< Deuteronomio 13 >

1 QUANDO sorgerà in mezzo di te un profeta, o un sognator di sogni, il quale ti darà alcun miracolo o prodigio
Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa,
2 (e quel miracolo o prodigio che egli ti avrà detto, avverrà), dicendo: Andiamo dietro a dii stranieri, i quali tu non hai conosciuti, e serviamo loro;
mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino: « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te,
3 non attendere alle parole di quel profeta, nè a quel sognator di sogni; perciocchè il Signore Iddio vostro vi prova, per conoscere se amate il Signore Iddio vostro con tutto il vostro cuore, e con tutta l'anima vostra.
bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
4 Andate dietro al Signore Iddio vostro, e lui temete, e osservate i suoi comandamenti, e ubbidite alla sua voce, e a lui servite e a lui v'attenete.
Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye.
5 E facciasi morir quel profeta, o quel sognator di sogni; conciossiachè egli abbia parlato di rivolta contro al Signore Iddio vostro, che vi ha tratti fuor del paese di Egitto, e vi ha riscossi della casa di servitù; per sospignervi fuor della via, nella quale il Signore Iddio vostro vi ha comandato che camminiate; e così togli via il male del mezzo di te.
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
6 Quando il tuo fratello, figliuolo di tua madre, o il tuo figliuolo, o la tua figliuola, o la moglie del tuo seno, o il tuo famigliare amico, che [è] come l'anima tua, t'inciterà di segreto, dicendo: Andiamo, e serviamo ad altri dii, i quali non avete conosciuti, nè tu, nè i tuoi padri;
Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba: « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te,
7 d'infra gl'iddii de' popoli che [saranno] d'intorno a voi, vicino o lontano da te, da un estremo della terra, fino all'[altro] estremo;
banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu),
8 non compiacergli, e non ascoltarlo; l'occhio tuo eziandio non gli perdoni, e non risparmiarlo, e non celarlo.
koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te.
9 Anzi del tutto uccidilo; sia la tua mano la prima sopra lui, per farlo morire, e poi la mano di tutto il popolo.
Ya solo, osengeli koboma ye na mabanga. Loboko na yo ekozala loboko ya liboso mpo na kobamba ye mabanga mpe sima maboko ya bato nyonso.
10 E lapidalo con pietre, sì che muoia; perciocchè egli ha cercato di sospignerti d'appresso al Signore Iddio tuo, che ti ha tratto fuor del paese di Egitto, della casa di servitù.
Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu.
11 Acciocchè tutto Israele oda, e tema; e niuno per l'innanzi faccia più in mezzo di te una tal mala cosa.
Boye, Isalaele nyonso ekoyoka mpe ekobanga, bongo moto moko te kati na bino akosala lisusu makambo mabe ya lolenge oyo.
12 Quando tu udirai che si dirà d'una delle tue città, che il Signore Iddio tuo ti dà, per abitarvi;
Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda
13 che alcuni uomini scellerati sono usciti del mezzo di te, e hanno incitati gli abitanti della lor città, dicendo: Andiamo, e serviamo ad altri dii, i quali voi non avete conosciuti
ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango: « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te,
14 informati, investiga, e domandane ben bene; e se tu trovi che la cosa sia vera e certa, e che questa cosa abbominevole sia stata fatta nel mezzo di te;
wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo,
15 del tutto percuoti gli abitanti di quella città, [e mettili] a fil di spada; distruggila al modo dell'interdetto, insieme con tutti quelli che [vi saranno] dentro, e il suo bestiame, [mettendoli] a fil di spada.
osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso: bato na yango mpe bibwele na yango.
16 E raccogli le spoglie della città nel mezzo della sua piazza, e brucia interamente col fuoco la città, e tutte le sue spoglie, al Signore Iddio tuo; e sia [quella città] in perpetuo un mucchio [di ruine, e] non sia mai più riedificata.
Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te.
17 E nulla dell'interdetto ti si attacchi alle mani; acciocchè il Signore si stolga dall'ardor della sua ira, e ti faccia misericordia, e abbia pietà di te, e ti accresca, come egli giurò a' tuoi padri;
Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi,
18 quando tu ubbidirai alla voce del Signore Iddio tuo, per osservar tutti i suoi comandamenti, i quali io oggi ti do, per fare cio ch'è diritto appo il Signore Iddio tuo.
soki otosi Yawe, Nzambe na yo, obateli mibeko na Ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo mpe otamboli na bosembo na miso Ye.

< Deuteronomio 13 >