< サムエル記Ⅱ 20 >

1 さて、その所にひとりのよこしまな人があって、名をシバといった。ビクリの子で、ベニヤミンびとであった。彼はラッパを吹いて言った、「われわれはダビデのうちに分がない。またエッサイの子のうちに嗣業を持たない。イスラエルよ、おのおのその天幕に帰りなさい」。
Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki: « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
2 そこでイスラエルの人々は皆ダビデに従う事をやめて、ビクリの子シバに従った。しかしユダの人々はその王につき従って、ヨルダンからエルサレムへ行った。
Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.
3 ダビデはエルサレムの自分の家にきた。そして王は家を守るために残しておいた十人のめかけたちを取って、一つの家に入れて守り、また養ったが、彼女たちの所には、はいらなかった。彼女たちは死ぬ日まで閉じこめられ一生、寡婦としてすごした。
Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
4 王はアマサに言った、「わたしのため三日のうちにユダの人々を呼び集めて、ここにきなさい」。
Mokonzi alobaki na Amasa: « Bengela ngai bato nyonso ya Yuda na mikolo misato, yo moko mpe zala awa. »
5 アマサはユダを呼び集めるために行ったが、彼は定められた時よりもおくれた。
Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye.
6 ダビデはアビシャイに言った、「ビクリの子シバは今われわれにアブサロムよりも多くの害をするであろう。あなたの主君の家来たちを率いて、彼のあとを追いなさい。さもないと彼は堅固な町々を獲て、われわれを悩ますであろう」。
Davidi ayebisaki Abishayi: « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »
7 こうしてヨアブとケレテびととペレテびと、およびすべての勇士はアビシャイに従って出た。すなわち彼らはエルサレムを出て、ビクリの子シバのあとを追った。
Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
8 彼らがギベオンにある大石のところにいた時、アマサがきて彼らに会った。時にヨアブは軍服を着て、帯をしめ、その上にさやに納めたつるぎを腰に結んで帯びていたが、彼が進み出た時つるぎは抜け落ちた。
Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda: na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki.
9 ヨアブはアマサに、「兄弟よ、あなたは安らかですか」と言って、ヨアブは右の手をもってアマサのひげを捕えて彼に口づけしようとしたが、
Joabi alobaki na Amasa: « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu? » Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze.
10 アマサはヨアブの手につるぎがあることに気づかなかったので、ヨアブはそれをもってアマサの腹部を刺して、そのはらわたを地に流し出し、重ねて撃つこともなく彼を殺した。こうしてヨアブとその兄弟アビシャイはビクリの子シバのあとを追った。
Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
11 時にヨアブの若者のひとりがアマサのかたわらに立って言った、「ヨアブに味方する者、ダビデにつく者はヨアブのあとに従いなさい」。
Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki: « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi! »
12 アマサは血に染んで大路の中にころがっていたので、そのそばに来る者はみな彼を見て立ちどまった。この人は民がみな立ちどまるのを見て、アマサを大路から畑に移し、衣服をその上にかけた。
Nzokande, wana Amasa azalaki kobaluka kati na makila na ye na kati-kati ya nzela, moto yango amonaki ete mampinga nyonso bayaki kotelema wana. Boye abendaki Amasa libanda ya nzela, atandaki ye kati na elanga mpe afinikaki ye elamba.
13 アマサが大路から移されたので、民は皆ヨアブに従って進み、ビクリの子シバのあとを追った。
Sima na ye kolongola Amasa na nzela, bato nyonso bakendeki elongo na Joabi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
14 シバはイスラエルのすべての部族のうちを通ってベテマアカのアベルにきた。ビクリびとは皆、集まってきて彼に従った。
Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi.
15 そこでヨアブと共にいたすべての人々がきて、彼をベテマアカのアベルに囲み、町に向かって土塁を築いた。それはとりでに向かって立てられた。こうして彼らは城壁をくずそうとしてこれを撃った。
Joabi elongo na mampinga na ye nyonso bazingelaki Sheba kati na Abele-Beti-Maaka mpe batongaki na libanda ya engumba mwa ngomba oyo ekomaki na molayi ya mir. Tango bazalaki kotimola mabele mpo na koluka kokweyisa mir,
16 その時、ひとりの賢い女が町から呼ばわった、「あなたがたは聞きなさい。あなたがたは聞きなさい。ヨアブに、『ここにきてください。わたしはあなたに言うことがあります』と言ってください」。
mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba: « Boyoka! Boyoka! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. »
17 彼がその女に近寄ると、女は「あなたがヨアブですか」と言った。彼は「そうです」と答えた。すると女は彼に「はしための言葉をお聞きください」と言ったので、「聞きましょう」と彼は言った。
Joabi apusanaki pene na ye, mpe mwasi yango atunaki ye: — Yo nde Joabi? Azongisaki: — Iyo, ezali ngai. Mwasi alobaki: — Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba. Joabi azongisaki: — Nazali koyoka.
18 そこで女は言った、「昔、人々はいつも、『アベルで尋ねなさい』と言って、事を定めました。
Mwasi yango akobaki koloba: — Na kala, bazalaki na ezaleli ya koloba: « Botuna mayele na mboka Abele, » mpe likambo esili.
19 わたしはイスラエルのうちの平和な、忠誠な者です。そうであるのに、あなたはイスラエルのうちで母ともいうべき町を滅ぼそうとしておられます。どうして主の嗣業を、のみ尽そうとされるのですか」。
Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe?
20 ヨアブは答えた、「いいえ、決してそうではなく、わたしが、のみ尽したり、滅ぼしたりすることはありません。
Joabi azongisaki: — Mosika na ngai! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma!
21 事実はそうではなく、エフライムの山地の人ビクリの子、名をシバという者が手をあげて王ダビデにそむいたのです。あなたがたが彼ひとりを渡すならば、わたしはこの町を去ります」。女はヨアブに言った、「彼の首は城壁の上からあなたの所へ投げられるでしょう」。
Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. Mwasi yango alobaki na Joabi: — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.
22 こうしてこの女が知恵をもって、すべての民の所に行ったので、彼らはビクリの子シバの首をはねてヨアブの所へ投げ出した。そこでヨアブはラッパを吹きならしたので、人々は散って町を去り、おのおの家に帰った。ヨアブはエルサレムにいる王のもとに帰った。
Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.
23 ヨアブはイスラエルの全軍の長であった。エホヤダの子ベナヤはケレテびと、およびペレテびとの長、
Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti.
24 アドラムは徴募人の長、アヒルデの子ヨシャパテは史官、
Adorami azalaki kokamba misala makasi; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
25 シワは書記官、ザドクとアビヤタルとは祭司。
Sheva azalaki mokomi mikanda; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe;
26 またヤイルびとイラはダビデの祭司であった。
mpe Ira, moto ya Yairi, azalaki Nganga-Nzambe ya Davidi.

< サムエル記Ⅱ 20 >