< 歴代誌Ⅱ 5 >

1 こうしてソロモンは主の宮のためにしたすべての工事を終った。そしてソロモンは父ダビデがささげた物、すなわち金銀およびもろもろの器物を携えて行って神の宮の宝蔵に納めた。
Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki: palata, wolo mpe bisalelo nyonso; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Nzambe.
2 ソロモンは主の契約の箱をダビデの町シオンからかつぎ上ろうとして、イスラエルの長老たちと、すべての部族のかしらたちと、イスラエルの人々の氏族の長たちをエルサレムに召し集めた。
Bongo Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota nyonso ya bato ya Isalaele, mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
3 イスラエルの人々は皆七月の祭に王のもとに集まった。
Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi na tango ya feti ya Bandako ya kapo, na sanza ya sambo.
4 イスラエルの長老たちが皆きたので、レビびとたちは箱を取り上げた。
Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Balevi batombolaki Sanduku.
5 彼らは箱と、会見の幕屋と、幕屋にあるすべて聖なる器をかつぎ上った。すなわち祭司とレビびとがこれらの物をかつぎ上った。
Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku yango, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
6 ソロモン王および彼のもとに集まったイスラエルの会衆は皆箱の前で羊と牛をささげたが、その数が多くて、調べることも数えることもできなかった。
Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.
7 こうして祭司たちは主の契約の箱をその場所にかつぎ入れ、宮の本殿である至聖所のうちのケルビムの翼の下に置いた。
Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.
8 ケルビムは翼を箱の所の上に伸べていたので、ケルビムは上から箱とそのさおをおおった。
Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.
9 さおは長かったので、さおの端が本殿の前の聖所から見えた。しかし外部には見えなかった。さおは今日までそこにある。
Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo.
10 箱の内には二枚の板のほか何もなかった。これはイスラエルの人々がエジプトから出て来たとき、主が彼らと契約を結ばれ、モーセがホレブでそれを納めたものである。
Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.
11 そして祭司たちが聖所から出たとき(ここにいた祭司たちは皆、その組の順にかかわらず身を清めた。
Tango Banganga-Nzambe bazalaki kobima libanda ya Esika ya bule, pamba te bango nyonso bamibulisaki mpe batalaki kokitana ya masanga na bango te,
12 またレビびとの歌うたう者、すなわちアサフ、ヘマン、エドトンおよび彼らの子たちと兄弟たちはみな亜麻布を着、シンバルと、立琴と、琴をとって祭壇の東に立ち、百二十人の祭司は彼らと一緒に立ってラッパを吹いた。
Balevi oyo nyonso bazalaki kobeta mindule: Azafi, Emani, Yedutuni elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango; bazalaki kotelema na ngambo ya este ya etumbelo, balata bilamba ya lino ya kitoko, mpe bazalaki kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze. Bazalaki elongo na Banganga-Nzambe nkama moko na tuku mibale oyo bazalaki kobeta bakelelo.
13 ラッパ吹く者と歌うたう者とは、ひとりのように声を合わせて主をほめ、感謝した)、そして彼らがラッパと、シンバルとその他の楽器をもって声をふりあげ、主をほめて「主は恵みあり、そのあわれみはとこしえに絶えることがない」と言ったとき、雲はその宮すなわち主の宮に満ちた。
Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule: Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.
14 祭司たちは雲のゆえに立って勤めをすることができなかった。主の栄光が神の宮に満ちたからである。
Mpe mpo na lipata, Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo ya Nzambe.

< 歴代誌Ⅱ 5 >