< エゼキエル書 1 >

1 第三十年四月の五日に我ケバル河の邊にてかの擄うつされたる者の中にをりしに天ひらけて我神の異象を見たり
Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.
2 是ヱコニヤ王の擄ゆかれしより第五年のその月の五日なりき
Kaka na mokolo ya mitano ya sanza ya mobu wana, elingi koloba mobu ya mitano ya bowumbu ya mokonzi Yeoyakini,
3 時にカルデヤ人の地に於てケバル河の邊にてヱホバの言祭司ブシの子エゼキエルに臨めりヱホバの手かしこにて彼の上にあり
Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye.
4 我見しに視よ烈き風大なる雲および燃る火の團塊北より出きたる又雲の周圍に輝光ありその中よりして火の中より熱たる金族のごときもの出づ
Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.
5 其火の中に四箇の生物にて成る一箇の形あり其狀は是のごとし即ち人の象あり
Na kati-kati na yango, namonaki biloko moko lokola bikelamu minei ya bomoi oyo ezalaki na lolenge ya moto.
6 各四の面あり各四の翼あり
Moko na moko kati na yango ezalaki na bilongi minei mpe mapapu minei.
7 その足は直なる足その足の跖は犢牛の足の跖のごとくにして磨ける銅のごとくに光れり
Makolo na yango ezalaki esembolama, matambe na yango ezalaki lokola matambe ya mwana ngombe ya mobali mpe ezalaki kongenga lokola bronze oyo bapetola na moto.
8 その生物の四方に翼の下に人の手ありこの四箇の物皆面と翼あり
Na se ya mapapu na yango, na bangambo na yango minei, ezalaki na maboko minei lokola maboko ya bato; mpe bikelamu nyonso minei ya bomoi ezalaki na bilongi mpe na mapapu na yango.
9 その翼はたがひに相つらなれりその往ときに回轉ずして各その面の向ふところに行く
Mapapu na yango ezalaki kotutana moko na mosusu. Ekelamu moko na moko ezalaki kokende etala kaka na liboso mpe ezalaki kotala na sima te.
10 その面の形は人の面のごとし四箇の者右には獅子の面あり四箇の者左には牛の面あり又四箇の者鷲の面あり
Tala ndenge bilongi na yango ezalaki: ekelamu moko na moko kati na nyonso minei ezalaki na elongi lokola ya moto (na liboso): elongi lokola ya nkosi na ngambo ya loboko ya mobali, elongi lokola ya ngombe ya mobali na ngambo ya loboko ya mwasi mpe elongi lokola ya mpongo (na sima).
11 その面とその翼は上にて分るその各箇の翼二箇は彼と此と相つらなり二箇はその身を覆ふ
Bilongi na yango ezalaki nde bongo. Mapapu na yango ezalaki efungwama na likolo; ekelamu moko na moko ezalaki na mapapu mibale: lipapu moko ezalaki kotutana na lipapu moko ya ekelamu mosusu; mpe mapapu mibale ezalaki kobomba nzoto na yango.
12 各箇その面の向ふところへ行き靈のゆかんとする方に行く又行にまはることなし
Moko na moko ezalaki kokende kaka liboso; ezalaki kokende bisika nyonso oyo Molimo azalaki kokamba yango mpe ezalaki kokende epai mosusu te.
13 その生物の形は爇る炭の火のごとく松明のごとし火生物の中に此彼に行き火輝きてその火の中より電光いづ
Bikelamu yango ya bomoi ezalaki lokola makala ya moto to lokola koni oyo ezali kopela moto. Moto ezalaki kotambola-tambola kati na bikelamu yango, ezalaki kongenga mpe mikalikali ezalaki kobima kati na yango.
14 その生物奔りて電光の如くに往來す
Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali.
15 我生物を觀しに生物の近邊にあたりてその四箇の面の前に地の上に輪あり
Tango nazalaki kotala bikelamu yango, namonaki pine moko na mabele, pembeni ya ekelamu ya bomoi moko na moko, liboso ya bilongi na yango minei.
