< 歴代誌Ⅱ 16 >

1 アサの治世の三十六年にイスラエルの王バアシャはユダに攻め上り、ユダの王アサの所にだれをも出入りさせないためにラマを築いた。
Na mobu ya tuku misato na motoba ya bokonzi ya Asa, Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda; alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda.
2 そこでアサは主の宮と王の家の宝蔵から金銀を取り出し、ダマスコに住んでいるスリヤの王ベネハダデに贈って言った、
Asa azwaki na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako na ye moko palata mpe wolo, mpe atindaki yango epai ya Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo:
3 「わたしの父とあなたの父の間のように、わたしとあなたの間に同盟を結びましょう。わたしはあなたに金銀を贈ります。行って、あなたとイスラエルの王バアシャとの同盟を破り、彼をわたしから撤退させてください」。
« Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo palata mpe wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. »
4 ベネハダデはアサ王の言うことを聞き、自分の軍勢の長たちをつかわしてイスラエルの町々を攻め、イヨンとダンとアベル・マイムおよびナフタリのすべての倉の町を撃った。
Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Babotolaki Iyoni, Dani, Abele-Mayimi mpe bibombelo nyonso ya bingumba ya Nefitali.
5 バアシャはこれを聞いて、ラマを築くことをやめ、その工事を廃した。
Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akataki misala na yango.
6 そこでアサ王はユダの全国の人々を引き連れ、バアシャがラマを建てるために用いた石と木材を運んでこさせ、それをもってゲバとミヅパを建てた。
Bongo mokonzi Asa asangisaki bato nyonso ya Yuda, mpe bamemaki wuta na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela. Atongaki na yango Geba mpe engumba Mitsipa.
7 そのころ先見者ハナニがユダの王アサのもとに来て言った、「あなたがスリヤの王に寄り頼んで、あなたの神、主に寄り頼まなかったので、スリヤ王の軍勢はあなたの手からのがれてしまった。
Na tango wana, Anani, momoni makambo, akendeki epai ya Asa, mokonzi ya Yuda, mpe alobaki na ye: — Lokola otie elikya na yo na mokonzi ya Siri na esika ya kotia elikya na yo na Yawe, Nzambe na yo, ozali lisusu na bokonzi te likolo ya mampinga ya mokonzi ya Siri.
8 かのエチオピヤびとと、リビアびとは大軍で、その戦車と騎兵は、はなはだ多かったではないか。しかしあなたが主に寄り頼んだので、主は彼らをあなたの手に渡された。
Boni, bato ya Etiopi mpe ya Libi bazalaki te mampinga minene ya basoda elongo na bashar mpe basoda ebele oyo babundaka likolo ya bampunda? Kasi lokola ozalaki kotia elikya na yo kati na Ye, Yawe akabaki bango solo na maboko na yo.
9 主の目はあまねく全地を行きめぐり、自分に向かって心を全うする者のために力をあらわされる。今度の事では、あなたは愚かな事をした。ゆえにこの後、あなたに戦争が臨むであろう」。
Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.
10 するとアサはその先見者を怒って、獄屋に入れた。この事のために激しく彼を怒ったからである。アサはまたそのころ民のある者をしえたげた。
Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.
11 見よ、アサの始終の行為は、ユダとイスラエルの列王の書にしるされている。
Makambo mpe misala mosusu ya Asa, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
12 アサはその治世の三十九年に足を病み、その病は激しくなったが、その病の時にも、主を求めないで医者を求めた。
Na mobu ya tuku misato na libwa ya bokonzi na ye, Asa abelaki makasi makolo; mpe, ezala na tango oyo azali kobela makasi, alukaki Yawe te, kasi akendeki epai ya minganga.
13 アサは先祖たちと共に眠り、その治世の四十一年に死んだ。
Na mobu ya tuku minei na moko ya bokonzi na ye, Asa akendeki kokutana na bakoko na ye.
14 人々は彼が自分のためにダビデの町に掘っておいた墓に葬り、製香の術をもって造った様々の香料を満たした床に横たえ、彼のためにおびただしく香をたいた。
Bakundaki ye kati na kunda oyo asalisaki kati na engumba ya Davidi. Balalisaki ye na mbeto moko etonda na malasi, na biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe na kisi oyo basalelaka mpo na kokawusa nzoto ya mowei; mpe batumbaki biloko yango ebele mpo na lokumu na ye.

< 歴代誌Ⅱ 16 >