< 創世記 10 >

1 ノアの子セム、ハム、ヤペテの傳は是なり洪水の後彼等に子等生れたり
Tala libota ya Noa: Semi, Cham mpe Jafeti; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
2 ヤペテの子はゴメル、マゴグ、マデア、ヤワン、トバル、メセク、テラスなり
Bana mibali ya Jafeti: Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
3 ゴメルの子はアシケナズ、リパテ、トガルマなり
Bana mibali ya Gomeri: Ashikenazi, Rifati mpe Togarima.
4 ヤワンの子はエリシヤ、タルシシ、キツテムおよびドダニムなり
Bana mibali ya Yavani: Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
5 是等より諸國の洲島の民は派分れ出て各其方言と其宗族と其邦國とに循ひて其地に住り
Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
6 ハムの子はクシ、ミツライム、フテおよびカナンなり
Bana mibali ya Cham: Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
7 クシの子はセバ、ハビラ、サブタ、ラアマ、サブテカなりラアマの子はシバおよびデダンなり
Bana mibali ya Kushi: Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema: Sheba mpe Dedani.
8 クシ、ニムロデを生り彼始めて世の權力ある者となれり
Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
9 彼はヱホバの前にありて權力ある獵夫なりき是故にヱホバの前にある夫權力ある獵夫ニムロデの如しといふ諺あり
Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka: « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »
10 彼の國の起初はシナルの地のバベル、エレク、アツカデ、及びカルネなりき
Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.
11 其地より彼アッスリヤに出でニネベ、レホポテイリ、カラ
Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
12 およびニネベとカラの間なるレセンを建たり是は大なる城邑なり
mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.
13 ミツライム、ルデ族アナミ族レハビ族ナフト族
Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
14 バテロス族カスル族およびカフトリ族を生りカスル族よりペリシテ族出たり
ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
15 カナン其冢子シドンおよびヘテ
Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,
16 エブス族アモリ族ギルガシ族
ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
17 ヒビ族アルキ族セニ族
ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
18 アルワデ族ゼマリ族ハマテ族を生り後に至りてカナン人の宗族蔓延りぬ
ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai.
19 カナン人の境はシドンよりゲラルを經てガザに至りソドム、ゴモラ、アデマ、ゼボイムに沿てレシヤにまで及べり
Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
20 是等はハムの子孫にして其宗族と其方言と其土地と其邦國に隨ひて居りぬ
Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
21 セムはヱベルの全の子孫の先祖にしてヤペテの兄なり彼にも子女生れたり
Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
22 セムの子はエラム、アシユル、アルパクサデルデ、アラムなり
Bana mibali ya Semi: Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
23 アラムの子はウヅ、ホル、ゲテル、マシなり
Bana mibali ya Arami: Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.
24 アルパクサデ、シラを生みシラ、エベルを生り
Aripakishadi abotaki Shela; Shela abotaki Eberi.
25 エベルに二人の子生れたり一人の名をペレグ(分れ)といふ其は彼の代に邦國分れたればなり其弟の名をヨクタンと曰ふ
Eberi abotaki bana mibali mibale: moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele; mpe mosusu, « Yokitani. »
26 ヨクタン、アルモダデ、シヤレフ、ハザルマウテ、ヱラ
Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,
27 ハドラム、ウザル、デクラ
Adorami, Uzali, Dikila,
28 オバル、アビマエル、シバ
Obali, Abimaeli, Saba,
29 オフル、ハビラおよびヨバブを生り是等は皆ヨクタンの子なり
Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
30 彼等の居住所はメシヤよりして東方の山セバルにまで至れり
(Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
31 是等はセムの子孫にして其宗族と其方言と其土地と其邦國とに隨ひて居りぬ
Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
32 是等はノアの子の宗族にして其血統と其邦國に隨ひて居りぬ洪水の後是等より地の邦國の民は派分れ出たり
Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.

< 創世記 10 >