< תְהִלִּים 14 >

לַמְנַצֵּ֗חַ לְדָ֫וִ֥ד אָ֘מַ֤ר נָבָ֣ל בְּ֭לִבֹּו אֵ֣ין אֱלֹהִ֑ים הִֽשְׁחִ֗יתוּ הִֽתְעִ֥יבוּ עֲלִילָ֗ה אֵ֣ין עֹֽשֵׂה־טֹֽוב׃ 1
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka: « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.
יְֽהוָ֗ה מִשָּׁמַיִם֮ הִשְׁקִ֪יף עַֽל־בְּנֵי־אָ֫דָ֥ם לִ֭רְאֹות הֲיֵ֣שׁ מַשְׂכִּ֑יל דֹּ֝רֵשׁ אֶת־אֱלֹהִֽים׃ 2
Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.
הַכֹּ֥ל סָר֮ יַחְדָּ֪ו נֶ֫אֱלָ֥חוּ אֵ֤ין עֹֽשֵׂה־טֹ֑וב אֵ֝֗ין גַּם־אֶחָֽד׃ 3
Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te!
הֲלֹ֥א יָדְעוּ֮ כָּל־פֹּ֪עֲלֵ֫י אָ֥וֶן אֹכְלֵ֣י עַ֭מִּי אָ֣כְלוּ לֶ֑חֶם יְ֝הוָ֗ה לֹ֣א קָרָֽאוּ׃ 4
Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te!
שָׁ֤ם ׀ פָּ֣חֲדוּ פָ֑חַד כִּֽי־אֱ֝לֹהִ֗ים בְּדֹ֣ור צַדִּֽיק׃ 5
Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.
עֲצַת־עָנִ֥י תָבִ֑ישׁוּ כִּ֖י יְהוָ֣ה מַחְסֵֽהוּ׃ 6
Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola kasi Yawe azali ebombamelo na ye.
מִ֥י יִתֵּ֣ן מִצִּיֹּון֮ יְשׁוּעַ֪ת יִשְׂרָ֫אֵ֥ל בְּשׁ֣וּב יְ֭הוָה שְׁב֣וּת עַמֹּ֑ו יָגֵ֥ל יַ֝עֲקֹ֗ב יִשְׂמַ֥ח יִשְׂרֽ͏ָאֵל׃ 7
Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

< תְהִלִּים 14 >