< 列王記Ⅰ 20 >

1 スリヤの王ベネハダデはその軍勢をことごとく集めた。三十二人の王が彼と共におり、また馬と戦車もあった。彼は上ってサマリヤを囲み、これを攻めた。
Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso elongo na bakonzi tuku misato na mibale na bampunda mpe bashar; akendeki kozingela Samari mpe abundisaki yango.
2 また彼は町に使者をつかわし、イスラエルの王アハブに言った、「ベネハダデはこう申します、
Atindaki bantoma kati na engumba epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele
3 『あなたの金銀はわたしのもの、またあなたの妻たちと子供たちの最も美しい者もわたしのものです』」。
na maloba oyo: — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi: « Palata mpe wolo na yo ezali ya ngai; basi na yo mpe bana mibali na yo, oyo baleki kitoko bazali ya ngai. »
4 イスラエルの王は答えた、「王、わが主よ、仰せのとおり、わたしと、わたしの持ち物は皆あなたのものです」。
Mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Ezali ndenge kaka olobi, mokonzi, nkolo na ngai; ngai mpe nyonso oyo nazali na yango ezali ya yo.
5 使者は再びきて言った、「ベネハダデはこう申します、『わたしはさきに人をつかわして、あなたの金銀、妻子を引きわたせと言いました。
Bantoma bazongaki lisusu mpe balobaki: — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi: « Napesaki yo mitindo ete opesa ngai palata na yo, wolo na yo, basi na yo mpe bana na yo ya mibali.
6 しかし、あすの今ごろ、しもべたちをあなたにつかわします。彼らはあなたの家と、あなたの家来の家を探って、すべて彼らの気にいる物を手に入れて奪い去るでしょう』」。
Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. »
7 そこでイスラエルの王は国の長老をことごとく召して言った、「よく注意して、この人が無理な事を求めているのを知りなさい。彼は人をつかわして、わたしの妻子と金銀を求めたが、わたしはそれを拒まなかった」。
Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango: — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.
8 すべての長老および民は皆彼に言った、「聞いてはなりません。承諾してはなりません」。
Bampaka mpe bato nyonso balobaki na ye: — Koyokela ye te mpe kondima bisengeli na ye te.
9 それで彼はベネハダデの使者に言った、「王、わが主に告げなさい。『あなたが初めに要求されたことは皆いたしましょう。しかし今度の事はできません』」。使者は去って復命した。
Boye Akabi azongisaki epai ya bantoma ya Beni-Adadi: — Boloba na mokonzi, nkolo na ngai: « Mosali na yo akosala nyonso oyo osengaki liboso; kasi na oyo ya mibale, nakosala yango te. » Bazongaki mpe bamemaki eyano epai ya Beni-Adadi.
10 ベネハダデは彼に人をつかわして言った、「もしサマリヤのちりが、わたしに従うすべての民の手を満たすに足りるならば、神々がどんなにでも、わたしを罰してくださるように」。
Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi: — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.
11 イスラエルの王は答えた、「『武具を帯びる者は、それを脱ぐ者のように誇ってはならない』と告げなさい」。
Mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Boloba na ye: « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli! »
12 ベネハダデは仮小屋で、王たちと酒を飲んでいたが、この事を聞いて、その家来たちに言った、「戦いの備えをせよ」。彼らは町にむかって戦いの備えをした。
Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye: — Bomibongisa mpo na etumba. Boye, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba.
13 この時ひとりの預言者がイスラエルの王アハブのもとにきて言った、「主はこう仰せられる、『あなたはこの大軍を見たか。わたしはきょう、これをあなたの手にわたす。あなたは、わたしが主であることを、知るようになるであろう』」。
Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ozali komona mampinga monene oyo? Nakopesa yango lelo na maboko na yo, bongo okoyeba ete nazali Yawe. »
14 アハブは言った、「だれにさせましょうか」。彼は言った、「主はこう仰せられる、『地方の代官の家来たちにさせよ』」。アハブは言った、「だれが戦いを始めましょうか」。彼は答えた、「あなたです」。
Akabi atunaki: — Kasi nani akosala yango? Mosakoli azongisaki: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike nde bakosala yango. » Akabi atunaki: — Nani akobanda etumba? Mosakoli azongisaki: — Ezali yo nde moto okobanda.
