< שמואל ב 18 >

ויפקד דוד את העם אשר אתו וישם עליהם שרי אלפים ושרי מאות׃ 1
Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.
וישלח דוד את העם השלשית ביד יואב והשלשית ביד אבישי בן צרויה אחי יואב והשלשת ביד אתי הגתי ויאמר המלך אל העם יצא אצא גם אני עמכם׃ 2
Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato: lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.
ויאמר העם לא תצא כי אם נס ננוס לא ישימו אלינו לב ואם ימתו חצינו לא ישימו אלינו לב כי עתה כמנו עשרה אלפים ועתה טוב כי תהיה לנו מעיר לעזיר׃ 3
Kasi basoda balobaki: — Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba.
ויאמר אליהם המלך אשר ייטב בעיניכם אעשה ויעמד המלך אל יד השער וכל העם יצאו למאות ולאלפים׃ 4
Mokonzi azongisaki: — Nakosala makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu. Boye wana bato bazalaki kobima na masanga ya bankama mpe ya bankoto, mokonzi atelemaki pembeni ya ekuke.
ויצו המלך את יואב ואת אבישי ואת אתי לאמר לאט לי לנער לאבשלום וכל העם שמעו בצות המלך את כל השרים על דבר אבשלום׃ 5
Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi: « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.
ויצא העם השדה לקראת ישראל ותהי המלחמה ביער אפרים׃ 6
Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi.
וינגפו שם עם ישראל לפני עבדי דוד ותהי שם המגפה גדולה ביום ההוא עשרים אלף׃ 7
Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele.
ותהי שם המלחמה נפצות על פני כל הארץ וירב היער לאכל בעם מאשר אכלה החרב ביום ההוא׃ 8
Bitumba epanzanaki mboka mobimba; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.
ויקרא אבשלום לפני עבדי דוד ואבשלום רכב על הפרד ויבא הפרד תחת שובך האלה הגדולה ויחזק ראשו באלה ויתן בין השמים ובין הארץ והפרד אשר תחתיו עבר׃ 9
Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu.
וירא איש אחד ויגד ליואב ויאמר הנה ראיתי את אבשלם תלוי באלה׃ 10
Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi: — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.
ויאמר יואב לאיש המגיד לו והנה ראית ומדוע לא הכיתו שם ארצה ועלי לתת לך עשרה כסף וחגרה אחת׃ 11
Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango: — Boni, omoni ye? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba.
ויאמר האיש אל יואב ולא אנכי שקל על כפי אלף כסף לא אשלח ידי אל בן המלך כי באזנינו צוה המלך אתך ואת אבישי ואת אתי לאמר שמרו מי בנער באבשלום׃ 12
Kasi moto yango azongiselaki Joabi: — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki: « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »
או עשיתי בנפשו שקר וכל דבר לא יכחד מן המלך ואתה תתיצב מנגד׃ 13
Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.
ויאמר יואב לא כן אחילה לפניך ויקח שלשה שבטים בכפו ויתקעם בלב אבשלום עודנו חי בלב האלה׃ 14
Joabi alobaki: — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.
ויסבו עשרה נערים נשאי כלי יואב ויכו את אבשלום וימיתהו׃ 15
Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye.
ויתקע יואב בשפר וישב העם מרדף אחרי ישראל כי חשך יואב את העם׃ 16
Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango.
ויקחו את אבשלום וישליכו אתו ביער אל הפחת הגדול ויצבו עליו גל אבנים גדול מאד וכל ישראל נסו איש לאהלו׃ 17
Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.
ואבשלם לקח ויצב לו בחיו את מצבת אשר בעמק המלך כי אמר אין לי בן בעבור הזכיר שמי ויקרא למצבת על שמו ויקרא לה יד אבשלם עד היום הזה׃ 18
Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki: « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. » Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. »
ואחימעץ בן צדוק אמר ארוצה נא ואבשרה את המלך כי שפטו יהוה מיד איביו׃ 19
Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi: — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.
ויאמר לו יואב לא איש בשרה אתה היום הזה ובשרת ביום אחר והיום הזה לא תבשר כי על בן המלך מת׃ 20
Joabi alobaki na ye: — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.
ויאמר יואב לכושי לך הגד למלך אשר ראיתה וישתחו כושי ליואב וירץ׃ 21
Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi: — Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni. Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu.
ויסף עוד אחימעץ בן צדוק ויאמר אל יואב ויהי מה ארצה נא גם אני אחרי הכושי ויאמר יואב למה זה אתה רץ בני ולכה אין בשורה מצאת׃ 22
Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi: — Oyo ekoya eya! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi. Kasi Joabi azongisaki: — Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti.
ויהי מה ארוץ ויאמר לו רוץ וירץ אחימעץ דרך הככר ויעבר את הכושי׃ 23
Ayimaatsi alobaki: — Oyo ekoya eya! Nandimi kokima mbangu. Joabi alobaki: — Kima mbangu! Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi.
ודוד יושב בין שני השערים וילך הצפה אל גג השער אל החומה וישא את עיניו וירא והנה איש רץ לבדו׃ 24
Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko.
ויקרא הצפה ויגד למלך ויאמר המלך אם לבדו בשורה בפיו וילך הלוך וקרב׃ 25
Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki: « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. » Moto azalaki kaka kopusana.
וירא הצפה איש אחר רץ ויקרא הצפה אל השער ויאמר הנה איש רץ לבדו ויאמר המלך גם זה מבשר׃ 26
Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke: — Tala, moto mosusu azali kokima mbangu ye moko. Mokonzi alobaki: — Ye mpe amemi basango malamu.
ויאמר הצפה אני ראה את מרוצת הראשון כמרצת אחימעץ בן צדוק ויאמר המלך איש טוב זה ואל בשורה טובה יבוא׃ 27
Mokengeli alobaki: — Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki. Mokonzi alobaki: — Azali moto malamu, azali koya na basango malamu.
ויקרא אחימעץ ויאמר אל המלך שלום וישתחו למלך לאפיו ארצה ויאמר ברוך יהוה אלהיך אשר סגר את האנשים אשר נשאו את ידם באדני המלך׃ 28
Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi: — Makambo nyonso ezali malamu! Agumbamaki liboso ya mokonzi elongi kino na mabele mpe alobaki: — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama! Akabi bato oyo batombolaki maboko na bango mpo na kobundisa mokonzi, nkolo na ngai.
ויאמר המלך שלום לנער לאבשלום ויאמר אחימעץ ראיתי ההמון הגדול לשלח את עבד המלך יואב ואת עבדך ולא ידעתי מה׃ 29
Mokonzi atunaki: — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu? Ayimaatsi azongisaki: — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.
ויאמר המלך סב התיצב כה ויסב ויעמד׃ 30
Mokonzi alobaki: — Telema pembeni mpe zela ngai wana. Boye akendeki mpe atelemaki wana.
והנה הכושי בא ויאמר הכושי יתבשר אדני המלך כי שפטך יהוה היום מיד כל הקמים עליך׃ 31
Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo.
ויאמר המלך אל הכושי השלום לנער לאבשלום ויאמר הכושי יהיו כנער איבי אדני המלך וכל אשר קמו עליך לרעה׃ 32
Mokonzi atunaki na moto ya Kushi: — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu? Moto ya Kushi azongisaki: — Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana.
וירגז המלך ויעל על עלית השער ויבך וכה אמר בלכתו בני אבשלום בני בני אבשלום מי יתן מותי אני תחתיך אבשלום בני בני׃ 33
Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki: « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi! Ebongaki ete nakufa na esika na yo! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali! »

< שמואל ב 18 >