< Luca 13 >

1 In quello stesso tempo vennero alcuni a riferirgli il fatto dei Galilei il cui sangue Pilato aveva mescolato coi loro sacrifici.
Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka.
2 E Gesù, rispondendo, disse loro: Pensate voi che quei Galilei fossero più peccatori di tutti i Galilei perché hanno sofferto tali cose?
Yesu alobaki na bango: — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile?
3 No, vi dico; ma se non vi ravvedete, tutti similmente perirete.
Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
4 O quei diciotto sui quali cadde la torre in Siloe e li uccise, pensate voi che fossero più colpevoli di tutti gli abitanti di Gerusalemme?
Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi?
5 No, vi dico; ma se non vi ravvedete, tutti al par di loro perirete.
Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
6 Disse pure questa parabola: Un tale aveva un fico piantato nella sua vigna; e andò a cercarvi del frutto, e non ne trovò.
Bongo alobaki lisese oyo: — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.
7 Disse dunque al vignaiuolo: Ecco, sono ormai tre anni che vengo a cercar frutto da questo fico, e non ne trovo; taglialo; perché sta lì a rendere improduttivo anche il terreno?
Boye alobaki na mobateli elanga yango: « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango! Mpo na nini ekanga mabele pamba? »
8 Ma l’altro, rispondendo, gli disse: Signore, lascialo ancora quest’anno, finch’io l’abbia scalzato e concimato;
Mobateli elanga azongiselaki ye: « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola;
9 e forse darà frutto in avvenire; se no, lo taglierai.
tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. »
10 Or egli stava insegnando in una delle sinagoghe in giorno di sabato.
Mokolo moko ya Saba, Yesu azalaki koteya kati na ndako ya mayangani.
11 Ed ecco una donna, che da diciotto anni aveva uno spirito d’infermità, ed era tutta curvata e incapace di raddrizzarsi in alcun modo.
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe.
12 E Gesù, vedutala, la chiamò a sé e le disse: Donna, tu sei liberata dalla tua infermità.
Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye: — Mwasi, okangolami na pasi na yo!
13 E pose le mani su lei, ed ella in quell’istante fu raddrizzata e glorificava Iddio.
Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.
14 Or il capo della sinagoga, sdegnato che Gesù avesse fatta una guarigione in giorno di sabato, prese a dire alla moltitudine: Ci son sei giorni ne’ quali s’ha da lavorare; venite dunque in quelli a farvi guarire, e non in giorno di sabato.
Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato: — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te!
15 Ma il Signore gli rispose e disse: Ipocriti, non scioglie ciascun di voi, di sabato, il suo bue o il suo asino dalla mangiatoia per menarlo a bere?
Nkolo azongiselaki ye: — Bato ya bilongi mibale! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi?
16 E costei, ch’è figliuola d’Abramo, e che Satana avea tenuta legata per ben diciott’anni, non doveva esser sciolta da questo legame in giorno di sabato?
Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba?
17 E mentre diceva queste cose, tutti i suoi avversari erano confusi, e tutta la moltitudine si rallegrava di tutte le opere gloriose da lui compiute.
Tango alobaki bongo, bayini na Ye nyonso batondaki na soni; kasi ebele ya bato bazalaki kosepela na bikamwa nyonso oyo azalaki kosala.
18 Diceva dunque: A che è simile il regno di Dio, e a che l’assomiglierò io?
Bongo Yesu atunaki: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Nakokanisa yango na nini?
19 Esso è simile ad un granel di senapa che un uomo ha preso e gettato nel suo orto; ed è cresciuto ed è divenuto albero; e gli uccelli del cielo si son riparati sui suoi rami.
Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.
20 E di nuovo disse: A che assomiglierò il regno di Dio?
Yesu atunaki lisusu: — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini?
21 Esso è simile al lievito che una donna ha preso e nascosto in tre staia di farina, finché tutta sia lievitata.
Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki.
22 Ed egli attraversava man mano le città ed i villaggi, insegnando, e facendo cammino verso Gerusalemme.
Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi.
23 E un tale gli disse: Signore, son pochi i salvati?
Moto moko atunaki Ye: — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika? Yesu alobaki na bango:
24 Ed egli disse loro: Sforzatevi d’entrare per la porta stretta, perché io vi dico che molti cercheranno d’entrare e non potranno.
— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.
25 Da che il padron di casa si sarà alzato ed avrà serrata la porta, e voi, stando di fuori, comincerete a picchiare alla porta, dicendo: Signore, aprici, egli, rispondendo, vi dirà: Io non so d’onde voi siate.
Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela: « Nkolo, Nkolo, fungolela biso! » Kasi Ye akozongisela bino: « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te! »
26 Allora comincerete a dire: Noi abbiam mangiato e bevuto in tua presenza, e tu hai insegnato nelle nostre piazze!
Bongo bokoloba: « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso! »
27 Ed egli dirà: Io vi dico che non so d’onde voi siate; dipartitevi da me voi tutti operatori d’iniquità.
Kasi akozongisela bino: « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe! »
28 Quivi sarà il pianto e lo stridor de’ denti, quando vedrete Abramo e Isacco e Giacobbe e tutti i profeti nel regno di Dio, e che voi ne sarete cacciati fuori.
Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe; kasi bino, bokobwakama libanda.
29 E ne verranno d’oriente e d’occidente, e da settentrione e da mezzogiorno, che si porranno a mensa nel regno di Dio.
Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe.
30 Ed ecco, ve ne son degli ultimi che saranno primi, e de’ primi che saranno ultimi.
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
31 In quello stesso momento vennero alcuni Farisei a dirgli: Parti, e vattene di qui, perché Erode ti vuol far morire.
Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo!
32 Ed egli disse loro: Andate a dire a quella volpe: Ecco, io caccio i demoni e compio guarigioni oggi e domani, e il terzo giorno giungo al mio termine.
Yesu alobaki na bango: — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba: « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »
33 D’altronde, bisogna ch’io cammini oggi e domani e posdomani, perché non può essere che un profeta muoia fuori di Gerusalemme.
Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi!
34 Gerusalemme, Gerusalemme, che uccidi i profeti e lapidi quelli che ti son mandati, quante volte ho voluto raccogliere i tuoi figliuoli, come la gallina raccoglie i suoi pulcini sotto le ali; e voi non avete voluto!
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
35 Ecco, la vostra casa sta per esservi lasciata deserta. E io vi dico che non mi vedrete più, finché venga il giorno che diciate: Benedetto colui che viene nel nome del Signore!
Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino: Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba: « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! »

< Luca 13 >