekomi penza eloko ya somo kati na bikolo!
42 海はバビロンにあふれかかり、どよめく波におおわれた。
Ebale monene ekozindisa Babiloni, makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni.
43 その町々は荒れて、かわいた地となり、砂原となり、住む人のない地となる。人の子はひとりとしてそこを過ぎることはない。
Bingumba na yango ekobebisama, ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, mokili oyo bato bavandaka te, mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.
44 わたしはバビロンでベルを罰し、そののみこんだものを口から取り出す。国々が川のように彼に流れ入ることはなくなる。バビロンの城壁は倒れた。
Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko; ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye mpe bamir ya Babiloni ekokweya.
45 わが民よ、あなたがたはその中から出て、おのおの主の激しい怒りを免れ、その命を救え。
Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni! Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe!
46 心を弱くしてはならない、この地で聞くうわさを恐れてはならない。うわさはこの年にもくれば、また次の年にもくる。この地に暴虐があり、つかさとつかさとが攻めあうことがある。
Bobanga te mpe bolemba nzoto te tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili: mobu oyo, sango ya mabe; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe; kaka sango ya mobulu kati na mokili to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.
47 それゆえ見よ、わたしがバビロンの偶像を罰する日が来る。その全地ははずかしめられ、その殺される者はみなその中に倒れる。
Pamba te tango ekoya solo, tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni; mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni, mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga bakokufa kuna.
48 天と地とそのうちにあるすべてのものはバビロンの事で喜び歌う。滅ぼす者が北の方からここに来るからであると主は言われる。
Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » elobi Yawe.
49 イスラエルの殺された者たちのために、バビロンは倒れなければならない、バビロンのために全地の殺された者は倒れたのだ。
« Babiloni mpe esengeli kokweya, mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki, ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni.
50 つるぎをのがれてきたあなたがたは、行け、立ちとどまってはならない。遠くから主を覚え、エルサレムを心にとめよ。
Bino bato oyo bobiki na mopanga, bokima, bolekisa tango te! Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi!
51 『われわれはののしりを聞いたので、恥じている。異邦人が主の宮の聖所にはいったので、恥がわれわれの顔をおおった』。
Tosambwe, pamba te totiolami; mpe bilongi na biso ezipami na soni mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule ya Tempelo ya Yawe.
52 主は言われる、それゆえ見よ、わたしがその偶像を罰する日が来る、傷つけられた者が、その全国にうめくようになる。
Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni, mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato oyo bazoka bapota ya somo.
53 たといバビロンが天に上っても、その城を高くして固めても、滅ぼす者はわたしから出て、これに臨むと主は言われる。
Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.
54 聞け、バビロンの叫びを、カルデヤびとの地に起る大いなる滅びの騒ぎ声を。
« Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni, lokito makasi ya kobebisama ya mokili ya bato ya Babiloni.
55 主がバビロンを滅ぼし、その大いなる声を絶やされるのだ。その波は大水のように鳴りとどろき、その声はひびき渡る。
Pamba te Yawe akobebisa Babiloni mpe akokanga yango monoko. Lokito ya banguna ekoyokana lokola makelele ya bambonge ya bibale minene; bongo mingongo ya bato ekoyokana makasi.
56 滅ぼす者がこれに臨み、バビロンに来た。その勇士たちは捕えられ、その弓は折られる。主は報いをする神であるから必ず報いられるのだ。
Mobebisi akoya kobundisa Babiloni; bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko mpe bakobuka matolotolo na bango, pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka: afutaka kolanda misala ya moto na moto.
57 わたしはその君たちと知者たち、おさたち、つかさたち、および勇士たちを酔わせる。彼らは、ながい眠りにいり、目をさますことはない。万軍の主と呼ばれる王がこれを言わせる。
Nakolangwisa masanga: bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali: Yawe, Mokonzi ya mampinga.
58 万軍の主はこう言われる、バビロンの広い城壁は地にくずされ、その高い門は火に焼かれる。こうして民の労苦はむなしくなり、国民はただ火のために疲れる」。
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto; bato bazali kosala bobele mosala ya pamba mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
59 マアセヤの子であるネリヤの子セラヤが、ユダの王ゼデキヤと共に、その治世の四年にバビロンへ行くとき、預言者エレミヤがセラヤに命じた言葉。セラヤは宿営の長であった。
Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako.
60 エレミヤはバビロンに臨もうとするすべての災を巻物にしるした。これはすなわちバビロンの事についてしるしたすべての言葉である。
Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni.
61 エレミヤはセラヤに言った、「あなたはバビロンへ行ったならば、忘れることなくこのすべての言葉を読み、
Jeremi alobaki na Seraya: « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi.
62 そして言いなさい、『主よ、あなたはこの所を滅ぼし、人と獣とを問わず、すべてここに住む者のないようにし、永久にここを荒れ地としようと、この所について語られました』と。
Bongo okoloba: ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. ›
63 あなたがこの巻物を読み終ったならば、これに石をむすびつけてユフラテ川の中に投げこみ、
Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba:
64 そして言いなさい、『バビロンはこのように沈んで、二度と上がってこない。わたしがこれに災を下すからである』と」。ここまではエレミヤの言葉である。
‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › » Maloba ya Jeremi esuki awa.

< エレミヤ書 51 >