15 そこでアハブは地方の代官の家来たちを調べたところ二百三十二人あった。次にすべての民、すなわちイスラエルのすべての人を調べたところ七千人あった。
Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki: bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo.
16 彼らは昼ごろ出ていったが、ベネハダデは仮小屋で、味方の三十二人の王たちと共に酒を飲んで酔っていた。
Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo.
17 地方の代官の家来たちが先に出ていった。ベネハダデは斥候をつかわしたが、彼らは「サマリヤから人々が出てきた」と報告したので、
Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye: — Bato bazali kopusana wuta na engumba Samari.
18 彼は言った、「和解のために出てきたのであっても、生どりにせよ。また戦いのために出てきたのであっても、生どりにせよ」。
Beni-Adadi alobaki: — Soki bayei mpo na kimia, bakanga bango ya bomoi; kasi soki mpe bayei mpo na bitumba, kokanga bango ya bomoi.
19 地方の代官の家来たちと、それに従う軍勢が町から出ていって、
Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki na engumba elongo na mampinga sima na bango.
20 おのおのその相手を撃ち殺したので、スリヤびとは逃げた。イスラエルはこれを追ったが、スリヤの王ベネハダデは馬に乗り、騎兵を従えてのがれた。
Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.
21 イスラエルの王は出ていって、馬と戦車をぶんどり、また大いにスリヤびとを撃ち殺した。
Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene.
22 時に、かの預言者がイスラエルの王のもとにきて言った、「行って、力を養い、なすべき事をよく考えなさい。来年の春にはスリヤの王が、あなたのところに攻め上ってくるからです」。
Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki: — Lendisa basoda na yo mpe tala nini okoki kosala, pamba te na mobu oyo ekoya, mokonzi ya Siri akoya kobundisa yo lisusu.
23 スリヤの王の家来たちは王に言った、「彼らの神々は山の神ですから彼らがわれわれよりも強かったのです。もしわれわれが平地で戦うならば、必ず彼らよりも強いでしょう。
Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli: « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi.
24 それでこうしなさい。王たちをおのおのその地位から退かせ、総督を置いてそれに代らせなさい。
Sala boye: longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso.
25 またあなたが失った軍勢に等しい軍勢を集め、馬は馬、戦車は戦車をもって補いなさい。こうしてわれわれが平地で戦うならば必ず彼らよりも強いでしょう」。彼はその言葉を聞きいれて、そのようにした。
Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa: mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo.
26 春になって、ベネハダデはスリヤびとを集めて、イスラエルと戦うために、アペクに上ってきた。
Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele.
27 イスラエルの人々は召集され、糧食を受けて彼らを迎え撃つために出かけた。イスラエルの人々はやぎの二つの小さい群れのように彼らの前に陣取ったが、スリヤびとはその地に満ちていた。
Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba.
28 その時神の人がきて、イスラエルの王に言った、「主はこう仰せられる、『スリヤびとが、主は山の神であって、谷の神ではないと言っているから、わたしはこのすべての大軍をあなたの手にわたす。あなたは、わたしが主であることを知るようになるであろう』」。
Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
29 彼らは七日の間、互にむかいあって陣取り、七日目になって戦いを交えたが、イスラエルの人々は一日にスリヤびとの歩兵十万人を殺した。
Mikolo sambo, milako ya mampinga nyonso mibale ezalaki etalana. Na mokolo ya sambo, etumba ebandaki mpe bato ya Isalaele babomaki basoda ya mpiko ya Siri nkoto nkama moko.
30 そのほかの者はアペクの町に逃げこんだが、城壁がくずれて、その残った二万七千人の上に倒れた。ベネハダデは逃げて町に入り、奥の間にはいった。
Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.
31 家来たちは彼に言った、「イスラエルの家の王たちはあわれみ深い王であると聞いています。それでわれわれの腰に荒布をつけ、くびになわをかけて、イスラエルの王の所へ行かせてください。たぶん彼はあなたの命を助けるでしょう」。
Bakalaka na ye balobaki na ye: — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo.
