< エゼキエル書 12 >

1 主の言葉がわたしに臨んだ、
Yawe alobaki na ngai:
2 「人の子よ、あなたは反逆の家の中にいる。彼らは見る目があるが見ず、聞く耳があるが聞かず、彼らは反逆の家である。
« Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.
3 それゆえ、人の子よ、捕囚の荷物を整え、彼らの目の前で昼のうちに移れ、彼らの目の前であなたの所から他の所に移れ。彼らは反逆の家であるが、あるいは彼らは顧みるところがあろう。
Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki.
4 あなたは、捕囚の荷物のようなあなたの荷物を、彼らの目の前で昼のうちに持ち出せ。そして捕囚に行くべき人々のように、彼らの目の前で夕べのうちに出て行け。
Bimisa bisaka na yo na libanda, na moyi makasi na miso na bango; mpe na pokwa, kende ndenge bato bakendaka na bowumbu na miso na bango.
5 すなわち彼らの目の前で壁に穴をあけ、そこから出て行け。
Tobola mir na miso na bango mpe bimisa bisaka na yo na lidusu oyo okosala.
6 あなたは彼らの目の前でその荷物を肩に負い、やみのうちにそれを運び出せ。あなたの顔をおおって地を見るな。わたしはあなたをしるしとなして、イスラエルの家に示すのだ」。
Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. »
7 そこでわたしは命じられたようにし、捕囚の荷物のような荷物を昼のうちに持ち出し、夕べにはわたしの手で壁に穴をあけ、やみのうちに彼らの目の前で、これを肩に負って運び出した。
Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai: na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango.
8 次の朝、主の言葉がわたしに臨んだ、
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Yawe alobaki na ngai:
9 「人の子よ、反逆の家であるイスラエルの家は、あなたに向かって、『何をしているのか』と言わなかったか。
« Mwana na moto, libota ya batomboki ya Isalaele oyo, batunaki yo te: ‹ Ozali kosala nini? ›
10 あなたは彼らに言いなさい、『主なる神はこう言われる、この託宣はエルサレムの君、およびその中にあるイスラエルの全家にかかわるものである』と。
Yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lisakoli oyo ezali na tina na mokambi oyo azali na Yelusalemi elongo na libota mobimba ya Isalaele, oyo bazali kuna. ›
11 また言いなさい、『わたしはあなたがたのしるしである。わたしがしたとおりに彼らもされる。彼らはとりこにされて移される』と。
Loba na bango: ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango: bakokende na bowumbu lokola bakangami.
12 彼らのうちの君は、やみのうちにその荷物を肩に載せて出て行く。彼は壁に穴をあけて、そこから出て行く。彼は顔をおおって、自分の目でこの地を見ない。
Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te.
13 わたしはわたしの網を彼の上に打ちかける。彼はわたしのわなにかかる。わたしは彼をカルデヤびとの地のバビロンに引いて行く。しかし彼はそれを見ないで、そこで死ぬであろう。
Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.
14 またすべて彼の周囲にいて彼を助ける者および彼の軍隊を、わたしは四方に散らし、つるぎを抜いてそのあとを追う。
Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso: bakalaka mpe mampinga na ye; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu.
15 わたしが彼らを諸国民の中に散らし、国々にまき散らすとき、彼らはわたしが主であることを知る。
Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu.
16 ただし、わたしは彼らのうちに、わずかの者を残して、つるぎと、ききんと、疫病を免れさせ、彼らがおこなったもろもろの憎むべきことを、彼らが行く国びとの中に告白させよう。そして彼らはわたしが主であることを知るようになる」。
Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
17 主の言葉がまたわたしに臨んだ、
Yawe alobaki na ngai:
18 「人の子よ、震えてあなたのパンを食べ、おののきと恐れとをもって水を飲め。
« Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo;
19 そしてこの地の民について言え、主なる神はイスラエルの地のエルサレムの民についてこう言われる、彼らは恐れをもってそのパンを食べ、驚きをもってその水を飲むようになる。これはその地が、すべてその中に住む者の暴虐のために衰え、荒れ地となるからである。
mpe loba na bato ya mokili oyo: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele: Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.
20 人の住んでいた町々は荒れはて、地は荒塚となる。そしてあなたがたは、わたしが主であることを知るようになる」。
Bingumba oyo bato bavandaka ekobebisama mpe mokili ekotikala lisusu na bato te, mpe bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
21 主の言葉がわたしに臨んだ、
Yawe alobaki na ngai:
22 「人の子よ、イスラエルの地について、あなたがたが『日は延び、すべての幻はむなしくなった』という、このことわざはなんであるか。
« Mwana na moto, bolobaka lisese nini kati na mokili ya Isalaele: ‹ Mikolo ezali koleka mpe bimoniseli ezali kokokisama te? ›
23 それゆえ、彼らに言え、『主なる神はこう言われる、わたしはこのことわざをやめさせ、彼らが再びイスラエルで、これをことわざとしないようにする』と。しかし、あなたは彼らに言え、『日とすべての幻の実現とは近づいた』と。
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. › Loba na bango lisusu: ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama.
24 イスラエルの家のうちには、もはやむなしい幻も、偽りの占いもなくなる。
Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele.
25 しかし主なるわたしは、わが語るべきことを語り、それは必ず成就する。決して延びることはない。ああ、反逆の家よ、あなたの日にわたしはこれを語り、これを成就すると、主なる神は言われる」。
Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › »
26 主の言葉がまたわたしに臨んだ、
Yawe alobaki na ngai:
27 「人の子よ、見よ、イスラエルの家は言う、『彼の見る幻は、なお多くの日の後の事である。彼が預言することは遠い後の時のことである』と。
« Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba: ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. ›
28 それゆえ、彼らに言え、主なる神はこう言われる、わたしの言葉はもはや延びない。わたしの語る言葉は成就すると、主なる神は言われる」。
Yango wana, loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »

< エゼキエル書 12 >