16 其輪の形と作は黄金色の玉のごとしその四箇の形は皆同じその形と作は輪の中に輪のあるがごとくなり
Tala ndenge bapine yango ezalaki mpe ndenge basala yango: ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite mpe nyonso minei ezalaki ekokana; bongo na ndenge basala yango, ezalaki lokola moko kati na mosusu.
17 その行く時は四方に行く行にまはることなし
Tango ekelamu moko na moko ezalaki kotambola, ezalaki kokende na ngambo oyo moko ya bilongi na yango ekotala, kati na bangambo na yango minei; ezalaki kobaluka na ngambo mosusu te mpe bapine na yango ezalaki kotengama te soki bikelamu yango ezali kotambola.
18 その輪輞は高くして畏懼かり輪輞は四箇ともに皆遍く目あり
Bajante ya bapine na yango ezalaki minene mpe somo: nyonso minei ezalaki etonda na miso zingazinga na yango.
19 生物の行く時は輪その傍に行き生物地をはなれて上る時は輪もまた上る
Tango bikelamu ya bomoi ezalaki kotambola, bapine mpe ezalaki kotambola pembeni na yango; kasi soki epumbwe longwa na se, bapine mpe ezalaki kopumbwa.
20 凡て靈のゆかんとする所には生物その靈のゆかんとする方に往く輪またその傍に上る是生物の靈輪の中にあればなり
Esika nyonso Molimo azalaki kokende, bikelamu yango mpe ezalaki kokende; bongo bapine mpe ezalaki komata elongo na yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine.
21 此の行く時は彼もゆき此の止る時は彼も止り此地をはなれて上る時は輪も共にあがる是生物の靈輪の中にあればなり
Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, yango mpe ezalaki kotambola; soki etelemi, yango mpe ezalaki kotelema; soki epumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bikelamu yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine.
22 生物の首の上に畏しき水晶のごとき穹蒼ありてその首の上に展開る
Likolo ya mito ya bikelamu yango ya bomoi ezalaki na eloko moko lokola mapata ya likolo, oyo ezalaki kongenga makasi lokola libanga ya talo oyo ya krisitali.
23 穹蒼の下に其翼直く開きて此と彼とあひ連る又各二箇の翼ありその各の二箇の翼此方彼方にありて身をおほふ
Na se ya mapata yango, mapapu na yango ezalaki esembolama mpe etutana na mapapu ya baninga na yango; mpe moko na moko kati na bikelamu yango ezalaki na mapapu mibale oyo ezalaki kobomba nzoto na yango.
24 我その行く時の羽聲を聞に大水の聲のごとく全能者の聲のごとし其聲音の響は軍勢の聲のごとしその立どまる時は翼を垂る
Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango.
25 その首の上なる穹蒼の上より聲ありその立どまる時は翼を垂る
Na likolo ya mito na yango, mongongo moko ezalaki koyokana wuta na likolo ya mapata oyo ezalaki; tango ezalaki kotelema, ezalaki mpe kokitisa mapapu na yango.
26 首の上なる穹蒼の上に靑玉のごとき寶位の狀式ありその寶位の狀式の上に人のごとき者在す、
Boye, na likolo ya mapata oyo ezalaki na likolo ya mito na yango, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya talo ya langi ya bule mpe lokola kiti ya bokonzi basala na safiri; mpe na likolo ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki lokola moto.
27 又われその中と周圍に磨きたる銅のごとく火のごとくなる者を見る其人の腰より上も腰より下も火のごとくに見ゆ其周圍に輝光あり
Namonaki lisusu ete likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga lokola linzanza, zingazinga na yango ezalaki lokola moto, se ya loketo na yango ezalaki lokola moto; mpe mikalikali ya makasi ezingelaki yango.
28 その周圍の輝光は雨の日に雲にあらはるる虹のごとしヱホバの榮光かくのごとく見ゆ我これを見て俯伏したるに語る者の聲あるを聞く
Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.

< エゼキエル書 1 >