32 そこで彼らは荒布を腰にまき、なわをくびにかけてイスラエルの王の所へ行って言った、「あなたのしもべベネハダデが『どうぞ、わたしの命を助けてください』と申しています」。アハブは言った、「彼はまだ生きているのですか。彼はわたしの兄弟です」。
Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye: — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. Akabi atunaki: — Boni, azali nanu na bomoi? Azali kaka ndeko na ngai.
33 その人々はこれを吉兆としてすみやかに彼の言葉をうけ、「そうです。ベネハダデはあなたの兄弟です」と言ったので、彼は言った、「行って彼をつれてきなさい」。それでベネハダデは彼の所に出てきたので、彼はこれを自分の車に乗せた。
Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo: — Beni-Adadi azali solo ndeko na yo. Akabi azongisaki: — Bokende kozwa ye. Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye.
34 ベネハダデは彼に言った、「わたしの父が、あなたの父上から取った町々は返します。またわたしの父がサマリヤに造ったように、あなたはダマスコに、あなたのために市場を設けなさい」。アハブは言った、「わたしはこの契約をもってあなたを帰らせましょう」。こうしてアハブは彼と契約を結び、彼を帰らせた。
Beni-Adadi alobaki: — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. Akabi azongisaki: — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye.
35 さて預言者のともがらのひとりが主の言葉に従ってその仲間に言った、「どうぞ、わたしを撃ってください」。しかしその人は撃つことを拒んだので、
Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe: — Nasengi na yo ete obeta ngai. Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye.
36 彼はその人に言った、「あなたは主の言葉に聞き従わないゆえ、わたしを離れて行くとすぐ、ししがあなたを殺すでしょう」。その人が彼のそばを離れて行くとすぐ、ししが彼に会って彼を殺した。
Bongo alobaki na ye: — Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo. Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye.
37 彼はまたほかの人に会って言った、「どうぞ、わたしを撃ってください」。するとその人は彼を撃ち、撃って傷つけた。
Mwana wana ya basakoli akendeki kokutana na moto mosusu mpe asengaki na ye ete abeta ye. Moto wana abetaki ye makasi mpe azokisaki ye.
38 こうしてその預言者は行って、道のかたわらで王を待ち、目にほうたいを当てて姿を変えていた。
Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela.
39 王が通り過ぎる時、王に呼ばわって言った、「しもべはいくさの中に出て行きましたが、ある軍人が、ひとりの人をわたしの所につれてきて言いました、『この人を守っていなさい。もし彼がいなくなれば、あなたの命を彼の命に代えるか、または銀一タラントを払わなければならない』。
Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki: — Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai: « Batela moto oyo ete akima te! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. »
40 ところが、しもべはあちらこちらと忙しくしていたので、ついに彼はいなくなりました」。イスラエルの王は彼に言った、「あなたはそのとおりにさばかれなければならない。あなたが自分でそれを定めたのです」。
Wana mosali na yo azalaki kosala awa, kuna, mokangami yango akimaki. Bongo Akabi, mokonzi ya Isalaele, alobaki: — Etumbu na yo ekozala ndenge kaka olobi.
41 そこで彼が急いで目のほうたいを取り除いたので、イスラエルの王はそれが預言者のひとりであることを知った。
Mbala moko, mosakoli alongolaki eteni ya elamba oyo ezipaki elongi na ye; mpe Akabi, mokonzi ya Isalaele, asosolaki ete moto yango azali moko kati na bana ya basakoli.
42 彼は王に言った、「主はこう仰せられる、『わたしが滅ぼそうと定めた人を、あなたは自分の手から放して行かせたので、あなたの命は彼の命に代り、あなたの民は彼の民に代るであろう』と」。
Mosakoli alobaki na mokonzi: — Tala maloba oyo Yawe alobi: « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. »
43 イスラエルの王は悲しみ、かつ怒って自分の家におもむき、サマリヤに帰った。
Mokonzi ya Isalaele azongaki epai na ye, na Samari, na mawa mpe na kanda.

< 列王記Ⅰ 20 >