< 歴代誌Ⅱ 35 >

1 ヨシヤはエルサレムで主に過越の祭を行った。すなわち正月の十四日に過越の小羊をほふらせ、
Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika.
2 祭司にその職務をとり行わせ、彼らを励まして主の宮の務をさせ、
Atiaki Banganga-Nzambe mpo ete bakoba mosala na bango mpe alendisaki bango na mosala ya Tempelo ya Yawe.
3 また主の聖なる者となってすべてのイスラエルびとを教えるレビびとに言った、「あなたがたはイスラエルの王ダビデの子ソロモンの建てた宮に、聖なる箱を置きなさい。再びこれを肩にになうに及ばない。あなたがたの神、主およびその民イスラエルに仕えなさい。
Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba: — Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye.
4 あなたがたはイスラエルの王ダビデの書、およびその子ソロモンの書に基いて氏族にしたがい、その班によって、みずから備えをなし、
Bomibongisa kolanda mabota mpe masanga na bino ya mosala, kolanda mitindo oyo Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpe Salomo, mwana na ye ya mobali, bakomaki.
5 あなたがたの兄弟である民の人々の氏族の区分にしたがって聖所に立ち、このためにレビびとの氏族の分が欠けることのないようにしなさい。
Bowumela na bisika na bino ya mosala kati na Esika ya bule: lisanga moko ya Balevi mpo na libota moko na moko ya bandeko na bino, bato ya ekolo na bino.
6 あなたがたは過越の小羊をほふり、身を清め、あなたがたの兄弟のために備えをし、モーセが伝えた主の言葉にしたがって行いなさい」。
Bokata kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika, bomibulisa mpe bobongisa mpate yango ya Pasika mpo na bandeko na bino oyo bozali na bango ekolo moko, kolanda mitindo ya Yawe na nzela ya Moyize.
7 ヨシヤは、小羊および子やぎを民の人々に贈った。これは皆その所にいるすべての人のための過越の供え物であって、その数三万、また雄牛三千を贈った。それらは王の所有から出したのである。
Joziasi azwaki kati na bibwele na ye moko mokonzi bana meme mpe bana ntaba nkoto tuku misato mpe bangombe nkoto misato, mpo na bato ya Isalaele, nkoto tuku misato oyo bazalaki wana mpo ete bakoka kobonza yango lokola mbeka ya Pasika.
8 そのつかさたちも民と祭司とレビびとに真心から贈った。また神の宮のつかさたちヒルキヤ、ゼカリヤ、エヒエルも小羊と子やぎ二千六百頭、牛三百頭を祭司に与えて過越の供え物とした。
Bakalaka na ye mpe bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya bato, epai ya Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi. Ilikia, Zakari mpe Yeyeli, oyo bazalaki bakambi ya misala kati na Tempelo ya Nzambe, bapesaki epai ya Banganga-Nzambe lokola mbeka ya Pasika bana meme nkoto mibale na nkama motoba mpe bangombe nkama misato.
9 またレビびとの長である人々すなわちコナニヤおよびその兄弟シマヤ、ネタンエルならびにハシャビヤ、エイエル、ヨザバデなども小羊と子やぎ五千頭、牛五百頭をレビびとに贈って過越の供え物とした。
Konania elongo na bandeko na ye ya mibali: Shemaya, Netaneeli, Ashabia, Yeyeli mpe Yozabadi oyo bakambi ya Balevi, bapesaki bameme nkoto mitano mpe bangombe nkama mitano epai ya Balevi lokola mbeka ya Pasika.
10 このように勤めのことが備わったので、王の命に従って祭司たちはその持ち場に立ち、レビびとはその班に従って仕え、
Tala ndenge babongisaki losambo: Banganga-Nzambe batelemaki na esika na bango ya mosala, mpe Balevi bazalaki kati na masanga na bango, kolanda mitindo ya mokonzi.
11 やがて過越の小羊がほふられたので、祭司はその血を受け取って注いだ。レビびとはその皮をはいだ。
Bato babonzaki bana meme mpe bana ntaba lokola mbeka ya Pasika, mpe Balevi bazalaki kopesa makila na yango epai ya Banganga-Nzambe mpo ete basopa yango na likolo ya etumbelo, wana Balevi bazalaki kopapa mbeka
12 それから燔祭の物をとり分け、それを民の人々の氏族の区分に従って渡し、主にささげさせた。これはモーセの書にしるされたとおりである。また牛をもこのようにした。
mpe kotia pembeni biteni ya kobonza lokola mbeka ya kotumba, mpo na kopesa yango epai ya bato kolanda masanga na bango mpo ete babonza yango epai na Yawe, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moyize. Basalaki mpe ndenge wana mpo na bangombe.
13 そして定めに従って過越の小羊を火であぶり、その他の聖なる供え物を深なべ、かま、浅なべなどに煮て、急いですべての民の人々にくばった。
Kolanda ndenge mobeko ezalaki kotinda, batumbaki na moto meme oyo ebonzamaki lokola mbeka ya Pasika mpe balambaki makabo mosusu ya bule na nzungu, na kikalungu mpe na basani; mpe bapesaki yango na lombangu epai ya bato nyonso.
