< 歴代誌Ⅱ 19 >

1 ユダの王ヨシャパテは、つつがなくエルサレムの自分の家に帰った。
Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, azongaki mobimba na ndako na ye na Yelusalemi,
2 そのとき、先見者ハナニの子エヒウが出てヨシャパテを迎えて言った、「あなたは悪人を助け、主を憎む者を愛してよいのですか。それゆえ怒りが主の前から出て、あなたの上に臨みます。
mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati: « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.
3 しかしあなたには、なお良い事もあります。あなたはアシラ像を国の中から除き、心を傾けて神を求められました」。
Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. »
4 ヨシャパテはエルサレムに住んでいたが、また出て、ベエルシバからエフライムの山地まで民の中を巡り、先祖たちの神、主に彼らを導き返した。
Jozafati avandaki na Yelusalemi mpe atambolaki lisusu kati na bato longwa na Beri-Sheba kino na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe azongisaki bana ya Isalaele epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
5 彼はまたユダの国中、すべての堅固な町ごとに裁判人を置いた。
Atiaki basambisi kati na mokili, kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi.
6 そして裁判人たちに言った、「あなたがたは自分のする事に気をつけなさい。あなたがたは人のために裁判するのではなく、主のためにするのです。あなたがたが裁判する時には、主はあなたがたと共におられます。
Alobaki na bango: « Bozala na bokebi na mosala oyo bokosala, pamba te bokosambisa te mpo na bato, kasi mpo na Yawe oyo azali elongo na bino na bisika nyonso oyo bokokata makambo.
7 だからあなたがたは主を恐れ、慎んで行いなさい。われわれの神、主には不義がなく、人をかたより見ることなく、まいないを取ることもないからです」。
Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te: kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »
8 ヨシャパテはまたレビびと、祭司、およびイスラエルの氏族の長たちを選んでエルサレムに置き、主のために裁判を行い、争議の解決に当らせた。彼らはエルサレムに居住した。
Kati na Yelusalemi, Jozafati aponaki Balevi, Banganga-Nzambe mpe bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosambisa kolanda Mibeko ya Yawe mpe kokata makambo ya bavandi ya Yelusalemi.
9 ヨシャパテは彼らに命じて言った、「あなたがたは主を恐れ、真実と真心とをもって行わなければならない。
Apesaki bango mitindo oyo: « Bosengeli kosala na boyengebene, na motema mobimba mpe na botosi epai na Yawe.
10 すべてその町々に住んでいるあなたがたの兄弟たちから、血を流した事または律法と戒め、定めとおきてなどの事について訴えてきたならば、彼らをさとして、主の前に罪を犯させず、怒りがあなたがたと、あなたがたの兄弟たちに臨まないようにしなさい。そのようにすれば、あなたがたは罪を犯すことがないでしょう。
Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te.
11 見よ、祭司長アマリヤは、あなたがたの上にいて、主の事をすべてつかさどり、イシマエルの子、ユダの家のつかさゼバデヤは王の事をすべてつかさどり、またレビびとはあなたがたの前にあって役人となります。雄々しく行動しなさい。主は正直な人と共におられます」。
Amaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali Yawe; mpe Zebadia, mwana mobali ya Isimaeli, mokonzi ya libota ya Yuda, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali mokonzi. Balevi bakozala lokola bakalaka liboso na bino. Bozala na mpiko mpe bosala mosala! Mpe tika ete Yawe azala elongo na bato oyo bakosala malamu! »

< 歴代誌Ⅱ 19 >