14 その後、彼らは自分のためと、祭司たちのために備えをした。アロンの子孫である祭司たちは、燔祭と脂肪をささげるのに忙しくて、夜になったからである。それでレビびとは自分たちのためと、アロンの子孫である祭司たちのために備えたのである。
Sima na yango, Balevi babongisaki mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe; pamba te Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bazalaki kosala kino na butu mosala ya kobonza bambeka ya kotumba mpe mafuta ya banyama. Yango wana Balevi bazalaki kobongisa mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron.
15 アサフの子孫である歌うたう者たちは、ダビデ、アサフ、ヘマンおよび王の先見者エドトンの命に従ってその持ち場におり、門衛たちはおのおの門にいて、その職務を離れるに及ばなかった。兄弟であるレビびとが彼らのために備えたからである。
Babeti mindule, bana mibali ya Azafi, bazalaki na esika na bango ya mosala kolanda mitindo ya Davidi, ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni, mosakoli ya mokonzi. Bakengeli bikuke mpe bazalaki na bisika na bango ya mosala; batikalaki kozala mosika na yango te, pamba te bandeko na bango, Balevi, bazalaki mpe kobongisela bango biloko.
16 このようにその日、主の勤めの事がことごとく備わったので、ヨシヤ王の命に従って過越の祭を行い、主の祭壇に燔祭をささげた。
Ezalaki ndenge wana nde misala nyonso ebongisamaki mokolo wana mpo na kosepela feti ya Pasika mpe kobonza mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo ya Yawe, kolanda mitindo ya mokonzi Joziasi.
17 ここに来ていたイスラエルの人々は、そのとき過越の祭を行い、また七日の間、種入れぬパンの祭を行った。
Bana ya Isalaele oyo bazalaki wana basepelaki na tango wana feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire, mikolo sambo.
18 預言者サムエルの日からこのかた、イスラエルでこのような過越の祭を行ったことはなかった。またイスラエルの諸王のうちには、ヨシヤが、祭司、レビびと、ならびにそこに来たユダとイスラエルのすべての人々、およびエルサレムの住民と共に行ったような過越の祭を行った者はひとりもなかった。
Wuta na tango ya mosakoli Samuele, feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te kati na Isalaele. Mpe kati na bakonzi ya Isalaele, moko te asepelaki feti ya Pasika lokola Pasika oyo Joziasi asepelaki elongo na Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Yuda mpe ya Isalaele oyo bazalaki kuna elongo na bavandi ya Yelusalemi.
19 この過越の祭はヨシヤの治世の第十八年に行われた。
Ezalaki na mobu ya zomi na mwambe ya bokonzi ya Joziasi nde basepelaki Pasika yango.
20 このようにヨシヤが宮を整えた後、エジプトの王ネコはユフラテ川のほとりにあるカルケミシで戦うために上ってきたので、ヨシヤはこれを防ごうと出て行った。
Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela.
21 しかしネコは彼に使者をつかわして言った、「ユダの王よ、われわれはお互に何のあずかるところがありますか。わたしはきょう、あなたを攻めようとして来たのではありません。わたしの敵の家を攻めようとして来たのです。神がわたしに命じて急がせています。わたしと共におられる神に逆らうことをやめなさい。そうしないと、神はあなたを滅ぼされるでしょう」。
Neko atindelaki ye bamemi sango mpo na koloba na ye: — Mokonzi ya Yuda, likambo nini kati ya yo mpe ngai? Na mokolo ya lelo, nayei na ngai te mpo na kobundisa yo; nayei nde kobundisa mokonzi mosusu. Nzambe alobi na ngai ete nasala likambo yango na lombangu. Keba ete otombokela Nzambe oyo azali elongo na ngai, soki te akobebisa yo.
22 しかしヨシヤは引き返すことを好まず、かえって彼と戦うために、姿を変え、神の口から出たネコの言葉を聞きいれず、行ってメギドの谷で戦ったが、
Kasi Joziasi aboyaki kotika ye, mpe lokola ayokaki te makambo oyo Neko ayebisaki ye kowuta na monoko ya Nzambe, Joziasi amibongolaki mpo na kobundisa Neko na lubwaku ya Megido.
23 射手の者どもがヨシヤを射あてたので、王はその家来たちに、「わたしを助け出せ。わたしはひどく傷ついた」と言った。
Kati na bitumba, basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki mokonzi Joziasi, mpe ye alobaki na basoda na ye: — Bolongola ngai awa, pamba te nazoki makasi.
24 そこで家来たちは彼を車から助け出し、王のもっていた第二の車に乗せてエルサレムにつれて行ったが、ついに死んだので、その先祖の墓にこれを葬った。そしてユダとエルサレムは皆ヨシヤのために悲しんだ。
Basoda na ye balongolaki ye na shar oyo azalaki kobunda na yango, batiaki ye na shar na ye mosusu mpe bamemaki ye na Yelusalemi epai wapi akufaki. Bakundaki ye kati na bakunda ya batata na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi basalelaki Joziasi matanga.
25 時にエレミヤはヨシヤのために哀歌を作った。歌うたう男、歌うたう女は今日に至るまで、その哀歌のうちにヨシヤのことを述べ、イスラエルのうちにこれを例とした。これは哀歌のうちにしるされている。
Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.
26 ヨシヤのその他の行為、主の律法にしるされた所に従って行った徳行、
Makambo mpe misala mosusu ya Joziasi, elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Yawe, kolanda oyo ekomama kati na Mobeko ya Yawe,
27 およびその始終の行いなどは、イスラエルとユダの列王の書にしるされている。
misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.

< 歴代誌Ⅱ 35 >